< Job 7 >

1 Militia est vita hominis super terram: et sicut dies mercenarii, dies eius.
Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka bomoi ya pasi te? Mikolo ya bomoi na ye ezali penza mikolo ya mongamba te?
2 Sicut servus desiderat umbram, et sicut mercenarius praestolatur finem operis sui:
Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,
3 Sic et ego habui menses vacuos, et noctes laboriosas enumeravi mihi.
ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba mpe babutu ya pasi na pasi.
4 Si dormiero, dicam: Quando consurgam? et rursum expectabo vesperam, et replebor doloribus usque ad tenebras.
Soki kaka nalali, nakomi komituna: ‹ Tango nini nakolamuka? › Mpe soki kaka nalamuki: ‹ Tango nini butu ekoya? › Nalembi komitungisa tango nyonso.
5 Induta est caro mea putredine et sordibus pulveris, cutis mea aruit, et contracta est.
Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota mpe ekomi kolumba solo.
6 Dies mei velocius transierunt quam a texente tela succiditur, et consumpti sunt absque ulla spe.
Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka; nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.
7 Memento quia ventus est vita mea, et non revertetur oculus meus ut videat bona.
Oh Nkolo, kobosana te ete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba! Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te.
8 Nec aspiciet me visus hominis: oculi tui in me, et non subsistam.
Liso oyo ezali komona ngai sik’oyo ekotikala komona ngai lisusu te; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te.
9 Sicut consumitur nubes, et pertransit: sic qui descenderit ad inferos, non ascendet. (Sheol h7585)
Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka, ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufi azongaka lisusu te. (Sheol h7585)
10 Nec revertetur ultra in domum suam, neque cognoscet eum amplius locus eius.
Akozonga lisusu te na ndako na ye, mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te.
11 Quapropter et ego non parcam ori meo, loquar in tribulatione spiritus mei: confabulabor cum amaritudine animae meae.
Yango wana, nakokanga monoko na ngai te, molimo na ngai ekoloba kaka na mawa, mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai.
12 Numquid mare ego sum, aut cetus, quia circumdedisti me carcere?
Boni, nakomi ebale to elima ya mayi mpo ete batiela ngai bikangiseli?
13 Si dixero: Consolabitur me lectulus meus, et relevabor loquens mecum in strato meo:
Nakanisaka ete soki nalali, mbeto na ngai ekobondisa ngai mpe pongi ekokitisa pasi na ngai;
14 Terrebis me per somnia, et per visiones horrore concuties.
nzokande, ozali lisusu kotungisa ngai na bandoto ya mabe mpe kobangisa ngai na bimoniseli ya somo.
15 Quam ob rem elegit suspendium anima mea, et mortem ossa mea.
Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa, pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.
16 Desperavi, nequaquam ultra iam vivam: parce mihi, nihil enim sunt dies mei.
Nayini bomoi na ngai; nawumela libela te na bomoi! Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina.
17 Quid est homo, quia magnificas eum? aut quid apponis erga eum cor tuum?
Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye, mpo ete olandelaka ye na bokebi,
18 Visitas eum diluculo, et subito probas illum:
mpo ete otalaka ye tango nyonso mpe omekaka ye tango nyonso?
19 Usquequo non parcis mihi, nec dimittis me ut glutiam salivam meam?
Mpo na nini okoki kolongola miso na Yo te likolo na ngai? Mpo na nini okoki kotika ngai kimia te ata mpo na ngonga moke?
20 Peccavi, quid faciam tibi o custos hominum? quare posuisti me contrarium tibi, et factus sum mihimetipsi gravis?
Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu, eloko nini ngai nasali Yo? Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai? Boni, nakomi mokumba mpo na Yo?
21 Cur non tollis peccatum meum, et quare non aufers iniquitatem meam? ecce, nunc in pulvere dormiam: et si mane me quaesieris, non subsistam.
Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »

< Job 7 >