< Leviticus 11 >
1 locutus est Dominus ad Mosen et Aaron dicens
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
2 dicite filiis Israhel haec sunt animalia quae comedere debetis de cunctis animantibus terrae
« Loba na bana ya Isalaele: ‹ Kati na banyama nyonso oyo ezali kati na mokili, tala banyama oyo bokoki kolia:
3 omne quod habet divisam ungulam et ruminat in pecoribus comedetis
banyama oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu.
4 quicquid autem ruminat quidem et habet ungulam sed non dividit eam sicut camelus et cetera non comedetis illud et inter inmunda reputabitis
Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, mpe kati na banyama oyo litindi na yango epasuka na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia: shamo, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati: ezali mbindo mpo na bino;
5 chyrogryllius qui ruminat ungulamque non dividit inmundus est
mpanya ya zamba, pamba te ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati: ezali mbindo mpo na bino;
6 lepus quoque nam et ipse ruminat sed ungulam non dividit
mpanya ya matoyi milayi, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati: ezali mbindo mpo na bino;
7 et sus qui cum ungulam dividat non ruminat
ngulu, pamba te ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu: ezali mbindo mpo na bino.
8 horum carnibus non vescemini nec cadavera contingetis quia inmunda sunt vobis
Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino.
9 haec sunt quae gignuntur in aquis et vesci licitum est omne quod habet pinnulas et squamas tam in mari quam in fluminibus et stagnis comedetis
Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi lokola bibale minene mpe miluka, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe biteku.
10 quicquid autem pinnulas et squamas non habet eorum quae in aquis moventur et vivunt abominabile vobis
Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku: ezali mbindo mpo na bino.
11 et execrandum erit carnes eorum non comedetis et morticina vitabitis
Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino.
12 cuncta quae non habent pinnulas et squamas in aquis polluta erunt
Bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi kasi ezangi binyanyeli mpe biteku, ezali mbindo mpo na bino.
13 haec sunt quae de avibus comedere non debetis et vitanda sunt vobis aquilam et grypem et alietum
Kati na bandeke, tala oyo ezali mbindo mpo na bino, oyo bosengeli te kolia: mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene,
14 milvum ac vulturem iuxta genus suum
nzengo mpe bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni,
15 et omne corvini generis in similitudinem suam
bayanganga ya lolenge nyonso;
16 strutionem et noctuam et larum et accipitrem iuxta genus suum
maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso,
17 bubonem et mergulum et ibin
esulungutu, libata ya mayi, esulungutu ya monene,
18 cycnum et onocrotalum et porphirionem
esulungutu ya pembe, libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola,
19 erodionem et charadrion iuxta genus suum opupam quoque et vespertilionem
nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema.
20 omne de volucribus quod graditur super quattuor pedes abominabile erit vobis
Bokolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu mpe etambolaka na makolo minei; ezali mbindo mpo na bino.
21 quicquid autem ambulat quidem super quattuor pedes sed habet longiora retro crura per quae salit super terram
Nzokande, kati na banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, bokoki kolia oyo ezali lisusu na makolo oyo esungaka yango mpo na kopumbwa wuta na mabele:
22 comedere debetis ut est brucus in genere suo et attacus atque ophiomachus ac lucusta singula iuxta genus suum
lolenge nyonso ya mabanki, mankoko, makelele mpe mayoyo.
23 quicquid autem ex volucribus quattuor tantum habet pedes execrabile erit vobis
Kasi banyama mike nyonso oyo ezali na mapapu mpe na makolo minei ezali mbindo mpo na bino.
24 et quicumque morticina eorum tetigerit polluetur et erit inmundus usque ad vesperum
Soki te, ekokomisa bino mbindo; mpe moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa.
25 et si necesse fuerit ut portet quippiam horum mortuum lavabit vestimenta sua et inmundus erit usque ad solis occasum
Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.
26 omne animal quod habet quidem ungulam sed non dividit eam nec ruminat inmundum erit et quicquid tetigerit illud contaminabitur
Tala banyama mosusu oyo bokomona lokola mbindo: nyama oyo ezali na litindi epasuka te mpe ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Moto nyonso oyo akosimba yango akozala mbindo.
27 quod ambulat super manus ex cunctis animantibus quae incedunt quadrupedia inmundum erit qui tetigerit morticina eorum polluetur usque ad vesperum
Nyama nyonso oyo ezali na makolo minei mpe etambolaka na matambe na yango ezali mbindo. Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa.
28 et qui portaverit huiuscemodi cadavera lavabit vestimenta sua et inmundus erit usque ad vesperum quia omnia haec inmunda sunt vobis
Mpe moto nyonso oyo akolokota bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Bokomona yango mbindo.
