< I Samuelis 3 >

1 puer autem Samuhel ministrabat Domino coram Heli et sermo Domini erat pretiosus in diebus illis non erat visio manifesta
Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te.
2 factum est ergo in die quadam Heli iacebat in loco suo et oculi eius caligaverant nec poterat videre
Mokolo moko na butu, Nganga-Nzambe Eli azalaki ya kolala na esika na ye; miso na ye elembaki mpe akokaki lisusu komona te.
3 lucerna Dei antequam extingueretur Samuhel autem dormiebat in templo Domini ubi erat arca Dei
Mwinda ya Esika ya bule ezalaki kopela, wana Samuele azalaki ya kolala kati na Tempelo ya Yawe, epai wapi Sanduku ya Nzambe ezalaki.
4 et vocavit Dominus Samuhel qui respondens ait ecce ego
Yawe abengaki Samuele, mpe ye azongisaki: — Ngai oyo!
5 et cucurrit ad Heli et dixit ecce ego vocasti enim me qui dixit non vocavi revertere dormi et abiit et dormivit
Akendeki mbangu epai ya Eli mpe alobaki: — Ngai oyo, obengi ngai! Kasi Eli alobaki na ye: — Nabengi yo te! Zonga mpe lala. Samuele akendeki mpe alalaki.
6 et adiecit Dominus vocare rursum Samuhel consurgensque Samuhel abiit ad Heli et dixit ecce ego quia vocasti me qui respondit non vocavi te fili mi revertere et dormi
Yawe abengaki lisusu: — Samuele! Samuele alamukaki, azongaki epai ya Eli mpe alobaki: — Ngai oyo, obengi ngai! Eli alobaki na ye: — Mwana na ngai, nabengi yo te. Zonga, kende kolala.
7 porro Samuhel necdum sciebat Dominum neque revelatus fuerat ei sermo Domini
Nzokande, Samuele ayebaki nanu Yawe te mpe atikalaki nanu te koyoka Yawe koloba na ye ata mbala moko.
8 et adiecit Dominus et vocavit adhuc Samuhel tertio qui consurgens abiit ad Heli
Yawe abengaki Samuele na mbala ya misato; mpe Samuele atelemaki, akendeki epai ya Eli mpe alobaki: — Ngai oyo, obengi ngai! Bongo Eli asosolaki ete ezalaki Yawe nde azalaki kobenga elenge mobali.
9 et ait ecce ego quia vocasti me intellexit igitur Heli quia Dominus vocaret puerum et ait ad Samuhel vade et dormi et si deinceps vocaverit te dices loquere Domine quia audit servus tuus abiit ergo Samuhel et dormivit in loco suo
Boye Eli alobaki na Samuele: — Kende na yo kolala; mpe soki abengi yo, okoloba: « Yawe loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka! » Samuele akendeki mpe alalaki na esika na ye.
10 et venit Dominus et stetit et vocavit sicut vocaverat secundo Samuhel Samuhel et ait Samuhel loquere quia audit servus tuus
Yawe ayaki mpe atelemaki wana; abengaki lokola na mbala mosusu: — Samuele! Samuele! Samuele azongisaki: — Nkolo, loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka.
11 et dixit Dominus ad Samuhel ecce ego facio verbum in Israhel quod quicumque audierit tinnient ambae aures eius
Yawe alobaki na Samuele: — Tala, nalingi kosala likambo moko oyo, kati na Isalaele, ekosala pasi na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka yango.
12 in die illo suscitabo adversum Heli omnia quae locutus sum super domum eius incipiam et conplebo
Na tango wana, nakokokisa makambo nyonso oyo nayebisaki Eli mpo na kotelemela libota na ye, wuta na ebandeli kino na suka.
13 praedixi enim ei quod iudicaturus essem domum eius in aeternum propter iniquitatem eo quod noverat indigne agere filios suos et non corripuit eos
Pamba te nayebisaki ye ete nakosambisa libota na ye mpo na libela, mpo na masumu oyo ye ayebi, masumu oyo na nzela na yango bana na ye ya mibali bamikomisaki mbindo, kasi ye apamelaki bango te.
14 idcirco iuravi domui Heli quod non expietur iniquitas domus eius victimis et muneribus usque in aeternum
Yango wana, nalapi ndayi mpo na ndako ya Eli ete mbeba ya libota na ye ekotikala kolimbisama te, ezala na nzela ya bambeka to ya makabo.
15 dormivit autem Samuhel usque mane aperuitque ostia domus Domini et Samuhel timebat indicare visionem Heli
Samuele alalaki kino na tongo. Bongo sima na ye kolamuka, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe. Azalaki kobanga koyebisa Eli emoniseli oyo azwaki.
16 vocavit ergo Heli Samuhelem et dixit Samuhel fili mi qui respondens ait praesto sum
Kasi Eli abengaki Samuele mpe alobaki: — Samuele, mwana na ngai! Samuele azongisaki: — Ngai oyo!
17 et interrogavit eum quis est sermo quem locutus est ad te oro te ne celaveris me haec faciat tibi Deus et haec addat si absconderis a me sermonem ex omnibus verbis quae dicta sunt tibi
Eli atunaki ye: — Makambo nini Yawe ayebisaki yo? Kobombela ngai te. Tika ete Nzambe apesa yo etumbu ya makasi soki obombeli ngai ata likambo moko kati na nyonso oyo alobaki na yo.
18 indicavit itaque ei Samuhel universos sermones et non abscondit ab eo et ille respondit Dominus est quod bonum est in oculis suis faciat
Boye Samuele ayebisaki ye makambo nyonso, abombelaki ye ata likambo moko te. Mpe Eli alobaki: — Azali Yawe. Tika ete asala makambo oyo ezali malamu na miso na Ye.
19 crevit autem Samuhel et Dominus erat cum eo et non cecidit ex omnibus verbis eius in terram
Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso.
20 et cognovit universus Israhel a Dan usque Bersabee quod fidelis Samuhel propheta esset Domini
Bato nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bandimaki ete Samuele azali penza mosakoli ya Yawe.
21 et addidit Dominus ut appareret in Silo quoniam revelatus fuerat Dominus Samuheli in Silo iuxta verbum Domini et evenit sermo Samuhelis universo Israheli
Yawe akobaki komilakisa na Silo, pamba te azalaki komimonisa kuna epai ya Samuele na nzela ya Liloba na Ye.

< I Samuelis 3 >