< Ii Paralipomenon 34 >

1 octo annorum erat Iosias cum regnare coepisset et triginta et uno annis regnavit in Hierusalem
Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi.
2 fecitque quod erat rectum in conspectu Domini et ambulavit in viis David patris sui non declinavit neque ad dexteram neque ad sinistram
Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango: apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.
3 octavo autem anno regni sui cum adhuc esset puer coepit quaerere Deum patris sui David et duodecimo anno postquam coeperat mundavit Iudam et Hierusalem ab excelsis et lucis simulacrisque et sculptilibus
Na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye, lokola azalaki nanu elenge, akomaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye; bongo na mobu ya zomi na mibale, akomaki kopetola Yuda mpe Yelusalemi na kopekisa bato kokende na bisambelo ya likolo ya bangomba, na kobuka makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto.
4 destruxeruntque coram eo aras Baalim et simulacra quae superposita fuerant demoliti sunt lucos etiam et sculptilia succidit atque comminuit et super tumulos eorum qui eis immolare consueverant fragmenta dispersit
Babukaki liboso na ye bitumbelo ya banzambe Bala, bakweyisaki mbala moko bitumbelo malasi oyo ezalaki na likolo na yango, abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera, bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto; akomisaki yango putulu mpe asopaki putulu yango na likolo ya bakunda ya bato oyo babonzelaki banzambe yango bambeka.
5 ossa praeterea sacerdotum conbusit in altaribus idolorum mundavitque Iudam et Hierusalem
Atumbaki mikuwa ya banganga-nzambe ya bikeko na likolo ya bitumbelo na yango. Ezalaki ndenge wana nde apetolaki Yuda mpe Yelusalemi.
6 sed et in urbibus Manasse et Ephraim et Symeon usque Nepthalim cuncta subvertit
Abukaki bitumbelo kati na bingumba ya Manase, ya Efrayimi, ya Simeoni kino na Nefitali mpe na bamboka na yango ya zingazinga.
7 cumque altaria dissipasset et lucos et sculptilia contrivisset in frusta cunctaque delubra demolitus esset de universa terra Israhel reversus est Hierusalem
Abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe mpe akomisaki yango putulu. Akweyisaki lisusu bitumbelo malasi nyonso kati na mokili mobimba ya Isalaele. Bongo, azongaki na Yelusalemi.
8 igitur anno octavodecimo regni sui mundata iam terra et templo Domini misit Saphan filium Eseliae et Maasiam principem civitatis et Ioha filium Ioachaz a commentariis ut instaurarent domum Domini Dei sui
Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, mpo na kopetola mokili mpe Tempelo, atindaki Shafani, mwana mobali ya Atsalia; Maaseya, moyangeli ya engumba; mpe Yoa, mwana mobali ya Yoakazi mpe mobombi mikanda, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na ye.
9 qui venerunt ad Helciam sacerdotem magnum acceptamque ab eo pecuniam quae inlata fuerat in domum Domini et quam congregaverant Levitae ianitores de Manasse et Ephraim et universis reliquiis Israhel ab omni quoque Iuda et Beniamin et habitatoribus Hierusalem
Bakendeki epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe bapesaki ye mbongo oyo bazwaki na Tempelo ya Nzambe, mbongo oyo Balevi oyo bazalaki kokengela ekotelo bakongolaki lokola makabo mpo na Tempelo na maboko ya bato ya Manase, ya Efrayimi, ya batikali ya Isalaele, ya bato nyonso ya Yuda, ya Benjame mpe ya bavandi ya Yelusalemi.
