< Hiezechielis Prophetæ 29 >

1 in anno decimo in decimo mense undecima mensis factum est verbum Domini ad me dicens
Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi, Yawe alobaki na ngai:
2 fili hominis pone faciem tuam contra Pharaonem regem Aegypti et prophetabis de eo et de Aegypto universa
« Mwana na moto, talisa elongi na yo epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, sakola mpo na kotelemela ye mpe mokili mobimba ya Ejipito!
3 loquere et dices haec dicit Dominus Deus ecce ego ad te Pharao rex Aegypti draco magne qui cubas in medio fluminum tuorum et dicis meus est fluvius et ego feci memet ipsum
Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo! Yo dalagona monene oyo ovandaka kati na bibale na yo, yo oyo ozali koloba: ‘Ebale Nili ezali ya ngai; mpe ngai, ngai moko nde namisala!’
4 et ponam frenum in maxillis tuis et adglutinabo pisces fluminum tuorum squamis tuis et extraham te de medio fluminum tuorum et universi pisces tui squamis tuis adherebunt
Nakokanga yo bibende na mbanga, nakosala ete mbisi ya ebale na yo ekangama yo na poso ya nzoto; nakobimisa yo na libanda ya bibale na yo elongo na mbisi oyo ekangami yo na poso ya nzoto.
5 et proiciam te in desertum et omnes pisces fluminis tui super faciem terrae cades non colligeris neque congregaberis bestiis terrae et volatilibus caeli dedi te ad devorandum
Nakobwaka yo na esobe, yo mpe mbisi ya bibale na yo. Okokweya na mabele ya elanga ya polele; bakolokota yo te, bakokunda yo te; mpe nakokomisa yo bilei ya banyama ya mokili mpe ya bandeke ya likolo.
6 et scient omnes habitatores Aegypti quia ego Dominus pro eo quod fuisti baculus harundineus domui Israhel
Boye, bavandi nyonso ya Ejipito bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. Ozalaki na yo kaka lokola eyekamelo oyo basala na nzete oyo ebotaka na mayi, mpo na libota ya Isalaele.
7 quando adprehenderunt te manu et confractus es et lacerasti omnem umerum eorum et innitentibus eis super te comminutus es et dissolvisti omnes renes eorum
Tango maboko na bango esimbaki yo, obukanaki mpe ozokisaki mapeka na bango; tango balalelaki yo, obukanaki mpe olembisaki mikongo na bango.
8 propterea haec dicit Dominus Deus ecce ego adducam super te gladium et interficiam de te hominem et iumentum
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakoyeisa mopanga mpo na kobebisa yo, mpe nakoboma bato na yo mpe bibwele na bango.
9 et erit terra Aegypti in desertum et solitudinem et scient quia ego Dominus eo quod dixerit fluvius meus est et ego feci
Ejipito ekokoma esobe mpe ekotikala lisusu na bato te; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. Lokola ozalaki koloba: ‘Ebale Nili ezali ya ngai; kasi ngai, ngai moko nde namisala,’
10 idcirco ecce ego ad te et ad flumina tua daboque terram Aegypti in solitudines gladio dissipatam a turre Syenes usque ad terminos Aethiopiae
natombokeli yo mpe bibale na yo; mpe lisusu, nakobebisa mokili ya Ejipito, nakokomisa yango esobe kobanda na Migidoli kino na Siene, kino na bandelo ya mokili ya Kushi.
11 non pertransibit eam pes hominis neque pes iumenti gradietur in ea et non habitabitur quadraginta annis
Ata litambe moko ya moto to ya nyama ekolekela lisusu wana te: moto moko te akovanda lisusu kuna mibu tuku minei.
12 daboque terram Aegypti desertam in medio terrarum desertarum et civitates eius in medio urbium subversarum erunt desolatae quadraginta annis et dispergam Aegyptios in nationes et ventilabo eos in terras
Nakokomisa Ejipito esobe kati na mikili oyo ekoma esobe, mpe bingumba na yango ekotikala lisusu na bato te, mibu tuku minei, kati na bingumba oyo ebeba. Nakopanza bato ya Ejipito kati na bikolo mpe nakopalanganisa bango na mikili mosusu.
13 quia haec dicit Dominus Deus post finem quadraginta annorum congregabo Aegyptum de populis in quibus dispersi fuerunt
Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Sima na mibu tuku minei, nakosangisa bato ya Ejipito wuta na bikolo epai wapi bapalanganaki,
14 et reducam captivitatem Aegypti et conlocabo eos in terra Fatures in terra nativitatis suae et erunt ibi in regnum humile
nakokangola bato ya Ejipito oyo bazalaki na bowumbu mpe nakozongisa bango na Patrosi, mokili ya bakoko na bango; mpe kuna, bakokoma kaka mwa bokonzi moko ya moke.
15 inter regna cetera erit humillima et non elevabitur ultra super nationes et inminuam eos ne imperent gentibus
Ejipito ekokoma mokili moko moke koleka mikili mosusu, ekomikumisa lisusu te liboso ya bikolo mosusu; nakokomisa yango moke penza mpo ete ezala lisusu na makoki te ya kokonza bikolo mosusu.
16 neque erunt ultra domui Israhel in confidentia docentes iniquitatem ut fugiant et sequantur eos et scient quia ego Dominus Deus
Mokili ya Ejipito ekozala lisusu mpo na bana ya Isalaele mokili ya kotiela motema te, kasi ekokoma lokola ekaniseli ya masumu oyo bato na Ngai bazalaki kosala tango bazalaki koluka lisungi epai na yango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. › »
17 et factum est in vicesimo et septimo anno in primo in una mensis factum est verbum Domini ad me dicens
Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, na mobu ya tuku mibale na sambo, Yawe alobaki na ngai:
18 fili hominis Nabuchodonosor rex Babylonis servire fecit exercitum suum servitute magna adversum Tyrum omne caput decalvatum et omnis umerus depilatus est et merces non est reddita ei neque exercitui eius de Tyro pro servitute qua servivit mihi adversum eam
« Mwana na moto, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alendisaki makasi mampinga na ye mpo na kobundisa engumba Tiri; mito ya basoda nyonso ekomaki mabandi mpe mapeka na bango elongwaki-longwaki baposo. Nzokande, ye mpe mampinga na ye batikalaki kozwa litomba ata moko te na mosala na bango ya kobundisa engumba Tiri.
19 propterea haec dicit Dominus Deus ecce ego dabo Nabuchodonosor regem Babylonis in terra Aegypti et accipiet multitudinem eius et depraedabitur manubias eius et diripiet spolia eius et erit merces exercitui illius
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakokaba Ejipito na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni; mpe ye, akobotola bomengo na yango, akozwa bomengo ya bitumba mpe akobebisa yango nyonso penza.
20 et operi pro quo servivit adversum eam dedi ei terram Aegypti pro eo quod laboraverunt mihi ait Dominus Deus
Napesi epai ya Nabukodonozori mokili ya Ejipito lokola lifuti mpo na misala na ye, pamba te ye mpe mampinga na ye basalaki mpo na Ngai, elobi Nkolo Yawe.
21 in die illo pullulabit cornu domui Israhel et tibi dabo apertum os in medio eorum et scient quoniam ego Dominus
Na mokolo wana, nakobimisa liseke mpo na libota ya Isalaele; nakofungola monoko na yo kati na bango, mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »

< Hiezechielis Prophetæ 29 >