< Petri I 4 >

1 Christo igitur passo in carne, et vos eadem cogitatione armamini: quia qui passus est in carne, desiit a peccatis:
Lokola Klisto amonaki pasi kati na nzoto na Ye, bino mpe bosengeli kotambola na makanisi ya ndenge wana; pamba te Ye oyo amonaki pasi kati na nzoto na Ye asilisaki nguya ya lisumu,
2 Ut iam non desideriis hominum, sed voluntati Dei, quod reliquum est in carne vivat temporis.
mpo ete botambola te kolanda baposa mabe ya nzoto, kasi kolanda mokano ya Nzambe, na mikolo oyo botikali na yango ya kobika awa na mokili.
3 Sufficit enim praeteritum tempus ad voluntatem Gentium consummandam his, qui ambulaverunt in luxuriis, desideriis, vinolentiis, comessationibus, potationibus ebrietatibus, et illicitis idolorum cultibus.
Solo, na kala, bolekisaki tango mingi na kosala makambo oyo Bapagano basalaka: kindumba, baposa mabe ya nzoto, milangwa, lokoso ya kolia mpe ya komela, mpe kosambela bikeko ya nkele.
4 In quo admirantur non concurrentibus vobis in eamdem luxuriae confusionem, blasphemantes.
Kasi sik’oyo, Bapagano bazali kokamwa ete bozali kosangana lisusu te elongo na bango kati na bomoi wana ya kindumba makasi; yango wana bakomi kobebisa lokumu na bino na nzela ya matongi.
5 Qui reddent rationem ei, qui paratus est iudicare vivos et mortuos.
Kasi bakosamba liboso ya Nzambe oyo akosambisa penza bato ya bomoi mpe bakufi.
6 Propter hoc enim et mortuis evangelizatum est: ut iudicentur quidem secundum homines in carne, vivant autem secundum Deum in Spiritu.
Yango wana mpe kutu Yesu ateyaki Sango Malamu ata epai ya bato oyo bazali sik’oyo ya kokufa mpo ete basambisama kolanda mibeko ya bato na oyo etali nzoto mpe babika bomoi kolanda mokano ya Nzambe na oyo etali Molimo.
7 Omnium autem finis appropinquavit. Estote itaque prudentes, et vigilate in orationibus.
Suka ya makambo nyonso ekomi pene; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela.
8 Ante omnia autem, mutuam in vobismetipsis charitatem continuam habentes: quia charitas operit multitudinem peccatorum.
Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.
9 Hospitales invicem sine murmuratione:
Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te.
10 Unusquisque, sicut accepit gratiam, in alterutrum illam administrantes, sicut boni dispensatores multiformis gratiae Dei.
Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.
11 Si quis loquitur, quasi sermones Dei: si quis ministrat, tamquam ex virtute, quam administrat Deus: ut in omnibus honorificetur Deus per Iesum Christum: cui est gloria, et imperium in saecula saeculorum: Amen. (aiōn g165)
Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen! (aiōn g165)
12 Charissimi, nolite peregrinari in fervore, qui ad tentationem vobis fit, quasi novi aliquid vobis contingat:
Balingami, bokamwa te bapasi oyo bozali komona, lokola nde likambo ya kokamwa ekomeli bino.
13 sed communicantes Christi passionibus gaudete, ut et in revelatione gloriae eius gaudeatis exultantes.
Bosepela nde, pamba te bozali kosangana na bapasi ya Klisto mpo ete botonda mpe na esengo tango akomonisa nkembo na Ye.
14 Si exprobramini in nomine Christi, beati eritis: quoniam quod est honoris, gloriae, et virtutis Dei, et qui est eius Spiritus, super vos requiescit.
Soki bafingi bino likolo ya Kombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, pamba te Molimo ya nkembo, Molimo ya Nzambe, azali likolo na bino.
15 Nemo autem vestrum patiatur ut homicida, aut fur, aut maledicus, aut alienorum appetitor.
Tika ete moko te kati na bino amona pasi mpo ete azali mobomi to moyibi, moto mabe to moto oyo akotaka makambo ya bato mosusu;
16 Si autem ut Christianus, non erubescat: glorificet autem Deum in isto nomine.
nzokande soki azali komona pasi mpo ete azali Moklisto, wana tika ete ayokela yango soni ata moke te, kasi akumisa nde Nzambe mpo na Kombo yango.
17 quoniam tempus est ut incipiat iudicium a domo Dei. Si autem primum a nobis: quis finis eorum, qui non credunt Dei Evangelio?
Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe?
18 Et si iustus quidem vix salvabitur, impius, et peccator ubi parebunt?
Pamba te Makomi elobi: « Soki ezali na pasi makasi nde moto ya sembo abikisami, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki? »
19 Itaque et hi, qui patiuntur secundum voluntatem Dei, fideli Creatori commendent animas suas in benefactis.
Boye tika ete bato oyo bazali komona pasi mpo ete batosaka mokano ya Nzambe bamipesa mobimba na Mokeli na bango oyo azali sembo, mpe tika ete basalaka bolamu.

< Petri I 4 >