< Genesis 26 >

1 orta autem fame super terram post eam sterilitatem quae acciderat in diebus Abraham abiit Isaac ad Abimelech regem Palestinorum in Gerara
Wana nzala makasi ekotaki lisusu na mokili lokola na tango ya Abrayami, Izaki akendeki na Gerari epai ya Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia.
2 apparuitque ei Dominus et ait ne descendas in Aegyptum sed quiesce in terra quam dixero tibi
Boye Yawe abimelaki ye mpe ayebisaki ye: — Kokende na Ejipito te! Vanda na mokili oyo nakolakisa yo.
3 et peregrinare in ea eroque tecum et benedicam tibi tibi enim et semini tuo dabo universas regiones has conplens iuramentum quod spopondi Abraham patri tuo
Vanda kati na mokili oyo; nakozala na yo elongo mpe nakopambola yo, pamba te nakopesa mabele oyo nyonso epai na yo mpe epai ya bana na yo; nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya Abrayami, tata na yo.
4 et multiplicabo semen tuum sicut stellas caeli daboque posteris tuis universas regiones has et benedicentur in semine tuo omnes gentes terrae
Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola.
5 eo quod oboedierit Abraham voci meae et custodierit praecepta et mandata mea et caerimonias legesque servaverit
Nakosala yango mpo ete Abrayami atosaki Ngai, abatelaki bikateli na Ngai, mitindo na Ngai mpe mibeko na Ngai.
6 mansit itaque Isaac in Geraris
Boye, Izaki avandaki na Gerari.
7 qui cum interrogaretur a viris loci illius super uxore sua respondit soror mea est timuerat enim confiteri quod sibi esset sociata coniugio reputans ne forte interficerent eum propter illius pulchritudinem
Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki: — Azali ndeko na ngai ya mwasi. Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko.
8 cumque pertransissent dies plurimi et ibi demoraretur prospiciens Abimelech Palestinorum rex per fenestram vidit eum iocantem cum Rebecca uxore sua
Tango awumelaki na mboka yango, Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia, atalaki wuta na lininisa mpe amonaki Izaki kosakana na mwasi na ye Rebeka.
9 et accersito ait perspicuum est quod uxor tua sit cur mentitus es sororem tuam esse respondit timui ne morerer propter eam
Bongo Abimeleki abengisaki ye mpe alobaki na ye: — Rebeka azali solo mwasi na yo. Mpo na nini olobaki: « Azali ndeko na ngai ya mwasi? » Izaki azongisaki: — Kati na ngai, nazalaki koloba ete nakokaki kokufa mpo na ye.
10 dixitque Abimelech quare inposuisti nobis potuit coire quispiam de populo cum uxore tua et induxeras super nos grande peccatum praecepitque omni populo dicens
Abimeleki alobaki lisusu: — Nasali bino likambo nini? Etikalaki kaka moke ete mobali moko kati na bato na ngai akota mpe asangisa nzoto na mwasi na yo. Boye, olingaki komemisa biso ngambo.
11 qui tetigerit hominis huius uxorem morte morietur
Abimeleki apesaki mitindo na bato nyonso: — Moto nyonso oyo akosala mabe na moto oyo mpe na mwasi na ye, akokufa.
12 seruit autem Isaac in terra illa et invenit in ipso anno centuplum benedixitque ei Dominus
Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye.
13 et locupletatus est homo et ibat proficiens atque succrescens donec magnus vehementer effectus est
Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele.
14 habuit quoque possessionem ovium et armentorum et familiae plurimum ob haec invidentes ei Palestini
Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele.
15 omnes puteos quos foderant servi patris illius Abraham illo tempore obstruxerunt implentes humo
Boye bato ya Filisitia bakundaki mabulu nyonso oyo basali ya Abrayami, tata na ye, batimolaki tango azalaki nanu na bomoi mpe batondisaki yango na mabele.
16 in tantum ut ipse Abimelech diceret ad Isaac recede a nobis quoniam potentior nostri factus es valde
Bongo Abimeleki alobaki na Izaki: — Kende mosika na biso, pamba te okomi na nguya mingi koleka biso.
17 et ille discedens veniret ad torrentem Gerarae habitaretque ibi
Izaki alongwaki wana mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo na lubwaku ya Gerari epai wapi avandaki.
18 rursum fodit alios puteos quos foderant servi patris sui Abraham et quos illo mortuo olim obstruxerant Philisthim appellavitque eos hisdem nominibus quibus ante pater vocaverat
Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango.