10 tradiderunt in manibus eorum qui praeerant operariis in domo Domini ut instaurarent templum et infirma quaeque sarcirent
Bapesaki mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe. Bato yango bafutaki basali oyo bazalaki kobongisa mpe kolendisa Tempelo yango;
11 at illi dederunt eam artificibus et cementariis ut emerent lapides de lapidicinis et ligna ad commissuras aedificii et ad contignationem domorum quas destruxerant reges Iuda
bapesaki lisusu epai ya basharipantie mpe batongi Tempelo mpo ete basomba mabanga bakata elongo na mabaya mpo na motondo, mpe mpo ete batonga bandako mosusu oyo bakonzi ya Yuda bazalaki kobongisa te tango ezalaki kobeba.
12 qui fideliter cuncta faciebant erant autem praepositi operantium Iaath et Abdias de filiis Merari Zaccharias et Mosollam de filiis Caath qui urguebant opus omnes Levitae scientes organis canere
Bato yango basalaki mosala na bango na boyengebene mpe na bokambami ya Balevi Yaati mpe Abidiasi, bana mibali ya Merari. Zakari mpe Meshulami, bana mibali ya Keati, nde bazalaki kokengela mosala na bango.
13 super eos vero qui ad varios usus onera portabant erant scribae et magistri de Levitis ianitores
Balevi yango bayebaki mpe kobeta mindule; bazalaki kokengela bato oyo bazalaki komema biloko ya mosala mpe kokamba ba-oyo nyonso bazalaki kosala misala na bisika nyonso oyo mosala ezalaki kosalema. Balevi mosusu bazalaki bakomi mikanda, balakisi ya Mobeko mpe bakengeli bikuke.
14 cumque efferrent pecuniam quae inlata fuerat in templum Domini repperit Helcias sacerdos librum legis Domini per manum Mosi
Tango bazalaki kobimisa mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, Nganga-Nzambe Ilikia amonaki buku ya Mobeko ya Yawe, oyo epesamaki na nzela ya Moyize.
15 et ait ad Saphan scribam librum legis inveni in domo Domini et tradidit ei
Ilikia alobaki na Shafani, mokomi mikanda: — Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe! Mpe apesaki buku yango epai ya Shafani.
16 at ille intulit volumen ad regem et nuntiavit ei dicens omnia quae dedisti in manu servorum tuorum ecce conplentur
Shafani azwaki buku yango, amemaki yango epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye: — Basali na yo bazali kosala makambo nyonso oyo otindaki bango.
17 argentum quod reppertum est in domo Domini conflaverunt datumque est praefectis artificum et diversa opera fabricantium
Bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala mpe epai ya bato oyo bazali kosala misala.
18 praeterea tradidit mihi Helcias sacerdos hunc librum quem cum rege praesente recitasset
Mokomi mikanda, Shafani, alobaki na mokonzi: — Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko. Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi.
19 audissetque ille verba legis scidit vestimenta sua
Tango mokonzi ayokaki maloba ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye,
20 et praecepit Helciae et Ahicam filio Saphan et Abdon filio Micha Saphan quoque scribae et Asaiae servo regis dicens
apesaki mitindo oyo epai ya Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani; epai ya Abidoni, mwana mobali ya Mishe; epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi:
21 ite et orate Dominum pro me et pro reliquiis Israhel et Iuda super universis sermonibus libri istius qui reppertus est magnus enim furor Domini stillavit super nos eo quod non custodierint patres nostri verba Domini ut facerent omnia quae scripta sunt in isto volumine
— Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai mpe mpo na batikali ya Isalaele mpe ya Yuda; botuna na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana, pamba te kanda ya Yawe, oyo ekweyeli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te Liloba na Yawe mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na buku oyo.
22 abiit igitur Helcias et hii qui simul a rege missi fuerant ad Holdan propheten uxorem Sellum filii Thecuath filii Hasra custodis vestium quae habitabat Hierusalem in secunda et locuti sunt ei verba quae supra narravimus
Ilikia elongo na bato oyo mokonzi aponaki bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tokeati, mwana mobali ya Asira, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, na etuka ya sika. Balobaki na ye ndenge bayokanaki.
