< I Paralipomenon 11 >

1 congregatus est igitur omnis Israhel ad David in Hebron dicens os tuum sumus et caro tua
Bato nyonso ya Isalaele basanganaki na Ebron, epai ya Davidi mpe balobaki: « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko na yo.
2 heri quoque et nudius tertius cum adhuc regnaret Saul tu eras qui educebas et introducebas Israhel tibi enim dixit Dominus Deus tuus tu pasces populum meum Israhel et tu eris princeps super eum
Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo: ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
3 venerunt ergo omnes maiores natu Israhel ad regem in Hebron et iniit David cum eis foedus coram Domino unxeruntque eum regem super Israhel iuxta sermonem Domini quem locutus est in manu Samuhel
Tango bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi, Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, kolanda Liloba na Yawe na nzela ya Samuele.
4 abiit quoque David et omnis Israhel in Hierusalem haec est Iebus ubi erant Iebusei habitatores terrae
Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bakendeki kobundisa Yelusalemi oyo bazalaki kobenga « Yebusi. » Bato oyo bazalaki kovanda kuna bazali bato ya Yebusi.
5 dixeruntque qui habitabant in Iebus ad David non ingredieris huc porro David cepit arcem Sion quae est civitas David
Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi: « Okokota awa te! » Kasi Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi.
6 dixitque omnis qui percusserit Iebuseum in primis erit princeps et dux ascendit igitur primus Ioab filius Sarviae et factus est princeps
Davidi alobaki na bato na ye: « Moto oyo akobundisa mpe akolonga bato ya Yebusi, akokoma mokonzi ya liboso ya basoda. » Joabi, mwana mobali ya Tseruya, atelemaki moto ya liboso mpo na kobundisa bato ya Yebusi mpe akomaki mokonzi ya liboso ya mampinga.
7 habitavit autem David in arce et idcirco appellata est civitas David
Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi; yango wana babengaki yango « Engumba ya Davidi. »
8 aedificavitque urbem in circuitu a Mello usque ad gyrum Ioab autem reliqua urbis extruxit
Mpe atongaki bandako zingazinga na yango, longwa na Milo kino na mir ya kati. Bongo Joabi abongisaki bisika oyo etikalaki kati na engumba.
9 proficiebatque David vadens et crescens et Dominus exercituum erat cum eo
Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, azalaki elongo na ye.
10 hii principes virorum fortium David qui adiuverunt eum ut rex fieret super omnem Israhel iuxta verbum Domini quod locutus est ad Israhel
Tala bakombo ya bakonzi ya basoda ya mpiko ya Davidi oyo, elongo na Isalaele mobimba, basungaki ye mpo na kokomisa bokonzi na ye makasi, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele.
11 et iste numerus robustorum David Iesbaam filius Achamoni princeps inter triginta iste levavit hastam suam super trecentos vulneratos una vice
Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi: Yashobeami, mwana mobali ya Akimoni, azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko; abomaki na likonga bato nkama misato na etumba moko.
12 et post eum Eleazar filius patrui eius Ahoites qui erat inter tres potentes
Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi: azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko;
13 iste fuit cum David in Aphesdommim quando Philisthim congregati sunt ad locum illum in proelium et erat ager regionis illius plenus hordeo fugeratque populus a facie Philisthinorum
mpe azalaki elongo na Davidi, na engumba Pasi-Damini, tango bato ya Filisitia basanganaki mpo na bitumba, mpe basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango. Ezalaki kuna mpe na elanga moko etonda na bambuma ya orje.
14 hic stetit in medio agri et defendit eum cumque percussisset Philistheos dedit Dominus salutem magnam populo suo
Kasi basoda ya Eleazari babombamaki kati na elanga, babundelaki yango mpe babomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.
15 descenderunt autem tres de triginta principibus ad petram in qua erat David ad speluncam Odollam quando Philisthim fuerant castrametati in valle Raphaim
Kati na basoda tuku misato ya mpiko, misato bayaki epai ya Davidi, na libanga monene oyo ezalaki pene ya ebombamelo ya mabanga ya Adulami. Nzokande, basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya bakitani ya Rafa.
16 porro David erat in praesidio et statio Philisthinorum in Bethleem
Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki kati na Beteleemi.
17 desideravit igitur David et dixit o si quis daret mihi aquam de cisterna Bethleem quae est in porta
Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki: « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela? »
18 tres ergo isti per media castra Philisthinorum perrexerunt et hauserunt aquam de cisterna Bethleem quae erat in porta et adtulerunt ad David ut biberet qui noluit sed magis libavit illam Domino
Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe.
19 dicens absit ut in conspectu Dei mei hoc faciam et sanguinem virorum istorum bibam quia in periculo animarum suarum adtulerunt mihi aquam et ob hanc causam noluit bibere haec fecerunt tres robustissimi
Davidi alobaki: « Tika ete Nzambe na ngai apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo! Boni, namela penza mayi oyo ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende mpe batekaki milimo na bango mpo ete batoka yango? » Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki.
