< Exodus 29 >

1 sed et hoc facies ut mihi in sacerdotio consecrentur tolle vitulum de armento et arietes duos inmaculatos
Tala ndenge okosala mpo na kobulisa Aron elongo na bana na ye ya mibali, na mosala ya bonganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. Okozwa mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali, ezanga mbeba;
2 panesque azymos et crustula absque fermento quae conspersa sint oleo lagana quoque azyma oleo lita de simila triticea cuncta facies
okosala mapa mpe bagato ezanga levire, oyo farine na yango basangisa na mafuta; okosala mpe mikate ezanga levire, kasi bapakola yango mafuta; okosala yango na farine oyo batuta mpe bayungola malamu.
3 et posita in canistro offeres vitulum autem et duos arietes
Okotia yango nyonso na kitunga moko mpe okomema yango na ekuke ya Mongombo, elongo na mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali.
4 et Aaron ac filios eius adplicabis ad ostium tabernaculi testimonii cumque laveris patrem cum filiis aqua
Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi.
5 indues Aaron vestimentis suis id est linea et tunica et superumerali et rationali quod constringes balteo
Okozwa bilamba ya bule mpe okolatisa Aron nzambala, kazaka, efode mpe elamba ya tolo; mpe okokanga ye mokaba ya efode.
6 et pones tiaram in capite eius et lamminam sanctam super tiaram
Okokanga ye kitendi na moto mpe okobakisa na likolo ya kitendi yango elembo ya libulisi.
7 et oleum unctionis fundes super caput eius atque hoc ritu consecrabitur
Okozwa mafuta ya epakolami, okosopa yango na moto na ye mpe okopakola ye yango.
8 filios quoque illius adplicabis et indues tunicis lineis cingesque balteo
Okomema bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala.
9 Aaron scilicet et liberos eius et inpones eis mitras eruntque sacerdotes mei in religione perpetua postquam initiaveris manus eorum
Okolatisa Aron mpe bana na ye ya mibali mikaba na loketo na bango mpe okolatisa bango bikoti. Na bongo, okobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe oyo ekozala ya bango kolanda mobeko ya libela na libela.
10 adplicabis et vitulum coram tabernaculo testimonii inponentque Aaron et filii eius manus super caput illius
Okomema ngombe ya mobali liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.
11 et mactabis eum in conspectu Domini iuxta ostium tabernaculi testimonii
Okokata ngombe yango kingo liboso na Ngai Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
12 sumptumque de sanguine vituli pones super cornua altaris digito tuo reliquum autem sanguinem fundes iuxta basim eius
Okozwa ndambo ya makila ya ngombe yango, mpe okosalela mosapi na yo mpo na kotia makila yango na maseke ya etumbelo; okosopa na makolo ya etumbelo makila oyo ekotikala.
13 sumes et adipem totum qui operit intestina et reticulum iecoris ac duos renes et adipem qui super eos est et offeres incensum super altare
Okozwa mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango; mpe okotumba yango na etumbelo.
14 carnes vero vituli et corium et fimum conbures foris extra castra eo quod pro peccato sit
Kasi okotumba na libanda ya molako misuni ya ngombe yango, poso na yango mpe nyei na yango. Ezali mbeka mpo na masumu.
15 unum quoque arietum sumes super cuius caput ponent Aaron et filii eius manus
Okozwa lisusu meme moko ya mobali; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.
16 quem cum mactaveris tolles de sanguine eius et fundes circa altare
Okokata meme yango kingo, okozwa makila na yango mpe okosopa yango na bapembeni nyonso ya etumbelo.
17 ipsum autem arietem secabis in frusta lotaque intestina eius ac pedes pones super concisas carnes et super caput illius
Okokata-kata meme yango na biteni, okosukola biloko na yango ya kati elongo na makolo na yango mpe okotia yango likolo ya biteni mosusu mpe likolo ya moto.
