< Exodus 14 >

1 locutus est autem Dominus ad Mosen dicens
Yawe alobaki na Moyize:
2 loquere filiis Israhel reversi castrametentur e regione Phiahiroth quae est inter Magdolum et mare contra Beelsephon in conspectu eius castra ponetis super mare
« Loba na bana ya Isalaele ete bazonga mpe batonga molako pembeni ya Pi-Ayiroti, kati ya Migidoli mpe ebale monene. Batonga yango etalana na Bala-Tsefoni pembeni ya ebale monene.
3 dicturusque est Pharao super filiis Israhel coartati sunt in terra conclusit eos desertum
Faraon akokanisa ete bana ya Isalaele babungi na mokili, esobe ekangi bango.
4 et indurabo cor eius ac persequetur vos et glorificabor in Pharao et in omni exercitu eius scientque Aegyptii quia ego sum Dominus feceruntque ita
Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.
5 et nuntiatum est regi Aegyptiorum quod fugisset populus inmutatumque est cor Pharaonis et servorum eius super populo et dixerunt quid voluimus facere ut dimitteremus Israhel ne serviret nobis
Tango bayebisaki mokonzi ya Ejipito ete bana ya Isalaele bakimi, Faraon mpe bakalaka na ye babongolaki makanisi na bango mpo na bana ya Isalaele mpe balobaki: « Likambo nini oyo tosali? Totiki Isalaele kokende mpe tozangeli bato oyo bakoki kosalela biso! »
6 iunxit ergo currum et omnem populum suum adsumpsit secum
Boye Faraon azwaki shar oyo ezalaki ya kobombama mpe azwaki mampinga na ye elongo na ye.
7 tulitque sescentos currus electos quicquid in Aegypto curruum fuit et duces totius exercitus
Akamataki bashar nkama motoba oyo eleki malamu elongo na bashar nyonso ya Ejipito; shar moko na moko ezalaki na basoda misato.
8 induravitque Dominus cor Pharaonis regis Aegypti et persecutus est filios Israhel at illi egressi erant in manu excelsa
Yawe akomisaki motema ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, libanga mpo ete alanda bana ya Isalaele oyo bazalaki kotambola na bonsomi nyonso.
9 cumque persequerentur Aegyptii vestigia praecedentium reppererunt eos in castris super mare omnis equitatus et currus Pharaonis et universus exercitus erant in Ahiroth contra Beelsephon
Bato ya Ejipito, bampunda nyonso ya Faraon mpe shar mosusu ya Faraon elongo na bato oyo batambolisaka yango mpe mampinga mosusu ya Faraon balandaki bana ya Isalaele mpe bazwaki bango tango batongaki molako na bango pembeni ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni.
10 cumque adpropinquasset Pharao levantes filii Israhel oculos viderunt Aegyptios post se et timuerunt valde clamaveruntque ad Dominum
Lokola Faraon apusanaki, bana ya Isalaele batombolaki miso na bango mpe bamonaki ete bato ya Ejipito bazali kolanda bango na sima. Bana ya Isalaele babangaki makasi mpe bagangaki epai na Yawe.
11 et dixerunt ad Mosen forsitan non erant sepulchra in Aegypto ideo tulisti nos ut moreremur in solitudine quid hoc facere voluisti ut educeres nos ex Aegypto
Balobaki na Moyize: — Boni, ezali mpo ete malita ezali te na Ejipito, yango wana omemi biso mpo ete tokufa na esobe? Osali biso nini awa obimisi biso na Ejipito?
12 nonne iste est sermo quem loquebamur ad te in Aegypto dicentes recede a nobis ut serviamus Aegyptiis multo enim melius est servire eis quam mori in solitudine
Toyebisaki yo te tango tozalaki na Ejipito: « Tika biso kimia, tika biso tosalela bato ya Ejipito? » Pamba te elekaki malamu mpo na biso kosalela bato ya Ejipito na esika ya kokufa na esobe.
13 et ait Moses ad populum nolite timere state et videte magnalia Domini quae facturus est hodie Aegyptios enim quos nunc videtis nequaquam ultra videbitis usque in sempiternum
Moyize azongiselaki bango: — Bobanga te, boyika mpiko! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te.
14 Dominus pugnabit pro vobis et vos tacebitis
Yawe akobunda mpo na bino, mpe bino bovanda kimia.
15 dixitque Dominus ad Mosen quid clamas ad me loquere filiis Israhel ut proficiscantur
Yawe alobaki na Moyize: — Mpo na nini ozali koganga boye epai na Ngai? Loba na bana ya Isalaele ete batambola.
