< Danihelis Prophetæ 2 >

1 in anno secundo regni Nabuchodonosor vidit Nabuchodonosor somnium et conterritus est spiritus eius et somnium eius fugit ab eo
Na mobu ya mibale ya bokonzi na ye, Nabukodonozori alotaki ndoto. Molimo na ye etungisamaki makasi mpe pongi ekimaki ye.
2 praecepit ergo rex ut convocarentur arioli et magi et malefici et Chaldei et indicarent regi somnia sua qui cum venissent steterunt coram rege
Mokonzi abengisaki bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato ya mayele ya mabe mpo ete bayebisa ye ndoto oyo alotaki. Tango bayaki, batelemaki liboso ya mokonzi;
3 et dixit ad eos rex vidi somnium et mente confusus ignoro quid viderim
mpe mokonzi ayebisaki bango: — Nalotaki ndoto moko oyo ezali kotungisa molimo na ngai makasi; nazali na posa ya koyeba ndimbola na yango.
4 responderuntque Chaldei regi syriace rex in sempiternum vive dic somnium servis tuis et interpretationem eius indicabimus
Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na lokota ya bato ya Arami: — Tika ete mokonzi awumela na bomoi seko na seko! Yebisa ndoto na yo epai ya basali na yo, mpe tokolimbola yango.
5 et respondens rex ait Chaldeis sermo recessit a me nisi indicaveritis mihi somnium et coniecturam eius peribitis vos et domus vestrae publicabuntur
Mokonzi alobaki na bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto: — Tala mokano oyo nasili kozwa: « Soki boyebisi ngai te ndoto oyo nalotaki mpe ndimbola na yango, nakokata bino biteni-biteni mpe nakobuka-buka bandako na bino.
6 si autem somnium et coniecturam eius narraveritis praemia et dona et honorem multum accipietis a me somnium igitur et interpretationem eius indicate mihi
Kasi soki boyebisi mpe bopesi ngai ndimbola na yango, nakopesa bino bakado, lifuti mpe lokumu mingi. Yango wana, boyebisa ngai ndoto yango mpe bopesa ngai ndimbola na yango. »
7 responderunt secundo atque dixerunt rex somnium dicat servis suis et interpretationem illius indicabimus
Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki lisusu epai ya mokonzi: — Tika ete mokonzi ayebisa ndoto na ye, mpe biso, tokolimbolela ye yango!
8 respondit rex et ait certo novi quia tempus redimitis scientes quod recesserit a me sermo
Mokonzi azongisaki: — Nandimi solo ete bozali kolekisa tango, pamba te boyebi malamu ete nakobongola mokano na ngai te.
9 si ergo somnium non indicaveritis mihi una est de vobis sententia quod interpretationem quoque fallacem et deceptione plenam conposueritis ut loquamini mihi donec tempus pertranseat somnium itaque dicite mihi ut sciam quod interpretationem quoque eius veram loquamini
Soki boyebisi ngai ndoto yango te, boyeba malamu ete etumbu moko kaka mpe ya ndenge moko ezali kozela bino! Ah, boyokani koyebisa ngai makambo ya lokuta mpe ya mabe mpo bokanisi ete makambo ekobongwana! Mpo na yango, boyebisa ngai ndoto yango, mpe nakondima ete bozali na makoki ya kolimbola yango.
10 respondentes ergo Chaldei coram rege dixerunt non est homo super terram qui sermonem tuum rex possit implere sed neque regum quisquam magnus et potens verbum huiuscemodi sciscitatur ab omni ariolo et mago et Chaldeo
Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na mokonzi: — Moto moko te kati na mokili akokoka kosala makambo oyo mokonzi azali kosenga. Mpe mokonzi moko te, ezala azalaki moto monene to moto na nguya, asila kosenga likambo ya boye epai ya banganga-kisi, epai ya bato ya mayele ya mabe mpe epai ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto.
11 sermo enim quem tu rex quaeris gravis est nec repperietur quisquam qui indicet illum in conspectu regis exceptis diis quorum non est cum hominibus conversatio
Makambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi makasi, moto moko te akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye; ezali kaka banzambe nde bakoki kosala yango mpo ete bavandaka kati na bato te.
12 quo audito rex in furore et in ira magna praecepit ut perirent omnes sapientes Babylonis
Mbala moko, mokonzi asilikaki mpe atombokaki makasi; apesaki mitindo ete baboma bato nyonso ya bwanya ya Babiloni.
