< Apocalypsis 20 >

1 Et vidi Angelum descendentem de cælo, habentem clavem abyssi, et catenam magnam in manu sua. (Abyssos g12)
Bongo namonaki anjelu moko kokita wuta na Lola; asimbaki na loboko na ye fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi mpe monyololo moko ya monene. (Abyssos g12)
2 Et apprehendit draconem, serpentem antiquum, qui est diabolus, et Satanas, et ligavit eum per annos mille:
Akamataki dalagona, nyoka wana ya kala oyo azali zabolo to Satana; akangaki ye monyololo mpo na mibu nkoto moko.
3 et misit eum in abyssum, et clausit, et signavit super illum ut non seducat amplius gentes, donec consummentur mille anni: et post hæc oportet illum solvi modico tempore. (Abyssos g12)
Anjelu abwakaki ye kati na libulu wana ya monene mpe ya molili makasi; akangaki yango mpe abetaki kashe na likolo na yango mpo ete akosa lisusu bikolo te kino tango mibu nkoto moko ekokoka. Sima na yango, bakotika ye mpo na mwa tango moke. (Abyssos g12)
4 Et vidi sedes, et sederunt super eas, et iudicium datum est illis: et animas decollatorum propter testimonium Iesu, et propter Verbum Dei, et qui non adoraverunt bestiam, neque imaginem eius, nec acceperunt characterem eius in frontibus, aut in manibus suis, et vixerunt, et regnaverunt cum Christo mille annis.
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.
5 Ceteri mortuorum non vixerunt, donec consummentur mille anni: Hæc est resurrectio prima.
Bato mosusu oyo bakufaki bazongaki na bomoi te liboso ete mibu nkoto moko esila. Yango nde lisekwa ya liboso.
6 Beatus, et sanctus, qui habet partem in resurrectione prima: in his secunda mors non habet potestatem: sed erunt sacerdotes Dei et Christi, et regnabunt cum illo mille annis.
Bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso bazali bato ya esengo mpe basantu! Kufa ya mibale ezali na bokonzi te epai na bango, kasi bakozala Banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakokonza elongo na Ye mibu nkoto moko.
7 Et cum consummati fuerint mille anni, solvetur Satanas de carcere suo,
Tango mibu wana nkoto moko ekosila, bakobimisa Satana wuta na boloko na ye,
8 et exibit, et seducet gentes, quæ sunt super quattuor angulos terræ, Gog, et Magog, et congregabit eos in prælium, quorum numerus est sicut arena maris.
mpe akokende kokosa bikolo ya bangambo nyonso minei ya mokili mobimba, elingi koloba Gogi mpe Magogi. Akosangisa bango mpo na bitumba. Motango na bango ekozala lokola zelo ya ebale monene oyo bakoki kotanga te.
9 Et ascenderunt super latitudinem terræ, et circuierunt castra Sanctorum, et civitatem dilectam. Et descendit ignis a Deo de cælo, et devoravit eos:
Bapanzanaki na mokili mobimba, bazingelaki molako ya basantu mpe engumba oyo Nzambe alingaka. Kasi moto ekitaki longwa na likolo mpe ezikisaki bango.
10 et diabolus, qui seducebat eos, missus est in stagnum ignis, et sulphuris, ubi et bestia, et pseudopropheta cruciabuntur die ac nocte in sæcula sæculorum. (aiōn g165, Limnē Pyr g3041 g4442)
Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi. (aiōn g165, Limnē Pyr g3041 g4442)
11 Et vidi thronum magnum candidum, et sedentem super eum, a cuius conspectu fugit terra, et cælum, et locus non est inventus eis.
Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.
12 Et vidi mortuos magnos, et pusillos stantes in conspectu throni, et libri aperti sunt: et alius Liber apertus est, qui est vitæ: et iudicati sunt mortui ex his, quæ scripta erant in libris secundum opera ipsorum.
Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku.
13 Et dedit mare mortuos, qui in eo erant: et mors, et infernus dederunt mortuos suos, qui in ipsis erant: et iudicatum est de singulis secundum opera ipsorum. (Hadēs g86)
Ebale monene esanzaki bakufi oyo bazalaki kati na yango; kufa elongo na mboka ya bakufi esanzaki mpe bakufi oyo bazalaki kati na yango. Mpe bato nyonso basambisamaki, moto na moto kolanda misala na ye. (Hadēs g86)
14 Et infernus et mors missi sunt in stagnum ignis. Hæc est mors secunda. (Hadēs g86, Limnē Pyr g3041 g4442)
Bongo kufa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki kati na liziba ya moto. Liziba ya moto ezali kufa ya mibale. (Hadēs g86, Limnē Pyr g3041 g4442)
15 Et qui non inventus est in Libro vitæ scriptus, missus est in stagnum ignis. (Limnē Pyr g3041 g4442)
Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto. (Limnē Pyr g3041 g4442)

< Apocalypsis 20 >