< Genesis 21 >
1 visitavit autem Dominus Sarram sicut promiserat et implevit quae locutus est
Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye.
2 concepitque et peperit filium in senectute sua tempore quo praedixerat ei Deus
Sara azwaki zemi mpe abotelaki Abrayami mwana na kimobange na ye kaka na tango oyo Nzambe alakaki ye.
3 vocavitque Abraham nomen filii sui quem genuit ei Sarra Isaac
Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki. »
4 et circumcidit eum octavo die sicut praeceperat ei Deus
Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye.
5 cum centum esset annorum hac quippe aetate patris natus est Isaac
Abrayami azalaki na mibu nkama moko ya mbotama tango mwana na ye, Izaki, abotamaki.
6 dixitque Sarra risum fecit mihi Deus quicumque audierit conridebit mihi
Sara alobaki: « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. »
7 rursumque ait quis auditurum crederet Abraham quod Sarra lactaret filium quem peperit ei iam seni
Abakisaki: « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »
8 crevit igitur puer et ablactatus est fecitque Abraham grande convivium in die ablactationis eius
Mwana akolaki mpe Sara akataki kopesa ye mabele. Mokolo bakataki kopesa Izaki mabele, Abrayami asalisaki feti monene.
9 cumque vidisset Sarra filium Agar Aegyptiae ludentem dixit ad Abraham
Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka;
10 eice ancillam hanc et filium eius non enim erit heres filius ancillae cum filio meo Isaac
ayebisaki Abrayami: « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. »
11 dure accepit hoc Abraham pro filio suo
Tango Abrayami ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema mpo na mwana na ye.
12 cui dixit Deus non tibi videatur asperum super puero et super ancilla tua omnia quae dixerit tibi Sarra audi vocem eius quia in Isaac vocabitur tibi semen
Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami: « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.
13 sed et filium ancillae faciam in gentem magnam quia semen tuum est
Nakokomisa mpe mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo ekolo, pamba te ye mpe azali makila na yo. »
14 surrexit itaque Abraham mane et tollens panem et utrem aquae inposuit scapulae eius tradiditque puerum et dimisit eam quae cum abisset errabat in solitudine Bersabee
Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba.
15 cumque consumpta esset aqua in utre abiecit puerum subter unam arborum quae ibi erant
Tango mayi oyo ezalaki na mbeki esilaki, Agari asundolaki mwana na se ya nzete moko ya moke.
16 et abiit seditque e regione procul quantum potest arcus iacere dixit enim non videbo morientem puerum et sedens contra levavit vocem suam et flevit
Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki: « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki.
17 exaudivit autem Deus vocem pueri vocavitque angelus Domini Agar de caelo dicens quid agis Agar noli timere exaudivit enim Deus vocem pueri de loco in quo est
Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye: « Agari, likambo nini? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye.
18 surge tolle puerum et tene manum illius quia in gentem magnam faciam eum
Telema, tombola mwana mpe zwa ye na loboko na yo, pamba te nakokomisa ye ekolo monene. »
19 aperuitque oculos eius Deus quae videns puteum aquae abiit et implevit utrem deditque puero bibere
Nzambe afungolaki ye miso, mpe amonaki libulu ya mayi. Akendeki kotondisa mbeki mpe amelisaki mwana.
20 et fuit cum eo qui crevit et moratus est in solitudine et factus est iuvenis sagittarius
Nzambe azalaki elongo na mwana. Akolaki, avandaki kati na esobe mpe akomaki mobomi nyama na tolotolo.
21 habitavitque in deserto Pharan et accepit illi mater sua uxorem de terra Aegypti
Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito.
22 eodem tempore dixit Abimelech et Fichol princeps exercitus eius ad Abraham Deus tecum est in universis quae agis
Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami: — Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala.
23 iura ergo per Dominum ne noceas mihi et posteris meis stirpique meae sed iuxta misericordiam quam feci tibi facies mihi et terrae in qua versatus es advena
Bongo sik’oyo, lapa ndayi awa na Kombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, bana na ngai te, mpe bakoko na ngai te; kasi okosalela ngai bolamu elongo na mboka oyo epai wapi ozali kovanda lokola mopaya, ndenge ngai nasaleli yo.
24 dixitque Abraham ego iurabo
Abrayami azongisaki: — Nalapi ndayi!
25 et increpavit Abimelech propter puteum aquae quem vi abstulerant servi illius
Bongo Abrayami alobelaki Abimeleki na tina na libulu ya mayi oyo basali ya Abimeleki babotolaki na makasi.
26 respondit Abimelech nescivi quis fecerit hanc rem sed et tu non indicasti mihi et ego non audivi praeter hodie
Abimeleki azongisaki: — Nayebi te nani asalaki bongo. Oyebisaki ngai likambo moko te na tina na yango, mpe nayoki yango kaka lelo.
27 tulit itaque Abraham oves et boves et dedit Abimelech percusseruntque ambo foedus
Abrayami azwaki bameme, bantaba, bangombe, mpe apesaki yango na Abimeleki; bongo bango mibale basalaki boyokani.
28 et statuit Abraham septem agnas gregis seorsum
Abrayami atiaki pembeni bana meme sambo oyo azwaki kati na etonga.
29 cui dixit Abimelech quid sibi volunt septem agnae istae quas stare fecisti seorsum
Abimeleki atunaki Abrayami: — Bana meme sambo oyo otie pembeni elakisi nini?
30 at ille septem inquit agnas accipies de manu mea ut sint in testimonium mihi quoniam ego fodi puteum istum
Azongisaki: — Ndima bana meme sambo oyo ewuti na maboko na ngai lokola litatoli ete ngai nde natimolaki libulu yango.
31 idcirco vocatus est locus ille Bersabee quia ibi uterque iuraverunt
Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi.
32 et inierunt foedus pro puteo Iuramenti
Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia.
33 surrexit autem Abimelech et Fichol princeps militiae eius reversique sunt in terram Palestinorum Abraham vero plantavit nemus in Bersabee et invocavit ibi nomen Domini Dei aeterni
Abrayami alonaki nzete ya tamarisi na Beri-Sheba mpe abelelaki Yawe, Nzambe ya bileko na bileko.
34 et fuit colonus terrae Philisthinorum diebus multis
Abrayami avandaki lisusu tango molayi na mokili ya Filisitia.