< Iohannis I 5 >

1 Omnis, qui credit, quoniam Iesus est Christus, ex Deo natus est. Et omnis, qui diligit eum qui genuit, diligit et eum qui natus est ex eo.
Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.
2 In hoc cognoscimus quoniam diligamus natos Dei, cum Deum diligamus, et mandata eius faciamus.
Tala ndenge nini toyebaka ete tolingaka bana na Nzambe: ezali na nzela ya kolinga Nzambe mpe ya kotosa mibeko na Ye.
3 Hæc est enim charitas Dei, ut mandata eius custodiamus: et mandata eius gravia non sunt.
Pamba te kolinga Nzambe ezali: kotosa mibeko na Ye. Mpe mibeko na Ye ezali pasi te,
4 Quoniam omne, quod natum est ex Deo, vincit mundum: et hæc est victoria, quæ vincit mundum, fides nostra.
pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali: kondima na biso.
5 Quis est, qui vincit mundum, nisi qui credit quoniam Iesus est filius Dei?
Nani oyo alongaka mokili? Ezali kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe.
6 Hic est, qui venit per aquam et sanguinem, Iesus Christus: non in aqua solum, sed in aqua et sanguine. Et Spiritus est, qui testificatur, quoniam Christus est veritas.
Yesu-Klisto azali Ye oyo ayaki na nzela ya mayi mpe makila; ayaki na nzela ya mayi kaka te, kasi na nzela ya mayi mpe makila. Mpe ezali Molimo nde atatoli bongo, pamba te Molimo azali solo.
7 Quoniam Tres sunt, qui testimonium dant in cælo: Pater, Verbum, et Spiritus Sanctus: et hi Tres Unum sunt.
Nzokande, batatoli bazali misato:
8 Et tres sunt, qui testimonium dant in terra: Spiritus, et aqua, et sanguis: et hi tres unum sunt.
Molimo, mayi mpe makila; mpe bango misato balobaka ndenge moko.
9 Si testimonium hominum accipimus, testimonium Dei maius est: quoniam hoc est testimonium Dei, quod maius est, quoniam testificatus est de Filio suo.
Tondimaka matatoli ya bato, kasi litatoli ya Nzambe eleki motuya, pamba te yango nde Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.
10 Qui credit in Filium Dei, habet testimonium Dei in se. Qui non credit Filio, mendacem facit eum: quia non credit in testimonium quod testificatus est Deus de Filio suo.
Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.
11 Et hoc est testimonium, quoniam vitam æternam dedit nobis Deus. Et hæc vita in Filio eius est. (aiōnios g166)
Mpe litatoli yango ezali: Nzambe apesa biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na Ye. (aiōnios g166)
12 Qui habet Filium, habet vitam: qui non habet Filium, vitam non habet.
Moto oyo azali na Mwana azali na bomoi, kasi moto oyo azangi Mwana na Nzambe azangi mpe bomoi.
13 Hæc scribo vobis: ut sciatis quoniam vitam habetis æternam, qui creditis in nomine Filii Dei. (aiōnios g166)
Bino oyo bondimelaka Kombo ya Mwana na Nzambe, nakomeli bino makambo oyo mpo boyeba ete bozali na bomoi ya seko. (aiōnios g166)
14 Et hæc est fiducia, quam habemus ad eum: quia quodcumque petierimus, secundum voluntatem eius, audit nos.
Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe: soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso.
15 Et scimus quia audit nos quidquid petierimus: scimus quoniam habemus petitiones quas postulamus ab eo.
Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye.
16 Qui scit fratrem suum peccare peccatum non ad mortem, petat, et dabitur ei vita peccanti non ad mortem. Est peccatum ad mortem: non pro illo dico ut roget quis.
Soki omoni ndeko na yo kosala lisumu oyo ememaka na kufa te, osengeli kobondela mpo na ye, mpe Nzambe akopesa ye bomoi. Nazali koloba nde na tina na bato oyo basalaka lisumu oyo ememaka na kufa te. Kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa; ezali te na tina na lisumu yango nde nazali kosenga na bino kobondela.
17 Omnis iniquitas, peccatum est: et est peccatum ad mortem.
Solo, lisumu ezali: kobuka mobeko; kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa te.
18 Scimus quia omnis, qui natus est ex Deo, non peccat: sed generatio Dei conservat eum, et malignus non tangit eum.
Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te.
19 Scimus quoniam ex Deo sumus: et mundus totus in maligno positus est.
Toyebi ete tozali bana na Nzambe, mpe ete mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya Satana.
20 Et scimus quoniam Filius Dei venit, et dedit nobis sensum ut cognoscamus verum Deum, et simus in vero Filio eius. Hic est verus Deus, et vita æterna. (aiōnios g166)
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko. (aiōnios g166)
21 Filioli, custodite vos a simulacris. Amen.
Bana na ngai, bomibatelaka mosika na banzambe ya bikeko.

< Iohannis I 5 >