29 hoc quoque inter polluta reputabitur de his quae moventur in terra mustela et mus et corcodillus singula iuxta genus suum
Kati na banyama mike oyo etambolaka na mabele, tala oyo bosengeli komona lokola mbindo: mpuku ya se ya mabele, mpuku mpe lolenge nyonso ya miselekete,
30 migale et cameleon et stelio ac lacerta et talpa
moselekete ya ndako, moselekete ya zelo, moselekete ya zamba, moselekete ya langi ya pondu, mongungu.
31 omnia haec inmunda sunt qui tetigerit morticina eorum inmundus erit usque ad vesperum
Kati na bibwele nyonso oyo etambolaka na libumu, bokomona oyo wana lokola mbindo. Moto nyonso oyo akosimba yango wana esili kokufa akozala mbindo kino na pokwa.
32 et super quod ceciderit quicquam de morticinis eorum polluetur tam vas ligneum et vestimentum quam pelles et cilicia et in quocumque fit opus tinguentur aqua et polluta erunt usque ad vesperum et sic postea mundabuntur
Eloko nyonso oyo nyama yango ekokweyela, wana esili kokufa, ekozala mbindo, ezala esalelo ya libaya, elamba, poso to sakosi; botia yango na mayi mpe ekozala mbindo kino na pokwa; sima na yango nde ekozonga lisusu peto.
33 vas autem fictile in quo horum quicquam intro ceciderit polluetur et idcirco frangendum est
Soki moko kati na banyama yango ekweyi na mbeki basala na mabele, biloko nyonso oyo ezali kati na mbeki yango ekokoma mbindo mpe bokopanza mbeki yango.
34 omnis cibus quem comeditis si fusa fuerit super eum aqua inmundus erit et omne liquens quod bibitur de universo vase inmundum erit
Soki basopi mayi ya mbeki yango na eloko nyonso oyo baliaka, eloko yango ekokoma mbindo; ezali mpe bongo mpo na eloko nyonso oyo bamelaka: soki basopeli yango mayi ya mbeki wana, ekokoma mbindo ata soki ezali kati na mbeki ya lolenge nini.
35 et quicquid de morticinis istiusmodi ceciderit super illud inmundum erit sive clibani sive cytropodes destruentur et inmundi erunt
Eloko nyonso oyo ebembe ya moko kati na banyama wana ekokweya likolo na yango ekokoma mbindo. Soki ezali fulu ya moto to mbabola, esengeli kopanza yango; pamba te ekozala mbindo mpe bokomona yango bongo.
36 fontes vero et cisternae et omnis aquarum congregatio munda erit qui morticinum eorum tetigerit polluetur
Nzokande soki nyama yango ya mbindo ekweyi kati na etima to kati na libulu ya mayi, mayi ekotikala peto kasi moto oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo.
37 si ceciderint super sementem non polluent eam
Soki eteni moko ya ebembe na yango ekweyi likolo ya nkona oyo basengeli kolona, nkona ekotikala peto;
38 sin autem quispiam aqua sementem perfuderit et postea morticinis tacta fuerit ilico polluetur
kasi soki basilaki kosopela nkona yango mayi, bongo eteni ya ebembe ya nyama ya mbindo ekweyi lisusu likolo na yango, bokomona nkona yango mbindo.
39 si mortuum fuerit animal quod licet vobis comedere qui cadaver eius tetigerit inmundus erit usque ad vesperum
Soki nyama oyo bozali na ndingisa ya kolia ekufi, moto nyonso oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo kino na pokwa;
40 et qui comederit ex eo quippiam sive portaverit lavabit vestimenta sua et inmundus erit usque ad vesperum
mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa.
41 omne quod reptat super terram abominabile erit nec adsumetur in cibum
Bosengeli komona lokola mbindo banyama nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epekisami kolia yango.
42 quicquid super pectus quadrupes graditur et multos habet pedes sive per humum trahitur non comedetis quia abominabile est
Bokolia ata nyama moko te oyo etambolaka na libumu; ata oyo etambolaka na makolo minei to koleka, pamba te ezali mbindo.
43 nolite contaminare animas vestras nec tangatis quicquam eorum ne inmundi sitis
Bino moko mpe bomikomisa mbindo te na nzela ya moko kati na bikelamu wana oyo etambolaka na libumu. Bomikomisa mbindo te na nzela na yango to tika ete yango mpe ekomisa bino mbindo te.
44 ego enim sum Dominus Deus vester sancti estote quoniam et ego sanctus sum ne polluatis animas vestras in omni reptili quod movetur super terram
Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu.
45 ego sum Dominus qui eduxi vos de terra Aegypti ut essem vobis in Deum sancti eritis quia et ego sanctus sum
Nazali Yawe oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Boye bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule.
46 ista est lex animantium et volucrum et omnis animae viventis quae movetur in aqua et reptat in terra
Yango wana nde ezali mobeko oyo etali banyama, bandeke, bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi to na libumu.
47 ut differentias noveritis mundi et inmundi et sciatis quid comedere et quid respuere debeatis
Bosengeli kosala bokeseni kati na oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto, kati na bikelamu ya bomoi oyo bakoki kolia mpe oyo bakoki kolia te. › »