18 et offeres totum arietem in incensum super altare oblatio est Domini odor suavissimus victimae Dei
Okotumba meme mobimba ya mobali na etumbelo; ezali mbeka ya kotumba mpo na Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
19 tolles quoque arietem alterum super cuius caput Aaron et filii eius ponent manus
Okozwa meme mosusu ya mobali; Aron elongo na bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.
20 quem cum immolaveris sumes de sanguine ipsius et pones super extremum dextrae auriculae Aaron et filiorum eius et super pollices manus eorum et pedis dextri fundesque sanguinem super altare per circuitum
Okokata meme yango kingo, okozwa ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Okotia yango lisusu na mosapi ya monene ya loboko na bango ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya monene ya lokolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali.
21 cumque tuleris de sanguine qui est super altare et de oleo unctionis asperges Aaron et vestes eius filios et vestimenta eorum consecratisque et ipsis et vestibus
Okozwa makila oyo ekozala na etumbelo mpe mafuta ya epakolami, okosopela yango Aron mpe bilamba na ye, bana na ye mpe bilamba na bango. Na bongo, ye mpe bana na ye elongo na bilamba na bango bakobulisama.
22 tolles adipem de ariete et caudam et arvinam quae operit vitalia ac reticulum iecoris et duos renes atque adipem qui super eos est armumque dextrum eo quod sit aries consecrationum
Tala biteni ya mafuta ya meme ya mobali oyo okozwa: mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya ngambo ya mobali, pamba te meme yango ya mobali ezali ya libulisi.
23 tortam panis unius crustulum conspersum oleo laganum de canistro azymorum quod positum est in conspectu Domini
Tala biloko oyo okozwa kati na kitunga ya mapa ezanga levire, oyo ezali liboso ya Yawe: lipa moko, gato moko balamba na mafuta mpe galeti moko.
24 ponesque omnia super manus Aaron et filiorum eius et sanctificabis eos elevans coram Domino
Okotia biloko oyo nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali; okoyebisa bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola.
25 suscipiesque universa de manibus eorum et incendes super altare in holocaustum odorem suavissimum in conspectu Domini quia oblatio eius est
Okozwa yango lisusu na maboko na bango mpe okotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
26 sumes quoque pectusculum de ariete quo initiatus est Aaron sanctificabisque illud elatum coram Domino et cedet in partem tuam
Okozwa tolo ya meme ya mobali mpo na kobulisa Aron, okotombola yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola; ekozala eteni na yo.
27 sanctificabis et pectusculum consecratum et armum quem de ariete separasti
Okobulisa biteni ya libulisi mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali: tolo mpe mopende ya meme oyo batombolaki mpo na kobonzela Yawe.
28 quo initiatus est Aaron et filii eius cedentque in partem Aaron et filiorum eius iure perpetuo a filiis Israhel quia primitiva sunt et initia de victimis eorum pacificis quae offerunt Domino
Biteni yango ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali lokola mobeko ya libela na libela. Pamba te ezali makabo ya bana ya Isalaele mpo na Yawe, makabo oyo ekowuta na mbeka na bango ya boyokani.
29 vestem autem sanctam qua utitur Aaron habebunt filii eius post eum ut unguantur in ea et consecrentur manus eorum
Bilamba ya bule ya Aron ekotikala sima na ye epai ya bana na ye. Bakolata yango tango bakopakola bango mafuta mpe bakobulisa bango.
30 septem diebus utetur illa qui pontifex pro eo fuerit constitutus de filiis eius et qui ingredietur tabernaculum testimonii ut ministret in sanctuario
Mikolo sambo, moko kati na bana na ye ya mibali oyo akokitana na ye lokola Nganga-Nzambe, akolata yango mpe akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe kati na Esika ya bule.
31 arietem autem consecrationum tolles et coques carnes eius in loco sancto
Okokamata meme ya mobali ya libulisi mpe okolamba mosuni na yango na esika moko ya bule.
