< Isaiæ 48 >

1 audite hoc domus Iacob qui vocamini nomine Israhel et de aquis Iuda existis qui iuratis in nomine Domini et Dei Israhel recordamini non in veritate neque in iustitia
Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te!
2 de civitate enim sancta vocati sunt et super Deum Israhel constabiliti sunt Dominus exercituum nomen eius
Bino oyo bomibengaka « Bato ya engumba mosantu » mpe bolukaka lisungi epai ya Nzambe ya Isalaele, oyo Kombo na Ye ezali « Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
3 priora ex tunc adnuntiavi et ex ore meo exierunt et audita feci ea repente operatus sum et venerunt
Nasakolaki makambo ya liboso wuta kala, monoko na ngai nde ebimisaki yango mpe nasalaki ete eyebana; nasalaki yango na pwasa mpe ekokisamaki.
4 scivi enim quia durus es tu et nervus ferreus cervix tua et frons tua aerea
Pamba te nayebaki ndenge nini bozalaka bato ya mito makasi, bato oyo bazalaka na kingo lokola ebende mpe oyo mbunzu na bango ezalaka lokola bronze.
5 praedixi tibi ex tunc antequam venirent indicavi tibi ne forte diceres idola mea fecerunt haec et sculptilia mea et conflatilia mandaverunt ista
Yango wana, nalobaki na yo makambo oyo wuta kala, nayebisaki yo yango liboso ete ekokisama mpo oloba te: « Nzambe na ngai ya ekeko nde asali yango, elilingi na ngai ya nzete mpe ya ebende nde apesaki mitindo ete esalema! »
6 quae audisti vide omnia vos autem non adnuntiastis audita feci tibi nova ex nunc et conservata quae nescis
Boyokaki makambo oyo! Botala, yango nyonso ekokisami. Boni, bokondima yango kaka te? Wuta sik’oyo, nakoyebisa yo makambo ya sika, makambo oyo ebombama, makambo oyo oyebi nanu te.
7 nunc creata sunt et non ex tunc et ante diem et non audisti ea ne forte dicas ecce cognovi ea
Ekelami nde sik’oyo, ezali makambo ya kala te, oyoka nanu yango te, liboso ya mokolo ya lelo. Boye, okoki koloba te: « Solo, nayoka sango na yango. »
8 neque audisti neque cognovisti neque ex tunc aperta est auris tua scio enim quia praevaricans praevaricabis et transgressorem ex ventre vocavi te
Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te; wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama. Solo, nayebi ete ozalaka mokosi; babengaka yo motomboki wuta na libumu ya mama na yo.
9 propter nomen meum longe faciam furorem meum et laude mea infrenabo te ne intereas
Mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakolembisa kanda ya motema na Ngai; mpo na lokumu na Ngai, nakozongisa motema na Ngai sima mpo na yo. Yango wana, nakoboma yo te.
10 ecce excoxi te sed non quasi argentum elegi te in camino paupertatis
Tala, napetolaki yo, kasi ndenge bapetolaka palata na moto te; namekaki yo kati na moto ya minyoko.
11 propter me propter me faciam ut non blasphemer et gloriam meam alteri non dabo
Nasali yango kaka mpo na lokumu na Ngai, mpo na lokumu na Ngai moko. Ndenge nini nakoki solo komisambwisa Ngai moko? Nakokaba nkembo na Ngai na nzambe mosusu te.
12 audi me Iacob et Israhel quem ego voco ego ipse ego primus et ego novissimus
Yoka Ngai, oh Jakobi, Isalaele, yo oyo nabengaki! Ngai, nabongwanaka te; nazalaka na ebandeli mpe na suka.
13 manus quoque mea fundavit terram et dextera mea mensa est caelos ego vocabo eos et stabunt simul
Loboko na Ngai moko nde esalaki miboko ya mabele, mpe loboko na Ngai ya mobali nde etandaki likolo. Soki nabengi yango, yango nyonso etelemaka elongo.
14 congregamini omnes vos et audite quis de eis adnuntiavit haec Dominus dilexit eum faciet voluntatem suam in Babylone et brachium suum in Chaldeis
Bino nyonso, boya elongo mpe boyoka: Nzambe nini ya ekeko asakolaki makambo oyo? Moto oyo Yawe alingaka akokokisa mokano na Ye mpo na Babiloni, mpe loboko na ye ekotelemela bato ya Babiloni.
15 ego ego locutus sum et vocavi eum adduxi eum et directa est via eius
Ezali Ngai, solo ezali Ngai nde nalobi mpe nabengi ye; nakoyeisa ye, mpe akolonga na makambo na ye.
16 accedite ad me et audite hoc non a principio in abscondito locutus sum ex tempore antequam fieret ibi eram et nunc Dominus Deus misit me et spiritus eius
Bopusana pene na Ngai mpe boyoka likambo oyo: « Wuta na ebandeli, nalobaka na nkuku te; wuta tango makambo oyo esalema, nazali wana. » Mpe sik’oyo, Nkolo Yawe atindi Ngai elongo na Molimo na Ye.
17 haec dicit Dominus redemptor tuus Sanctus Israhel ego Dominus Deus tuus docens te utilia gubernans te in via qua ambulas
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele, alobi: « Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo ateyaka yo makambo ya malamu mpo na bolamu na yo; oyo atambolisaka yo na nzela oyo osengeli kolanda.
18 utinam adtendisses mandata mea facta fuisset sicut flumen pax tua et iustitia tua sicut gurgites maris
Oh! Soki osalaki penza keba na mibeko na Ngai, kimia na yo elingaki kozala lokola ebale, mpe bosembo na yo, lokola mbonge ya ebale monene;
19 et fuisset quasi harena semen tuum et stirps uteri tui ut lapilli eius non interisset et non fuisset adtritum nomen eius a facie mea
bakitani na yo balingaki kozala lokola zelo, bana na yo, lokola motango ya mbuma ya zelo; kombo na bango elingaki kolongwa te to kobebisama te liboso na Ngai.
20 egredimini de Babylone fugite a Chaldeis in voce exultationis adnuntiate auditum facite hoc efferte illud usque ad extrema terrae dicite redemit Dominus servum suum Iacob
Bobima na Babiloni, bokima wuta na bato ya Babiloni! Boloba yango na makelele ya esengo mpe botatola yango; bopanza sango na yango kino na suka ya mokili; boloba: ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »
21 non sitierunt in deserto cum educeret eos aquam de petra produxit eis et scidit petram et fluxerunt aquae
Bayokaki posa ya mayi te tango azalaki kotambolisa bango na esobe, abimisaki mayi na libanga mpo na bango, abukaki libanga mpe mayi ebimaki.
22 non est pax dicit Dominus impiis
Kasi Yawe alobaki: « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »

< Isaiæ 48 >