20 Abisai quoque frater Ioab ipse erat princeps trium et ipse levavit hastam suam contra trecentos vulneratos et ipse erat inter tres nominatissimus
Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.
21 inter tres secundos inclitus et princeps eorum verumtamen usque ad tres primos non pervenerat
Kati na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya mibale, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.
22 Banaia filius Ioiadae viri robustissimi qui multa opera perpetrarat de Capsehel ipse percussit duos Arihel Moab et ipse descendit et interfecit leonem in media cisterna tempore nivis
Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa: abomaki bilombe mibale ya mboka Moabi; mpe na mokolo moko ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
23 et ipse percussit virum aegyptium cuius statura erat quinque cubitorum et habebat lanceam ut liciatorium texentium descendit ergo ad eum cum virga et rapuit hastam quam tenebat manu et interfecit eum hasta sua
Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo azalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe asimbaki na loboko na ye likonga moko lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. Abundisaki moto ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.
24 haec fecit Banaia filius Ioiada qui erat inter tres robustos nominatissimus
Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki; ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko.
25 inter triginta primus verumtamen ad tres usque non pervenerat posuit autem eum David ad auriculam suam
Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.
26 porro fortissimi in exercitu Asahel frater Ioab et Eleanan filius patrui eius de Bethleem
Basoda ya mpiko bazalaki: Asaeli, ndeko mobali ya Joabi; Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi;
27 Semmoth Arorites Helles Phallonites
Shamoti, moto ya Arori; Eletsi, moto ya Peloni;
28 Iras filius Acces Thecuites Abiezer Anathothites
Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa; Abiezeri, moto ya Anatoti;
29 Sobbochai Asothites Ilai Ahoites
Sibekayi, moto ya Usha; Ilayi, moto ya Aoyi;
30 Marai Netophathites Heled filius Baana Netophathites
Maarayi, moto ya Netofa; Eledi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa;
31 Ethai filius Ribai de Gabaath filiorum Beniamin Banaia Pharathonites
Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame; Benaya, moto ya Piratoni;
32 Uri de torrente Gaas Abial Arabathites Azmoth Bauramites Eliaba Salabonites
Urayi, moto ya mabwaku ya Gashi; Abieli, moto ya Beti-Ariba;
33 filii Asom Gezonites Ionathan filius Sega Ararites
Azimaveti, moto ya Baarumi; Eliaba, moto ya Shaaliboni;
34 Ahiam filius Sachar Ararites
Beni-Ashemi, moto ya Gizoni; Jonatan, mwana mobali ya Shage, moto ya Arari;
35 Eliphal filius Ur
Ayami, mwana mobali ya Sakari, moto ya Arari; Elifali, mwana mobali ya Uri;
36 Apher Mechurathites Ahia Phellonites
Eferi, moto ya Mekera; Ayiya, moto ya Peloni;
37 Asrai Carmelites Noorai filius Azbi
Etsiro, moto ya Karimeli; Naarayi, mwana mobali ya Ezibayi;
38 Iohel frater Nathan Mabar filius Agarai
Joeli, ndeko mobali ya Natan; Mibiari, mwana mobali ya Agiri;
39 Sellec Ammonites Noorai Berothites armiger Ioab filii Sarviae
Tseleki, moto ya Amoni; Naarayi, moto ya Beroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya;
40 Iras Iethreus Gareb Iethreus
Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri;
41 Urias Ettheus Zabad filius Ooli
Iri, moto ya Iti; Zabadi, mwana mobali ya Akilayi;
42 Adina filius Seza Rubenites princeps Rubenitarum et cum eo triginta
Adina, mwana mobali ya Shiza ya ekolo ya Ribeni mpe mokambi ya mampinga tuku misato ya mpiko;
43 Hanan filius Maacha et Iosaphat Mathanites
Anani, mwana mobali ya Maaka; Jozafati, moto ya Mitini;
44 Ozias Astharothites Semma et Iaihel filii Hotam Aroerites
Uzia, moto ya Ashitaroti; Shama mpe Yeyeli, bana mibali ya Otami, moto ya Aroeri;
45 Iedihel filius Samri et Ioha frater eius Thosaites
Yediayeli, mwana mobali ya Shimiri; Yoa, ndeko na ye ya mobali, moto ya Tishi;
46 Elihel Maumites et Ieribai et Iosaia filii Elnaem
Elieli, moto ya Maavimi; Yeribayi mpe Yoshavia, bana mibali ya Elinaami; Yitima, moto ya Moabi;
47 et Iethma Moabites Elihel et Obed et Iasihel de Masobia
Elieli, Obedi mpe Yaasieli, bato ya Metsobaya.

< I Paralipomenon 11 >