32 quibus vescetur Aaron et filii eius panes quoque qui sunt in canistro in vestibulo tabernaculi testimonii comedent
Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia mosuni ya meme mpe lipa oyo ezali kati na kitunga, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
33 ut sit placabile sacrificium et sanctificentur offerentium manus alienigena non vescetur ex eis quia sancti sunt
Kaka bango nde bakolia makabo oyo na nzela na yango mosala ya bolimbisi masumu esalemaki tango babulisaki bango mpo na mosala ya bonganga-Nzambe; kasi moto oyo abulisama te akoki kolia yango te, pamba te ezali bule.
34 quod si remanserit de carnibus consecratis sive de panibus usque mane conbures reliquias igni non comedentur quia sanctificata sunt
Soki mosuni ya mbeka ya libulisi mpe lipa ekomi kino na tongo, okotumba yango na moto. Bakoki kolia yango lisusu te, pamba te ezali bule.
35 omnia quae praecepi tibi facies super Aaron et filiis eius septem diebus consecrabis manus eorum
Sala mpo na Aron mpe mpo na bana na ye ya mibali makambo nyonso oyo natindi yo. Okosala mikolo sambo mpo na kobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe.
36 et vitulum pro peccato offeres per singulos dies ad expiandum mundabisque altare cum immolaris expiationis hostiam et ungues illud in sanctificationem
Mokolo na mokolo, okobonza mbeka ya ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Okopetola etumbelo na nzela ya mosala ya bolimbisi masumu, oyo okosala mpo na etumbelo yango mpe okosopela yango mafuta ya epakolami mpo na kobulisa yango.
37 septem diebus expiabis altare et sanctificabis et erit sanctum sanctorum omnis qui tetigerit illud sanctificabitur
Mikolo sambo, okosala mosala ya bolimbisi masumu na etumbelo mpo na kobulisa yango. Boye etumbelo ekokoma bule koleka mpe nyonso oyo ekotutana na yango ekokoma bule.
38 hoc est quod facies in altari agnos anniculos duos per singulos dies iugiter
Tala mbeka oyo okopesela mitindo ete batumbaka mokolo na mokolo na etumbelo mpo na libela: bana meme mibale ya mobu moko.
39 unum agnum mane et alterum vespere
Okotumba mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa.
40 decimam partem similae conspersae oleo tunso quod habeat mensuram quartam partem hin et vinum ad libandum eiusdem mensurae in agno uno
Mpo na mwana meme ya liboso, okopesa bakilo misato ya farine basangisa na litele moko na kati-kati ya litele ya mafuta, mpe okosopa litele moko na kati-kati ya litele ya vino lokola mbeka ya masanga.
41 alterum vero agnum offeres ad vesperam iuxta ritum matutinae oblationis et iuxta ea quae diximus in odorem suavitatis
Mpo na mwana meme ya mibale, okobonza yango na pokwa elongo na lolenge moko ya makabo oyo obonzaki na tongo: farine, mafuta mpe mbeka ya masanga ya vino; okobonza yango lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
42 sacrificium Domino oblatione perpetua in generationes vestras ad ostium tabernaculi testimonii coram Domino ubi constituam ut loquar ad te
Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, kati na bikeke nyonso: bokobanda kotumba yango na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya Yawe; ezali na esika wana nde nakobanda kokutana mpe kolobana na bino.
43 ibique praecipiam filiis Israhel et sanctificabitur altare in gloria mea
Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na bana ya Isalaele; bongo nkembo na Ngai ekobulisa esika yango.
44 sanctificabo et tabernaculum testimonii cum altari et Aaron cum filiis eius ut sacerdotio fungantur mihi
Nakobulisa Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo; nakobulisa lisusu Aron mpe bana na ye ya mibali mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe.
45 et habitabo in medio filiorum Israhel eroque eis Deus
Boye nakovanda kati na bana ya Isalaele mpe nakozala Nzambe na bango.
46 et scient quia ego Dominus Deus eorum qui eduxi eos de terra Aegypti ut manerem inter illos ego Dominus Deus ipsorum
Bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango, Nzambe oyo abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na kovanda kati na bango. Nazali Yawe, Nzambe na bango.

< Exodus 29 >