< I Paralipomenon 25 >

1 Igitur David, et magistratus exercitus segregaverunt in ministerium filios Asaph, et Heman, et Idithun: qui prophetarent in citharis, et psalteriis, et cymbalis secundum numerum suum dedicato sibi officio servientes.
Na lisungi ya bakonzi ya mampinga, Davidi atiaki pembeni ndambo ya bana mibali ya Azafi, ya Emani mpe ya Yedutuni mpo na kosala mosala ya kosakola mpe ya kosalela banzenze, mandanda mpe manzanza. Tala bakombo ya bato oyo basalaki mosala yango:
2 De filiis Asaph: Zachur, et Ioseph, et Nathania, et Asarela, filii Asaph: sub manu Asaph prophetantis iuxta regem.
Mpo na bana mibali ya Azafi: Zakuri, Jozefi, Netania mpe Asareyela. Bana mibali ya Azafi bazalaki na bokambami ya tata na bango Azafi oyo azalaki kosakola na bokambami ya mokonzi.
3 Porro Idithun, filii Idithun: Godolias, Sori, Ieseias, et Hasabias, et Mathathias, sex, sub manu patris sui Idithun, qui in cithara prophetabat super confitentes et laudantes Dominum.
Mpo na Yedutuni, bazwaki kati na bana na ye ya mibali: Gedalia, Tseri, Ezayi, Shimei, Ashabia mpe Matitia. Bazalaki bango nyonso motoba na bokambami ya tata na bango Yedutuni oyo azalaki kosakola mpe kosalela lindanda mpo na kopesa matondi mpe kokumisa Yawe.
4 Heman quoque, filii Heman: Bocciau, Mathaniau, Oziel, Subuel, et Ierimoth, Hananias, Hanani, Eliatha, Geddelthi, et Romemthiezer, et Iesbacassa, Mellothi, Othir, Mahazioth:
Mpo na Emani, bazwaki kati na bana na ye ya mibali: Bukiya, Matania, Uzieli, Shebueli, Yerimoti, Anania, Anani, Eliyata, Gidaliti, Romamiti-Ezeri, Yoshibekasha, Maloti, Otiri mpe Maazioti.
5 Omnes isti filii Heman Videntis regis in sermonibus Dei, ut exaltaret cornu: deditque Deus Heman filios quattuordecim, et filias tres.
Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Emani, mosakoli ya mokonzi, oyo azalaki koyebisa ye maloba na Nzambe mpo na konetola nguya na Ye. Nzambe apesaki na Emani bana mibali zomi na minei mpe bana basi misato.
6 Universi sub manu patris sui ad cantandum in templo Domini distributi erant, in cymbalis, et psalteriis, et citharis, in ministeria domus Domini iuxta regem: Asaph videlicet, et Idithun, et Heman.
Bango nyonso bazalaki na bokambami ya tata na bango mpo na kobeta miziki na Tempelo ya Yawe mpe kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze; mpe mpo na kosala mosala kati na Ndako ya Nzambe. Azafi, Yedutuni mpe Emani bazalaki na bokambami ya mokonzi.
7 Fuit autem numerus eorum cum fratribus suis, qui erudiebant canticum Domini, cuncti doctores, ducenti octogintaocto.
Motango na bango elongo na bandeko na bango ya mibali oyo bayekolaki koyembela Yawe malamu ezalaki nkama mibale na tuku mwambe na mwambe.
8 Miseruntque sortes per vices suas, ex æquo tam maior quam minor, doctus pariter et indoctus.
Ezala mpo na bakulutu to mpo na baleki, mpo na balakisi to mpo na bayekoli, bazalaki kobeta zeke mpo na kokabola misala na bango.
9 Egressaque est sors prima Ioseph, qui erat de Asaph. Secunda Godoliæ, ipsi et filiis eius, et fratribus eius duodecim.
Zeke ya liboso, oyo ezalaki mpo na libota ya Azafi, ekweyaki epai ya Jozefi, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale. Zeke ya mibale ekweyaki epai ya Gedalia, bandeko na ye ya mibali mpe bana na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
10 Tertia Zachur, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya misato ekweyaki epai ya Zakuri, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
11 Quarta Isari, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya minei ekweyaki epai ya Yitseri, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
12 Quinta Nathaniæ, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya mitano ekweyaki epai ya Netania, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
13 Sexta Bocciau, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya motoba ekweyaki epai ya Bukiya, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
14 Septima Isreela, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya sambo ekweyaki epai ya Yesareela, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
15 Octava Iesaiæ, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya mwambe ekweyaki epai ya Ezayi, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
16 Nona Mathaniæ, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya libwa ekweyaki epai ya Matania, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
17 Decima Semeiæ, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi ekweyaki epai ya Shimei, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
18 Undecima Azareel, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi na moko ekweyaki epai ya Azareeli, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
19 Duodecima Hasabiæ, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi na mibale ekweyaki epai ya Ashabia, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
20 Tertiadecima Subael, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi na misato ekweyaki epai ya Shubaeli, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
21 Quartadecima Mathathiæ, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi na minei ekweyaki epai ya Matitia, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
22 Quintadecima Ierimoth, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi na mitano ekweyaki epai ya Yeremoti, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
23 Sextadecima Hananiæ, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi na motoba ekweyaki epai ya Anania, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
24 Septimadecima Iesbacassæ, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi na sambo ekweyaki epai ya Yoshibekasha, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
25 Octavadecima Hanani, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi na mwambe ekweyaki epai ya Anani, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
26 Nonadecima Mellothi, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya zomi na libwa ekweyaki epai ya Maloti, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
27 Vigesima Eliatha, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya tuku mibale ekweyaki epai ya Eliyata, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
28 Vigesima prima Othir, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya tuku mibale na moko ekweyaki epai ya Otiri, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
29 Vigesima secunda Geddelthi, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya tuku mibale na mibale ekweyaki epai ya Gidaliti, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
30 Vigesima tertia Mahazioth, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya tuku mibale na misato ekweyaki epai ya Maazioti, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
31 Vigesima quarta Romemthiezer, filiis et fratribus eius duodecim.
Zeke ya tuku mibale na minei ekweyaki epai ya Romamiti-Ezeri, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.

< I Paralipomenon 25 >