< Ephesios 4 >

1 Obsecro itaque vos ego vinctus in Domino, ut digne ambuletis vocatione, qua vocati estis,
Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga na bino ete botambolaka na lolenge oyo ebongi na bato oyo Nzambe abengi:
2 cum omni humilitate, et mansuetudine, cum patientia, supportantes invicem in charitate,
bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi; boyikanaka mpiko kati na bolingo,
3 soliciti servare unitatem Spiritus in vinculo pacis.
bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino.
4 Unum corpus, et unus Spiritus, sicut vocati estis in una spe vocationis vestræ.
Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko.
5 Unus Dominus, una fides, unum baptisma.
Nkolo azali se moko, kondima mpe ezali se moko, libatisi mpe ezali se moko.
6 Unus Deus et Pater omnium, qui est super omnes, et per omnia, et in omnibus nobis.
Nzambe azali se moko, azali mpe Tata ya bato nyonso; aleki bato nyonso, asalaka na nzela ya bato nyonso mpe azali kati na bato nyonso.
7 Unicuique autem nostrum data est gratia secundum mensuram donationis Christi.
Nzokande kati na biso, moto nyonso azwaki ngolu kolanda ndenge Klisto akabolaki.
8 Propter quod dicit: Ascendens in altum captivam duxit captivitatem: dedit dona hominibus.
Yango wana Nzambe alobi: « Tango amataki na likolo, amemaki bakangami mpe apesaki makabo epai na bato. »
9 Quod autem ascendit, quid est, nisi quia et descendit primum in inferiores partes terræ?
Nzokande, « amataki na likolo » elingi koloba penza nini? Elingi kaka koloba ete, liboso, akitaki kino na se ya mabele.
10 Qui descendit, ipse est et qui ascendit super omnes cælos, ut impleret omnia.
Ye oyo akitaki na se ya mabele, ezali kaka Ye wana oyo amataki na likolo koleka Likolo nyonso, mpo ete atondisa mokili mobimba.
11 Et ipse dedit quosdam quidem Apostolos, quosdam autem Prophetas, alios vero Evangelistas, alios autem pastores, et doctores
Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi,
12 ad consummationem sanctorum in opus ministerii, in ædificationem corporis Christi:
mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu.
13 donec occurramus omnes in unitatem fidei, et agnitionis Filii Dei, in virum perfectum, in mensuram ætatis plenitudinis Christi:
Boye, biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na boyebi ya Mwana na Nzambe, mpe tokokoma bato oyo bakembi kolanda ndenge Klisto azali ya kokoka.
14 ut iam non simus parvuli fluctuantes, et circumferamur omni vento doctrinæ in nequitia hominum, in astutia ad circumventionem erroris.
Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.
15 Veritatem autem facientes in charitate, crescamus in illo per omnia, qui est caput Christus:
Kasi wana tokolobaka bosolo kati na bolingo, tokokolaka na makambo nyonso kati na Klisto oyo azali moto.
16 ex quo totum corpus compactum, et connexum per omnem iuncturam subministrationis, secundum operationem in mensuram uniuscuiusque membri, augmentum corporis facit in ædificationem sui in charitate.
Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.
17 Hoc igitur dico, et testificor in Domino, ut iam non ambuletis, sicut et Gentes ambulant in vanitate sensus sui,
Boye, tala makambo oyo nazali koyebisa bino mpe kobetela sete kati na Nkolo: Botambolaka lisusu te lokola Bapagano oyo balandaka makanisi na bango, oyo ezanga tina.
18 tenebris obscuratum habentes intellectum, alienati a vita Dei per ignorantiam, quæ est in illis, propter cæcitatem cordis ipsorum:
Pamba te molili ezipi mayele na bango mpe bazali ya kokabwana na bomoi ya sika oyo Nzambe apesaka, mpo ete bazangi boyebi mpe bazali mitema mabanga.
19 Qui desperantes, semetipsos tradiderunt impudicitiæ, in operationem immunditiæ omnis in avaritiam.
Lokola babungisa bomoto na bango, bamipesaki na makambo ya soni mpo na kosala na lokoso makambo nyonso ya bosoto.
20 Vos autem non ita didicistis Christum,
Kasi bino boyekolaki Klisto ndenge wana te,
21 si tamen illum audistis, et in ipso edocti estis, sicut est veritas in Iesu.
soki ya solo ezalaki penza Ye nde boyokaki tango bateyaki bino solo oyo ezali kati na Yesu
22 Deponere vos secundum pristinam conversationem veterem hominem, qui corrumpitur secundum desideria erroris.
mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta,
23 Renovamini autem spiritu mentis vestræ,
mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika,
24 et induite novum hominem, qui secundum Deum creatus est in iustitia, et sanctitate veritatis.
mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.
25 Propter quod deponentes mendacium, loquimini veritatem unusquisque cum proximo suo: quoniam sumus invicem membra.
Yango wana, tika ete moko na moko kati na bino abwaka lokuta mpe alobaka solo na moninga na ye, pamba te biso nyonso tozali kaka biteni ya nzoto moko.
26 Irascimini, et nolite peccare: sol non occidat super iracundiam vestram.
Soki bosiliki, bosalaka masumu te; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.
27 Nolite locum dare diabolo:
Bopesaka na Satana nzela te.
28 qui furabatur, iam non furetur: magis autem laboret, operando manibus suis, quod bonum est, ut habeat unde tribuat necessitatem patienti.
Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga.
29 Omnis sermo malus ex ore vestro non procedat: sed siquis bonus ad ædificationem fidei ut det gratiam audientibus.
Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.
30 Et nolite constristare Spiritum Sanctum Dei: in quo signati estis in diem redemptionis.
Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.
31 Omnis amaritudo, et ira, et indignatio, et clamor, et blasphemia tollatur a vobis cum omni malitia.
Bolimwisaka kati na bino bololo ya mitema, koyinana, kanda, koswana, mafinga mpe lolenge nyonso ya misala mabe.
32 Estote autem invicem benigni, misericordes, donantes invicem sicut et Deus in Christo donavit vobis.
Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.

< Ephesios 4 >