19 foderunt in torrente et reppererunt aquam vivam
Basali ya Izaki batimolaki na lubwaku mpe bamonaki kuna libulu ya mayi ya peto.
20 sed et ibi iurgium fuit pastorum Gerarae adversum pastores Isaac dicentium nostra est aqua quam ob rem nomen putei ex eo quod acciderat vocavit Calumniam
Babateli bibwele ya Gerari baswanisaki babateli bibwele ya Izaki mpe balobaki na bango: « Mayi oyo ezali ya biso. » Izaki apesaki libulu yango kombo « Eseki, » pamba te baswanisaki ye na tina na yango.
21 foderunt et alium et pro illo quoque rixati sunt appellavitque eum Inimicitias
Batimolaki libulu mosusu, kasi baswanisaki ye lisusu na tina na yango, mpe apesaki yango kombo « Sitina. »
22 profectus inde fodit alium puteum pro quo non contenderunt itaque vocavit nomen illius Latitudo dicens nunc dilatavit nos Dominus et fecit crescere super terram
Alongwaki wana mpe akendeki kotimola libulu mosusu; mpe moto moko te aswanisaki ye na tina na yango. Yango wana apesaki yango kombo « Reoboti, » pamba te alobaki: « Sik’oyo, Yawe apesi biso esika monene, mpe tokofuluka na mokili oyo. »
23 ascendit autem ex illo loco in Bersabee
Kolongwa wana, akendeki na Beri-Sheba.
24 ubi apparuit ei Dominus in ipsa nocte dicens ego sum Deus Abraham patris tui noli metuere quia tecum sum benedicam tibi et multiplicabo semen tuum propter servum meum Abraham
Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye: « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »
25 itaque aedificavit ibi altare et invocato nomine Domini extendit tabernaculum praecepitque servis suis ut foderent puteum
Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi.
26 ad quem locum cum venissent de Geraris Abimelech et Ochozath amicus illius et Fichol dux militum
Wuta na Gerari, Abimeleki elongo na Awuzati, mopesi toli na ye, mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bayaki kokutana na Izaki.
27 locutus est eis Isaac quid venistis ad me hominem quem odistis et expulistis a vobis
Izaki atunaki bango: — Mpo na nini boyei epai na ngai, bino bato oyo bolingaka ngai te mpe bobenganaki ngai epai na bino?
28 qui responderunt vidimus tecum esse Dominum et idcirco nunc diximus sit iuramentum inter nos et ineamus foedus
Bazongiselaki ye: — Tomoni ya solo ete Yawe azali elongo na yo, yango wana tolobaki: « Tika ete tosala boyokani kati na biso mpe yo na nzela ya ndayi.
29 ut non facias nobis quicquam mali sicut et nos nihil tuorum adtigimus nec fecimus quod te laederet sed cum pace dimisimus auctum benedictione Domini
Lapa ndayi ete okosala biso mabe te ndenge biso mpe tosalaki yo mabe te; tosalelaki yo kaka bolamu mpe totikaki yo kokende na kimia. Sik’oyo, Yawe apamboli yo. »
30 fecit ergo eis convivium et post cibum et potum
Izaki asalelaki bango feti monene; baliaki mpe bamelaki.
31 surgentes mane iuraverunt sibi mutuo dimisitque eos Isaac pacifice in locum suum
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balapanaki ndayi; bongo Izaki abimisaki bango na nzela mpe atikaki bango kokende na kimia.
32 ecce autem venerunt in ipso die servi Isaac adnuntiantes ei de puteo quem foderant atque dicentes invenimus aquam
Kaka na mokolo yango, basali ya Izaki bayaki kopesa ye sango ete bamoni mayi na libulu oyo bazalaki kotimola.
33 unde appellavit eum Abundantiam et nomen urbi inpositum est Bersabee usque in praesentem diem
Izaki apesaki libulu yango kombo « Sheba. » Yango wana engumba yango ebengami kino lelo Beri-Sheba.
34 Esau vero quadragenarius duxit uxores Iudith filiam Beeri Hetthei et Basemath filiam Helon eiusdem loci
Tango Ezawu akokisaki mibu tuku minei ya mbotama, abalaki Jiditi, mwana mwasi ya Beri, moto ya mokili ya Iti, mpe Basimati, mwana mwasi ya Eloni, moto ya mokili ya Iti.
35 quae ambae offenderant animum Isaac et Rebeccae
Basi yango bazalaki koyokisa Izaki mpe Rebeka pasi na motema.

< Genesis 26 >