< Marcum 15 >

1 Et confestim, mane consilium facientes summi sacerdotes cum senioribus, et scribis, et universo concilio, vincientes Iesum, duxerunt, et tradiderunt Pilato.
Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.
2 Et interrogavit eum Pilatus: Tu es rex Iudæorum? At ille respondens, ait illi: Tu dicis.
Pilato atunaki Yesu: — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda? Yesu azongisaki: — Olobi yango.
3 Et accusabant eum summi sacerdotes in multis.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki kofunda Ye na makambo ebele.
4 Pilatus autem rursum interrogavit eum, dicens: Non respondes quidquam? Vide in quantis te accusant.
Pilato atunaki Ye lisusu: — Boni, ozali te na eyano ya kopesa, na makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda yo?
5 Iesus autem amplius nihil respondit, ita ut miraretur Pilatus.
Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te; mpe Pilato akamwaki makasi.
6 Per diem autem festum solebat dimittere illis unum ex vinctis, quemcumque petissent.
Na feti nyonso ya Pasika, azalaki kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kosenga.
7 Erat autem qui dicebatur Barrabas, qui cum seditiosis erat vinctus, qui in seditione fecerat homicidium.
Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto.
8 Et cum ascendisset turba, cœpit rogare, sicut semper faciebat illis.
Ebele ya bato bayaki mpe basengaki na Pilato ete asalela bango makambo oyo amesana kosalela bango mbala na mbala.
9 Pilatus autem respondit eis, et dixit: Vultis dimittam vobis regem Iudæorum?
Pilato atunaki: — Bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda?
10 Sciebat enim quod per invidiam tradidissent eum summi sacerdotes.
Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakonzi ya Banganga-Nzambe bakabaki Yesu na maboko na ye.
11 Pontifices autem concitaverunt turbam, ut magis Barabbam dimitteret eis.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko.
12 Pilatus autem iterum respondens, ait illis: Quid ergo vultis faciam regi Iudæorum?
Pilato atunaki bango: — Nasala nini na moto oyo bozali kobenga mokonzi ya Bayuda?
13 At illi iterum clamaverunt: Crucifige eum.
Bagangaki lisusu: — Baka ye na ekulusu!
14 Pilatus vero dicebat illis: Quid enim mali fecit? At illi magis clamabant: Crucifige eum.
Pilato atunaki bango lisusu: — Mabe nini asali? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka: — Baka ye na ekulusu!
15 Pilatus autem volens populo satisfacere, dimisit illis Barabbam, et tradidit Iesum flagellis cæsum, ut crucifigeretur.
Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
16 Milites autem duxerunt eum in atrium prætorii, et convocant totam cohortem,
Basoda bakumbaki Yesu kati na ndako ya moyangeli, na esambiselo, mpe basangisaki lisanga mobimba ya basoda.
17 et induunt eum purpura, et imponunt ei plectentes spineam coronam.
Balatisaki Yesu nzambala ya motane mpe ekoti oyo basalaki na banzube;
18 Et cœperunt salutare eum: Ave rex Iudæorum.
mpe babandaki kopesa ye mbote: « Mbote, mokonzi ya Bayuda! »
19 Et percutiebant caput eius arundine: et conspuebant eum, et ponentes genua, adorabant eum.
Bazalaki kosalela lingenda moke mpo na kobeta Ye na moto, bazalaki kobwakela Ye soyi mpe kofukama mpo na kogumbama liboso na Ye.
20 Et postquam illuserunt ei, exuerunt illum purpura, et induerunt eum vestimentis suis: et educunt illum ut crucifigerent eum.
Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.
21 Et angariaverunt prætereuntem quempiam, Simonem Cyrenæum venientem de villa, patrem Alexandri, et Rufi, ut tolleret crucem eius.
Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi.
22 Et perducunt illum in Golgotha locum: quod est interpretatum Calvariæ locus.
Bamemaki Yesu na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba: esika ya mokuwa ya moto,
23 Et dabant ei bibere myrrhatum vinum: et non accepit.
bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te.
24 Et crucifigentes eum, diviserunt vestimenta eius, mittentes sortem super eis, quis quid tolleret.
Babakaki Ye na ekulusu, mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke mpo na koyeba oyo moko na moko akozwa.
25 Erat autem hora tertia: et crucifixerunt eum.
Babakaki Ye na ekulusu na ngonga ya libwa ya tongo.
