< Psalmorum 3 >
1 Psalmus David, Cum fugeret a facie Absalom filii sui. Domine quid multiplicati sunt qui tribulant me? multi insurgunt adversum me.
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye. Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai!
2 Multi dicunt animae meae: Non est salus ipsi in Deo eius.
Ebele bazali koloba na tina na ngai: « Nzambe akobikisa ye te! »
3 Tu autem Domine susceptor meus es, gloria mea, et exaltans caput meum.
Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.
4 Voce mea ad Dominum clamavi: et exaudivit me de monte sancto suo.
Nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.
5 Ego dormivi, et soporatus sum: et exurrexi, quia Dominus suscepit me.
Nalalaka mpe nazwaka pongi; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai.
6 Non timebo millia populi circumdantis me: exurge Domine: salvum me fac Deus meus.
Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso.
7 Quoniam tu percussisti omnes adversantes mihi sine causa: dentes peccatorum contrivisti.
Yawe, telema! Nzambe na ngai, kangola ngai! Beta banguna na ngai nyonso bambata, buka bato mabe minu.
8 Domini est salus: et super populum tuum benedictio tua.
Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe. Tika ete lipamboli na Yo ewumela kati na bato na Yo.