< Jeremiæ 8 >

1 In illo tempore, ait Dominus: Eiicient ossa regum Iuda, et ossa principum eius, et ossa sacerdotum, et ossa prophetarum, et ossa eorum, qui habitaverunt Ierusalem, de sepulchris suis:
Na tango wana, elobi Yawe, bakobimisa mikuwa ya bakonzi mpe ya bakalaka ya Yuda, mikuwa ya Banganga-Nzambe mpe ya basakoli elongo na mikuwa ya bato ya Yelusalemi, wuta na malita na bango.
2 et expandent ea ad solem, et lunam, et omnem militiam caeli, quae dilexerunt, et quibus servierunt, et post quae ambulaverunt, et quae quaesierunt, et adoraverunt: non colligentur, et non sepelientur: in sterquilinium super faciem terrae erunt.
Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.
3 Et eligent magis mortem quam vitam omnes qui residui fuerint de cognatione hac pessima in universis locis, quae derelicta sunt, ad quae eieci eos, dicit Dominus exercituum.
Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›
4 Et dices ad eos: Haec dicit Dominus: Numquid qui cadit, non resurget? et qui aversus est, non revertetur?
Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Boni, soki moto akweyi, atelemaka te? Soki moto abungi nzela, azongaka lisusu na nzela te?
5 Quare ergo aversus est populus iste in Ierusalem aversione contentiosa? Apprehenderunt mendacium, et noluerunt reverti.
Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela? Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe? Bamipesi makasi na makambo ya lokuta mpe baboyi kozongela Ngai.
6 Attendi, et auscultavi: nemo quod bonum est loquitur, nullus est qui agat poenitentiam super peccato suo, dicens: Quid feci? Omnes conversi sunt ad cursum suum, quasi equus impetu vadens ad praelium.
Nayokaka na bokebi makambo nyonso oyo balobaka, kasi balobaka makambo ya solo te. Moko te kati na bango ayokaka motema pasi mpo na mabe oyo asalaka, alobaka: ‘Nasali nini?’ Moto na moto akangamaka kaka na nzela na ye lokola mpunda oyo ezali kokende na bitumba.
7 Milvus in caelo cognovit tempus suum: turtur, et hirundo, et ciconia custodierunt tempus adventus sui: populus autem meus non cognovit iudicium Domini.
Ezala kutu nkongi, kati na likolo, eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu; ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila eyebaka ata tango ya kozonga, kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.
8 Quomodo dicitis: Sapientes nos sumus, et lex Domini nobiscum est? vere mendacium operatus est stylus mendax Scribarum.
Ndenge nini bokoki koloba: ‘Tozali bato ya bwanya, pamba te toyebi Mobeko ya Yawe,’ tango sik’oyo ekomeli ya balakisi ya Mobeko ebongoli yango lokuta?
9 Confusi sunt sapientes, perterriti et capti sunt: verbum enim Domini proiecerunt, et sapientia nulla est in eis.
Bato ya bwanya bakoyokisama soni, bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu, pamba te batiolaki Liloba na Yawe. Bazali na bwanya ya ndenge nini?
10 Propterea dabo mulieres eorum exteris, agros eorum heredibus: quia a minimo usque ad maximum omnes avaritiam sequuntur: a propheta usque ad sacerdotem cuncti faciunt mendacium.
Yango wana, nakokaba basi na bango epai ya mibali mosusu, mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu; pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike, batondi na lokoso ya mbongo; basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomi se kotambola na lokuta;
11 Et sanabant contritionem filiae populi mei ad ignominiam, dicentes: Pax, pax: cum non esset pax.
bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba: ‘Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu!’ Nzokande, ata likambo moko ya malamu ezali te.
12 Confusi sunt quia abominationem fecerunt: quinimmo confusione non sunt confusi, et erubescere nescierunt: idcirco cadent inter corruentes, in tempore visitationis suae corruent, dicit Dominus.
Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni? Te! Bazali koyoka ata soni te; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.
13 Congregans congregabo eos, ait Dominus: non est uva in vitibus, et non sunt ficus in ficulnea: folium defluxit: et dedi eis quae praetergressa sunt.
Nakobebisa milona na bango, elobi Yawe. Bambuma ya vino ekozala lisusu te na banzete ya vino, mbuma ya figi ekozala lisusu te na banzete ya figi, mpe makasa ya banzete yango ekokawuka. Bakobotola bango biloko oyo napesaki bango. › »
14 Quare sedemus? convenite, et ingrediamur civitatem munitam, et sileamus ibi: quia Dominus Deus noster silere nos fecit, et potum dedit nobis aquam fellis: peccavimus enim Domino.
Mpo na nini tozali kovanda awa? Tosangana esika moko! Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi mpo ete tokufela kuna! Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.
15 Expectavimus pacem, et non erat bonum: tempus medelae, et ecce formido.
Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia, kasi tomoni likambo moko te ya malamu; tozalaki na elikya ete tokobika, kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso!
16 A Dan auditus est fremitus equorum eius, a voce hinnituum pugnatorum eius commota est omnis terra. et venerunt, et devoraverunt terram, et plenitudinem eius: urbem et habitatores eius.
Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.
17 Quia ecce ego mittam vobis serpentes regulos, quibus non est incantatio: et mordebunt vos, ait Dominus.
« Botala, nakotindela bino banyoka oyo ebomaka, bitupa oyo moto akoki kosakana na yango te, mpo ete eswa bino, » elobi Yawe.
18 dolor meus super dolorem, in me cor meum moerens.
Pasi na ngai ezangeli kisi mpo na kosilisa yango, motema na ngai elembi kati na ngai.
19 Ecce vox clamoris filiae populi mei de terra longinqua: Numquid Dominus non est in Sion, aut rex eius non est in ea? Quare ergo me ad iracundiam concitaverunt in sculptilibus suis, et in vanitatibus alienis?
Yoka koganga ya bato na ngai wuta na mokili ya mosika: « Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona? Mokonzi na yango azali lisusu kuna te? » « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai na nzela ya banzambe na bango ya bikeko, na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina? »
20 Transiit messis, finita est aestas, et nos salvati non sumus.
« Tango ya kobuka mbuma esili koleka, elanga mpe esili kokoma na suka, kasi biso tobikisami te. »
21 Super contritione filiae populi mei contritus sum, et contristatus, stupor obtinuit me.
Ndenge bato na ngai bazali koyoka pasi, ndenge wana mpe ngai nazali koyoka pasi, nazali kolela, mpe somo ekangi ngai makasi.
22 Numquid resina non est in Galaad? aut medicus non est ibi? quare igitur non est obducta cicatrix filiae populi mei?
Boni, kisi ezali te kati na Galadi? Minganga bazali kuna te? Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te?

< Jeremiæ 8 >