23 at illa respondit eis haec dicit Dominus Deus Israhel dicite viro qui misit vos ad me
Ulida alobaki na bango: — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Boloba na tata oyo atindi bino epai na Ngai:
24 haec dicit Dominus ecce ego inducam mala super locum istum et super habitatores eius cunctaque maledicta quae scripta sunt in libro hoc quem legerunt coram rege Iuda
‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda bilakeli mabe nyonso oyo ekomama kati na buku oyo bawuti kotanga liboso ya mokonzi ya Yuda. ›
25 quia dereliquerunt me et sacrificaverunt diis alienis ut me ad iracundiam provocarent in cunctis operibus manuum suarum idcirco stillavit furor meus super locum istum et non extinguetur
Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola kanda na Ngai na nzela ya biloko oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai ekopela makasi na esika oyo, mpe ekokita te.
26 ad regem autem Iuda qui misit vos pro Domino deprecando sic loquimini haec dicit Dominus Deus Israhel quoniam audisti verba voluminis
Kasi boloba na mokonzi ya Yuda oyo atindi bino kotuna toli ya Yawe: ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na maloba oyo oyokaki:
27 atque emollitum est cor tuum et humiliatus es in conspectu Dei super his quae dicta sunt contra locum hunc et habitatores Hierusalem reveritusque faciem meam scidisti vestimenta tua et flevisti coram me ego quoque exaudivi te dicit Dominus
Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Nzambe sima na yo koyoka maloba na Ye mpo na kotelemela esika oyo mpe bavandi na yango, lokola omikitisi liboso na Ngai, lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, › elobi Yawe,
28 iam enim colligam te ad patres tuos et infereris in sepulchrum tuum in pace nec videbunt oculi tui omne malum quod ego inducturus sum super locum istum et super habitatores eius rettulerunt itaque regi cuncta quae dixerat
‹ nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo mpe bavandi na yango. › » Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.
29 at ille convocatis universis maioribus natu Iuda et Hierusalem
Mokonzi Joziasi abengisaki bampaka nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi.
30 ascendit domum Domini unaque omnes viri Iuda et habitatores Hierusalem sacerdotes et Levitae et cunctus populus a minimo usque ad maximum quibus audientibus in domo Domini legit rex omnia verba voluminis
Bongo akendeki na Tempelo ya Yawe elongo na bato nyonso ya Yuda, bavandi nyonso ya Yelusalemi, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso, kobanda na oyo aleki na lokumu kino na oyo aleki na se. Mokonzi atangelaki bango makomi nyonso ya buku ya Boyokani oyo emonanaki kati na Tempelo ya Yawe.
31 et stans in tribunali suo percussit foedus coram Domino ut ambularet post eum et custodiret praecepta et testimonia et iustificationes eius in toto corde suo et in tota anima sua faceretque quae scripta sunt in volumine illo quem legerat
Mokonzi atelemaki na etemelo na ye ya kolobela mpe asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe: — Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo.
32 adiuravit quoque super hoc omnes qui repperti fuerant in Hierusalem et Beniamin et fecerunt habitatores Hierusalem iuxta pactum Domini Dei patrum suorum
Mokonzi alapisaki ndayi yango bato nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi mpe kati na etuka ya Benjame. Mpe bavandi ya Yelusalemi batambolaki kolanda boyokani ya Nzambe, Nzambe ya batata na bango.
33 abstulit ergo Iosias cunctas abominationes de universis regionibus filiorum Israhel et fecit omnes qui residui erant in Israhel servire Domino Deo suo cunctis diebus eius non recesserunt a Domino Deo patrum suorum
Joziasi alongolaki banzambe nyonso ya bikeko ya nkele kati na bituka nyonso ya bana ya Isalaele. Apesaki mitindo na bato nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele ete basalela Yawe, Nzambe na bango. Na bongo, na mikolo nyonso ya bomoi ya Joziasi, bapengwaki te liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango.

< Ii Paralipomenon 34 >