13 et egressa sententia sapientes interficiebantur quaerebaturque Danihel et socii eius ut perirent
Boye, sango ya mokano ya koboma bato nyonso ya bwanya epanzanaki, mpe batindaki bato koluka Daniele elongo na baninga na ye mpo ete baboma bango.
14 tunc Danihel requisivit de lege atque sententia ab Arioch principe militiae regis qui egressus fuerat ad interficiendos sapientes Babylonis
Tango Arioki, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abimaki mpo na kokende koboma bato ya bwanya ya Babiloni, Daniele asololaki na ye na bwanya mpe na mayele.
15 et interrogavit eum qui a rege acceperat potestatem quam ob causam tam crudelis sententia a facie esset regis egressa cum ergo rem indicasset Arioch Daniheli
Daniele atunaki Arioki: « Mpo na nini mokonzi azwi mokano ya makasi boye? » Bongo Arioki atalisaki Daniele makambo yango.
16 Danihel ingressus rogavit regem ut tempus daret sibi ad solutionem indicandam regi
Tango Daniele ayokaki bongo, akotaki epai ya mokonzi mpe asengaki ye tango mpo ete akoka kopesa ye ndimbola ya ndoto yango;
17 et ingressus est domum suam Ananiaeque Misaheli et Azariae sociis suis indicavit negotium
bongo Daniele azongaki na ndako na ye mpe ayebisaki makambo yango epai ya Anania, Mikaeli mpe Azaria, baninga na ye.
18 ut quaererent misericordiam a facie Dei caeli super sacramento isto et non perirent Danihel et socii eius cum ceteris sapientibus Babylonis
Alobaki na bango ete basenga ngolu mpe mawa ya Nzambe ya Lola na tina na mabombami oyo, mpo ete baboma te ye Daniele, baninga na ye mpe bato mosusu ya bwanya ya Babiloni.
19 tunc Daniheli per visionem nocte mysterium revelatum est et Danihel benedixit Deo caeli
Bongo na butu, Daniele azwaki emoniseli oyo elakisaki ye mabombami yango; boye, akumisaki Nzambe ya Lola.
20 et locutus ait sit nomen Domini benedictum a saeculo et usque in saeculum quia sapientia et fortitudo eius sunt
Daniele alobaki: Tika ete Kombo ya Nzambe ekumisama libela na libela! Bwanya mpe nguya ezali ya Ye.
21 et ipse mutat tempora et aetates transfert regna atque constituit dat sapientiam sapientibus et scientiam intellegentibus disciplinam
Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.
22 ipse revelat profunda et abscondita et novit in tenebris constituta et lux cum eo est
Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama, ayebaka makambo oyo esalemaka na molili, mpe pole ezali kati na Ye.
23 tibi Deus patrum meorum confiteor teque laudo quia sapientiam et fortitudinem dedisti mihi et nunc ostendisti mihi quae rogavimus te quia sermonem regis aperuisti nobis
Oh Nzambe ya batata na ngai, nazali kosanzola mpe kokumisa Yo mpo na bwanya mpe nguya oyo opesi ngai, pamba te oyebisi ngai makambo oyo tosengaki Yo mpe otalisi biso ndoto ya mokonzi.
24 post haec Danihel ingressus ad Arioch quem constituerat rex ut perderet sapientes Babylonis sic ei locutus est sapientes Babylonis ne perdas introduc me in conspectu regis et solutionem regi enarrabo
Sima na yango, Daniele akendeki epai ya Arioki oyo mokonzi apesaki mokumba ya koboma bato ya bwanya ya Babiloni; alobaki na ye: — Koboma bato ya bwanya ya Babiloni te! Mema ngai epai ya mokonzi, mpe nakopesa ye ndimbola ya ndoto na ye.
25 tunc Arioch festinus introduxit Danihelem ad regem et dixit ei inveni hominem de filiis transmigrationis Iudae qui solutionem regi adnuntiet
Arioki amemaki Daniele na lombangu liboso ya mokonzi mpe alobaki na ye: — Mokonzi, namoni moto moko kati na bawumbu oyo bawutaki na Yuda, oyo akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye mpe kolimbola yango.
26 respondit rex et dixit Daniheli cuius nomen erat Balthasar putasne vere potes indicare mihi somnium quod vidi et interpretationem eius
Mokonzi atunaki Daniele oyo bazalaki lisusu kobenga Belitsatsari: — Ozali na makoki ya koyebisa ngai makambo oyo namonaki na ndoto mpe kolimbola yango?