26 Et erat titulus causæ eius inscriptus: REX IUDÆORUM.
Tala makomi oyo ezalaki kotalisa mpo na nini bakatelaki Ye etumbu: Mokonzi ya Bayuda.
27 Et cum eo crucifigunt duos latrones: unum a dextris, et alium a sinistris eius.
Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu: moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [
28 Et impleta est scriptura, quæ dicit: Et cum iniquis reputatus est.
Ezali boye nde ekokisamaki Makomi oyo ezali koloba: « Batangaki Ye na molongo ya bato ya mabe. »]
29 Et prætereuntes blasphemabant eum, moventes capita sua, et dicentes: Vah qui destruis templum Dei, et in tribus diebus reædificas:
Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango; bazalaki koloba: — Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato,
30 salvum fac temetipsum descendens de cruce.
mibikisa yo moko mpe kita longwa na ekulusu!
31 Similiter et summi sacerdotes illudentes, ad alterutrum cum scribis dicebant: Alios salvos fecit, seipsum non potest salvum facere.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe elongo na balakisi ya Mobeko bazalaki mpe kotiola kati na bango: — Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te!
32 Christus rex Israel descendat nunc de cruce, ut videamus, et credamus. Et qui cum eo crucifixi erant, convitiabantur ei.
Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima! Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.
33 Et facta hora sexta, tenebræ factæ sunt per totam terram usque in horam nonam.
Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
34 Et hora nona exclamavit Iesus voce magna, dicens: Eloi, eloi, lamma sabacthani? quod est interpretatum: Deus meus, Deus meus, ut quid dereliquisti me?
Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki: — Eloi, Eloi, lema sabachtani? Elingi koloba: « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai? »
35 Et quidam de circumstantibus audientes, dicebant: Ecce Eliam vocat.
Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Yesu; boye bakomaki koloba: — Boyoka, azali kobenga Eliya!
36 Currens autem unus, et implens spongiam aceto, circumponensque calamo, potum dabat ei, dicens: Sinite, videamus si veniat Elias ad deponendum eum.
Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela; alobaki: — Totala soki Eliya akoya kokitisa ye.
37 Iesus autem emissa voce magna expiravit.
Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema.
38 Et velum templi scissum est in duo, a summo usque deorsum.
Rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se.
39 Videns autem Centurio, qui ex adverso stabat, quia sic clamans expirasset, ait: Vere hic homo Filius Dei erat.
Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki: — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe!
40 Erant autem et mulieres de longe aspicientes: inter quas erat Maria Magdalene, et Maria Iacobi minoris, et Ioseph mater, et Salome:
Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome;
41 et cum esset in Galilæa, sequebantur eum, et ministrabant ei, et aliæ multæ, quæ simul cum eo ascenderant Ierosolymam.
oyo bazalaki kolanda Yesu mpe kosunga Ye tango azalaki kati na Galile; ezalaki mpe na basi mosusu ebele oyo bakendeki na Yelusalemi elongo na Yesu.
42 Et cum iam sero esset factum (quia erat parasceve, quod est ante Sabbatum)
Wana pokwa ekomaki, lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo ete etikalaki ngonga moke mpo na kokota na mokolo ya Saba,
43 venit Ioseph ab Arimathæa nobilis decurio, qui et ipse erat expectans regnum Dei, et audacter introivit ad Pilatum, et petiit corpus Iesu.
Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moto ya lokumu kati na Likita-Monene ya Bayuda mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, abangaki te kokende epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu.
44 Pilatus autem mirabatur si iam obiisset. Et accersito centurione, interrogavit eum si iam mortuus esset.
Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu asilaki kokufa; abengaki mokonzi ya basoda mpo na kotuna ye soki solo Yesu asilaki kokufa.
45 Et cum cognovisset a centurione, donavit corpus Ioseph.
Tango ayokaki na monoko ya mokonzi ya basoda ete ezali bongo, apesaki Jozefi ndingisa ya kokamata nzoto ya Yesu.
46 Ioseph autem mercatus sindonem, et deponens eum involvit sindone, et posuit eum in monumento, quod erat excisum de petra, et advolvit lapidem ad ostium monumenti.
Jozefi asombaki liputa ya lino, akitisaki nzoto ya Yesu longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa yango; atiaki nzoto yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene, mpe atindikaki libanga mosusu liboso ya ekotelo ya kunda yango.
47 Maria autem Magdalene, et Maria Ioseph aspiciebant ubi poneretur.
Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Joze, bazalaki kotala esika oyo akotia nzoto ya Yesu.

< Marcum 15 >