< I Paralipomenon 17 >

1 cum autem habitaret David in domo sua dixit ad Nathan prophetam ecce ego habito in domo cedrina arca autem foederis Domini sub pellibus est
Wana Davidi avandaki na ndako na ye ya bokonzi, alobaki na mosakoli Natan: — Nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezali kati na ndako ya kapo.
2 et ait Nathan ad David omnia quae in corde tuo sunt fac Deus enim tecum est
Natan azongiselaki Davidi: — Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Nzambe azali elongo na yo.
3 igitur nocte illa factus est sermo Dei ad Nathan dicens
Kasi na butu wana, Nzambe alobaki na Natan:
4 vade et loquere David servo meo haec dicit Dominus non aedificabis tu mihi domum ad habitandum
— Kende koyebisa Davidi, mosali na Ngai: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Ezali yo te moto okotongela Ngai ndako mpo ete navanda kati na yango.
5 neque enim mansi in domo ex eo tempore quo eduxi Israhel usque ad hanc diem sed fui semper mutans loca tabernaculi et in tentorio
Banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo, natikali nanu kovanda na ndako moko te; nazalaki kaka kati na Mongombo, longwa na esika songolo kino na esika pakala.
6 manens cum omni Israhel numquid locutus sum saltim uni iudicum Israhel quibus praeceperam ut pascerent populum meum et dixi quare non aedificastis mihi domum cedrinam
Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na Ngai: ‘Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele?’ ›
7 nunc itaque sic loqueris ad servum meum David haec dicit Dominus exercituum ego tuli te cum in pascuis sequereris gregem ut esses dux populi mei Israhel
Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai: ‹ Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele.
8 et fui tecum quocumque perrexisti et interfeci omnes inimicos tuos coram te fecique tibi nomen quasi unius magnorum qui celebrantur in terra
Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili.
9 et dedi locum populo meo Israhel plantabitur et habitabit in eo et ultra non commovebitur nec filii iniquitatis adterent eos sicut a principio
Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso;
10 ex diebus quibus dedi iudices populo meo Israhel et humiliavi universos inimicos tuos adnuntio ergo tibi quod aedificaturus sit domum tibi Dominus
mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakotia lisusu banguna na yo na se ya bokonzi na yo. Boye, nazali koyebisa yo ete Yawe akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.
11 cumque impleveris dies tuos ut vadas ad patres tuos suscitabo semen tuum post te quod erit de filiis tuis et stabiliam regnum eius
Tango okosilisa mobembo na yo awa na mokili mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo; mpe nakolendisa bokonzi na ye.
12 ipse aedificabit mihi domum et firmabo solium eius usque in aeternum
Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi.
13 ego ero ei in patrem et ipse erit mihi in filium et misericordiam meam non auferam ab eo sicut abstuli ab eo qui ante te fuit
Nakozala tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai; nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya mokonzi oyo alekaki liboso na yo.
14 et statuam eum in domo mea et in regno meo usque in sempiternum et thronus eius erit firmissimus in perpetuum
Nakotia ye mokonzi ya ndako na Ngai mpe ya mokili na Ngai mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. › »
15 iuxta omnia verba haec et iuxta universam visionem istam sic locutus est Nathan ad David
Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso.
16 cumque venisset rex David et sedisset coram Domino dixit quis ego sum Domine Deus et quae domus mea ut praestares mihi talia
Mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki: « Oh Yawe Nzambe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali?
17 sed et hoc parum visum est in conspectu tuo ideoque locutus es super domum servi tui etiam in futurum et fecisti me spectabilem super omnes homines Domine Deus meus
Mpe lokola nde ekokaki te na miso na Yo, Nzambe na ngai, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo! Oh Yawe Nzambe, ozali kozwa ngai lokola moto ya lokumu!
18 quid ultra addere potest David cum ita glorificaveris servum tuum et cognoveris eum
Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo mpo na lokumu oyo ozali kopesa na mosali na Yo? Pamba te, oh Yawe, oyebi mosali na Yo.
19 Domine propter famulum tuum iuxta cor tuum fecisti omnem magnificentiam hanc et nota esse voluisti universa magnalia
Oh Yawe, mpo na mosali na Yo mpe kolanda mokano na Yo, okokisi makambo minene oyo mpe osali ete bilaka minene oyo nyonso eyebana.
20 Domine non est similis tui et non est alius deus absque te ex omnibus quos audivimus auribus nostris
Oh Yawe, moko te akokani na Yo; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo!
21 quis autem est alius ut populus tuus Israhel gens una in terra ad quam perrexit Deus ut liberaret et faceret populum sibi et magnitudine sua atque terroribus eiceret nationes a facie eius quem de Aegypto liberarat
Boni, ezali solo na ekolo moko kati na mokili, oyo ekokani na bato na Yo, Isalaele; ekolo oyo, kati na mokili, Nzambe asikola bato na yango mpo na lokumu na Ye moko? Osalaki ete Kombo na yo ekende sango na nzela ya misala minene mpe ya somo oyo osalaki tango obenganaki bikolo liboso ya bato na Yo, oyo akangolaki na Ejipito.
22 et posuisti populum tuum Israhel tibi in populum usque in aeternum et tu Domine factus es Deus eius
Okomisi Isalaele bato na Yo mpo na libela, mpe Yo, Yawe, okomi Nzambe na bango.
23 nunc igitur Domine sermo quem locutus es famulo tuo et super domum eius confirmetur in perpetuum et fac sicut locutus es
Bongo sik’oyo, oh Yawe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe libota na ye ekokisama mpo na libela! Sala ndenge olakaki.
24 permaneatque et magnificetur nomen tuum usque in sempiternum et dicatur Dominus exercituum Deus Israhel et domus David servi eius permanens coram eo
Boye, sala ete ekokisama, mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko mpe bato bakoma kolobaka: ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, azali solo Nzambe mpo na Isalaele! › Boye bokonzi ya libota ya mosali na Yo, Davidi, ekolendisama liboso na Yo.
25 tu enim Domine Deus meus revelasti auriculam servi tui ut aedificares ei domum et idcirco invenit servus tuus fiduciam ut oret coram te
Solo, Yo moko, Nzambe na ngai, olakisaki na mosali na Yo ete okosala ete bokonzi ewumela na libota na ye. Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo.
26 nunc ergo Domine tu es Deus et locutus es ad servum tuum tanta beneficia
Sik’oyo oh Yawe, ozali Nzambe! Olakaki makambo ya malamu epai ya mosali na Yo.
27 et coepisti benedicere domui servi tui ut sit semper coram te te enim Domine benedicente benedicta erit in perpetuum
Osepeli sik’oyo kopambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo; pamba te ezali Yo, Yawe, nde opamboli yango, mpe epambolami mpo na libela. »

< I Paralipomenon 17 >