27 et respondens Danihel coram rege ait mysterium quod rex interrogat sapientes magi et arioli et aruspices non queunt indicare regi
Daniele azongisaki liboso ya mokonzi: — Bato ya bwanya, bato ya mayele ya mabe, banganga-kisi mpe bato oyo bayebaka makambo oyo ekoya bazali na makoki te ya koyebisa mokonzi mabombami oyo azali kotuna;
28 sed est Deus in caelo revelans mysteria qui indicavit tibi rex Nabuchodonosor quae ventura sunt novissimis temporibus somnium tuum et visiones capitis tui in cubili tuo huiuscemodi sunt
kasi kati na Lola, ezali na Nzambe moko oyo alakisaka mabombami; mpe alakisi mokonzi Nabukodonozori makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ekoya. Tala ndoto oyo olotaki mpe bimoniseli oyo ozwaki tango ozalaki ya kolala na mbeto na yo:
29 tu rex cogitare coepisti in stratu tuo quid esset futurum post haec et qui revelat mysteria ostendit tibi quae ventura sunt
« Oh mokonzi, wana ozalaki ya kolala na mbeto na yo, okomaki kokanisa makambo oyo ekoya na sima ya tango; bongo, Ye oyo alakisaka mabombami alakisaki yo makambo oyo ekoya.
30 mihi quoque non in sapientia quae est in me plus quam in cunctis viventibus sacramentum hoc revelatum est sed ut interpretatio regi manifesta fieret et cogitationes mentis tuae scires
Bongo soki alakisi mabombami yango epai na ngai, ezali te mpo ete naleki bato nyonso na bwanya, kasi ezali mpo ete mokonzi ayeba ndimbola ya ndoto na ye mpe makambo oyo ezali kotungisa motema na ye.
31 tu rex videbas et ecce quasi statua una grandis statua illa magna et statura sublimis stabat contra te et intuitus eius erat terribilis
Oh mokonzi, tala emoniseli oyo ozwaki: ‹ Ekeko moko ya monene ezalaki liboso na yo: ezalaki monene penza, ezalaki kongenga makasi mpe ezalaki somo mpo na kotala;
32 huius statuae caput ex auro optimo erat pectus autem et brachia de argento porro venter et femora ex aere
moto na yango ezalaki ya wolo ya peto, tolo mpe maboko na yango ezalaki ya palata, libumu mpe loketo na yango ezalaki ya bronze,
33 tibiae autem ferreae pedum quaedam pars erat ferrea quaedam fictilis
makolo na yango ezalaki ya ebende, matambe na yango ezalaki, ndambo moko ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko.
34 videbas ita donec abscisus est lapis sine manibus et percussit statuam in pedibus eius ferreis et fictilibus et comminuit eos
Wana ozalaki kotala ekeko yango, libanga moko ekweyaki yango moko (moto moko te abwakaki yango), ekweyelaki ekeko yango na matambe na yango ya ebende mpe ya mabele oyo basalelaka bikeko, enikaki matambe yango mpe ekomaki putulu.
35 tunc contrita sunt pariter ferrum testa aes argentum et aurum et redacta quasi in favillam aestivae areae rapta sunt vento nullusque locus inventus est eis lapis autem qui percusserat statuam factus est mons magnus et implevit universam terram
Mbala moko, ezala ebende to mabele oyo basalelaka bikeko to bronze to palata to mpe wolo, nyonso epanzanaki, ekomaki mike-mike mpe ekomaki kopumbwa ndenge matiti ya ble epumbwaka tango bapupolaka yango; mopepe ememaki yango mpe elimwisaki yango. Kasi libanga oyo ekweyelaki ekeko yango ekomaki ngomba moko ya monene oyo etondisaki mokili mobimba. › »
36 hoc est somnium interpretationem quoque eius dicemus coram te rex
Wana nde ezalaki ndoto; mpe sik’oyo, tokopesa ndimbola na yango liboso ya mokonzi!
37 tu rex regum es et Deus caeli regnum fortitudinem et imperium et gloriam dedit tibi
Oh mokonzi, ozali mokonzi ya bakonzi! Nzambe ya Lola apesaki yo makasi mpe nguya, bokonzi mpe nkembo;
38 et omnia in quibus habitant filii hominum et bestiae agri volucresque caeli dedit in manu tua et sub dicione tua universa constituit tu es ergo caput aureum
atiaki na se ya bokonzi na yo bato nyonso ya mokili, banyama ya zamba mpe bandeke ya likolo; atiaki yo mokonzi na bango nyonso, na bisika nyonso oyo bavandaka! Ezali yo nde ozali moto wana ya wolo.
