< Psalmorum 57 >
1 In finem, ne disperdas. David in tituli inscriptionem, cum fugeret a facie Saul in speluncam. [Miserere mei, Deus, miserere mei, quoniam in te confidit anima mea. Et in umbra alarum tuarum sperabo, donec transeat iniquitas.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu. Oh Nzambe, yokela ngai mawa! Yokela ngai mawa, pamba te nazali koluka ebombamelo; nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo, kino tango ya pasi ekoleka.
2 Clamabo ad Deum altissimum, Deum qui benefecit mihi.
Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.
3 Misit de cælo, et liberavit me; dedit in opprobrium conculcantes me. Misit Deus misericordiam suam et veritatem suam,
Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye.
4 et eripuit animam meam de medio catulorum leonum. Dormivi conturbatus. Filii hominum dentes eorum arma et sagittæ, et lingua eorum gladius acutus.
Nazali na kati-kati ya bankosi; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.
5 Exaltare super cælos, Deus, et in omnem terram gloria tua.
Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba!
6 Laqueum paraverunt pedibus meis, et incurvaverunt animam meam. Foderunt ante faciem meam foveam, et inciderunt in eam.
Batiaki monyama na makolo na ngai mpo ete nakangama, batimolaki libulu liboso na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.
7 Paratum cor meum, Deus, paratum cor meum; cantabo, et psalmum dicam.
Nzambe, lendisa motema na ngai; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.
8 Exsurge, gloria mea; exsurge, psalterium et cithara: exsurgam diluculo.
Lokumu na ngai, lamuka! Lindanda mpe nzenze, bolamuka! Nalingi kolamusa tongo.
9 Confitebor tibi in populis, Domine, et psalmum dicam tibi in gentibus:
Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota, nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo.
10 quoniam magnificata est usque ad cælos misericordia tua, et usque ad nubes veritas tua.
Pamba te bolingo na Yo ezali monene, ekenda kino na Lola; mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.
11 Exaltare super cælos, Deus, et super omnem terram gloria tua.]
Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola; mpe tika ete nkembo na Yo etonda na mokili mobimba!