16 tu autem eleva virgam tuam et extende manum super mare et divide illud ut gradiantur filii Israhel in medio mari per siccum
Kasi yo, tombola lingenda na yo, sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpe kabola mayi mpo ete bana ya Isalaele bakoka kokatisa ebale monene lokola na mabele ya kokawuka.
17 ego autem indurabo cor Aegyptiorum ut persequantur vos et glorificabor in Pharaone et in omni exercitu eius in curribus et in equitibus illius
Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
18 et scient Aegyptii quia ego sum Dominus cum glorificatus fuero in Pharaone et in curribus atque in equitibus eius
Bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon, bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
19 tollensque se angelus Dei qui praecedebat castra Israhel abiit post eos et cum eo pariter columna nubis priora dimittens post tergum
Anjelu na Nzambe oyo azalaki kotambola liboso ya mampinga ya Isalaele azongaki sima na bango, mpe likonzi ya lipata elongwaki liboso na bango mpo ete etelema sima na bango.
20 stetit inter castra Aegyptiorum et castra Israhel et erat nubes tenebrosa et inluminans noctem ut ad se invicem toto noctis tempore accedere non valerent
Likonzi ya lipata etelemaki kati ya mampinga ya bato ya Ejipito mpe ya bana ya Isalaele. Likonzi ya lipata epesaki molili na ngambo moko mpe engengisaki ngambo mosusu; yango wana butu mobimba, bato ya Ejipito bakokaki kopusana te pembeni ya bana ya Isalaele.
21 cumque extendisset Moses manum super mare abstulit illud Dominus flante vento vehementi et urente tota nocte et vertit in siccum divisaque est aqua
Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene.
22 et ingressi sunt filii Israhel per medium maris sicci erat enim aqua quasi murus a dextra eorum et leva
Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.
23 persequentesque Aegyptii ingressi sunt post eos omnis equitatus Pharaonis currus eius et equites per medium maris
Bato ya Ejipito balandaki bango mpe bango nyonso bakotaki kati na ebale monene: bampunda nyonso ya Faraon, bashar na ye mpe batambolisi ya bampunda.
24 iamque advenerat vigilia matutina et ecce respiciens Dominus super castra Aegyptiorum per columnam ignis et nubis interfecit exercitum eorum
Liboso ete tongo etana, Yawe atelemaki na likolo ya likonzi ya moto mpe ya lipata, atalaki mampinga ya bato ya Ejipito mpe akotisaki mobulu kati na yango.
25 et subvertit rotas curruum ferebanturque in profundum dixerunt ergo Aegyptii fugiamus Israhelem Dominus enim pugnat pro eis contra nos
Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki: — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.
26 et ait Dominus ad Mosen extende manum tuam super mare ut revertantur aquae ad Aegyptios super currus et equites eorum
Yawe alobaki na Moyize: — Sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpo ete mayi ezonga mpe ekweyela bato ya Ejipito, bashar na bango mpe batambolisi ya bampunda.
27 cumque extendisset Moses manum contra mare reversum est primo diluculo ad priorem locum fugientibusque Aegyptiis occurrerunt aquae et involvit eos Dominus in mediis fluctibus
Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene, mpe liboso ete tongo etana, ebale monene ezongaki na esika na yango mpe bato ya Ejipito oyo balukaki kokima, bakutanaki na mayi liboso na bango. Boye Yawe azindisaki bango kati na ebale monene.
28 reversaeque sunt aquae et operuerunt currus et equites cuncti exercitus Pharaonis qui sequentes ingressi fuerant mare ne unus quidem superfuit ex eis
Mayi ezongaki mpe ezipaki bashar elongo na batambolisi ya bampunda mpe mampinga ya Faraon oyo elandaki bana ya Isalaele kati na ebale monene. Moko te kati na bango abikaki.
29 filii autem Israhel perrexerunt per medium sicci maris et aquae eis erant quasi pro muro a dextris et a sinistris
Kasi bana ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.
30 liberavitque Dominus in die illo Israhel de manu Aegyptiorum
Na mokolo wana, Yawe abikisaki bana ya Isalaele liboso ya bato ya Ejipito mpe bana ya Isalaele bamonaki bibembe ya bato ya Ejipito etandami na libongo ya ebale monene.
31 et viderunt Aegyptios mortuos super litus maris et manum magnam quam exercuerat Dominus contra eos timuitque populus Dominum et crediderunt Domino et Mosi servo eius
Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize.

< Exodus 14 >