39 et post te consurget regnum aliud minus te et regnum tertium aliud aereum quod imperabit universae terrae
Sima na yo, bokonzi mosusu ekobima, kasi ekoleka bokonzi na yo te na nguya; bongo na sima, bokonzi ya misato ekobima mpe ekokonza na mabele mobimba: yango nde ezali kolakisa bronze.
40 et regnum quartum erit velut ferrum quomodo ferrum comminuit et domat omnia sic comminuet omnia haec et conteret
Mpe na suka, bokonzi ya minei ekobima, ekozala makasi lokola ebende; ndenge ebende ebukaka, enikaka mpe epanzaka nyonso, ndenge wana mpe ekobuka mpe ekopanza babokonzi mosusu ya liboso.
41 porro quia vidisti pedum et digitorum partem testae figuli et partem ferream regnum divisum erit quod tamen de plantario ferri orietur secundum quod vidisti ferrum mixtum testae ex luto
Mpe ndenge kaka omonaki ete matambe mpe misapi ya makolo na yango ezali ndambo moko, ya mabele oyo basalelaka bikeko, mpe ndambo mosusu, ya ebende, elingi koloba ete bokonzi yango ekokabwana; kasi kati na yango, ekozala na eloko moko ya makasi lokola ebende, ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko.
42 et digitos pedum ex parte ferreos et ex parte fictiles ex parte regnum erit solidum et ex parte contritum
Mpe lokola misapi ya makolo ezalaki ndambo, ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko, bokonzi yango ekozala, ngambo moko, makasi, mpe ngambo mosusu, ezanga makasi.
43 quia autem vidisti ferrum mixtum testae ex luto commiscebuntur quidem humano semine sed non adherebunt sibi sicuti ferrum misceri non potest testae
Mpe ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko, elakisi ete bato bakoluka kosangana na nzela ya boyokani, kasi bakotikala kosangana te, ndenge kaka ebende esanganaka te na mabele oyo basalelaka bikeko.
44 in diebus autem regnorum illorum suscitabit Deus caeli regnum quod in aeternum non dissipabitur et regnum eius populo alteri non tradetur comminuet et consumet universa regna haec et ipsum stabit in aeternum
Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
45 secundum quod vidisti quod de monte abscisus est lapis sine manibus et comminuit testam et ferrum et aes et argentum et aurum Deus magnus ostendit regi quae futura sunt postea et verum est somnium et fidelis interpretatio eius
Yango nde ndimbola ya emoniseli ya libanga oyo omonaki kokweya yango moko wuta na ngomba, oyo loboko ya moto moko te ebwakaki, mpo na koya kopanza ebende, bronze, mabele oyo basalelaka bikeko, palata mpe wolo. Nzambe Monene alakisi mokonzi makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Ndoto oyo ezali penza kolakisa makambo ya solo, mpe ndimbola na yango ezali ebongi na kondima.
46 tunc rex Nabuchodonosor cecidit in faciem suam et Danihelum adoravit et hostias et incensum praecepit ut sacrificarent ei
Boye, mokonzi Nabukodonozori agumbamaki elongi kino na mabele, liboso ya Daniele, mpe apesaki ye lokumu; apesaki mitindo ete bapesa ye makabo mpe babonzela ye malasi ya ansa.
47 loquens ergo rex ait Daniheli vere Deus vester Deus deorum est et Dominus regum et revelans mysteria quoniam potuisti aperire sacramentum hoc
Mokonzi alobaki na Daniele: « Solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bakonzi mpe Molakisi mabombami, mpo ete okoki kolakisa mabombami oyo! »
48 tunc rex Danihelum in sublime extulit et munera multa et magna dedit ei et constituit eum principem super omnes provincias Babylonis et praefectum magistratuum super cunctos sapientes Babylonis
Sima, mokonzi atombolaki Daniele na lokumu oyo eleki likolo mpe apesaki ye bakado mpe bozwi ebele; akomisaki ye moyangeli ya etuka mobimba ya Babiloni mpe mokambi ya bato na yango nyonso ya bwanya.
49 Danihel autem postulavit a rege et constituit super opera provinciae Babylonis Sedrac Misac et Abdenago ipse autem Danihel erat in foribus regis
Daniele asengaki na mokonzi Nabukodonozori ete atia Shadraki, Meshaki mpe Abedinego lokola bayangeli ya etuka mobimba ya Babiloni wana ye moko Daniele atikalaki kosala pembeni ya mokonzi.

< Danihelis Prophetæ 2 >