< Joël Propheta 2 >

1 [Canite tuba in Sion, ululate in monte sancto meo, conturbentur omnes habitatores terræ: quia venit dies Domini, quia prope est.
Bobeta kelelo na Siona! Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga, pamba te mokolo ya Yawe ezali koya; solo, ekomi penza pene.
2 Dies tenebrarum et caliginis, dies nubis et turbinis; quasi mane expansum super montes populus multus et fortis: similis ei non fuit a principio, et post eum non erit usque in annos generationis et generationis.
Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, ndenge wana mpe mampinga moko ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya.
3 Ante faciem ejus ignis vorans, et post eum exurens flamma. Quasi hortus voluptatis terra coram eo, et post eum solitudo deserti, neque est qui effugiat eum.
Liboso na bango, moto ezali kotumba; sima na bango, moto ezali kozikisa. Liboso na bango, mokili ezali lokola elanga ya Edeni, mpe sima na bango, lokola esobe. Solo, ata eloko moko te ekotikala.
4 Quasi aspectus equorum, aspectus eorum; et quasi equites, sic current.
Bazali lokola bampunda; bapumbwaka lokola basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda.
5 Sicut sonitus quadrigarum super capita montium exilient, sicut sonitus flammæ ignis devorantis stipulam, velut populus fortis præparatus ad prælium.
Batambolaka likolo ya basonge ya bangomba na makelele makasi lokola makelele ya bashar, lokola makelele ya matiti oyo ezali kozika, lokola mampinga moko ya basoda ya mpiko oyo babongami mpo na kokende na bitumba.
6 A facie ejus cruciabuntur populi; omnes vultus redigentur in ollam.
Soki bamoni bango, bato ya bikolo bakomaka na somo mpe bilongi nyonso ekawukaka.
7 Sicut fortes current; quasi viri bellatores ascendent murum: viri in viis suis gradientur, et non declinabunt a semitis suis.
Bakimaka lokola bilombe, bapumbwaka bamir lokola basoda ya mpiko, batambolaka nzela moko, batengamaka te.
8 Unusquisque fratrem suum non coarctabit, singuli in calle suo ambulabunt; sed et per fenestras cadent, et non demolientur.
Batutanaka te bango na bango, moko na moko alandaka kaka nzela na ye. Badusolaka na kati-kati ya bibundeli ya banguna, mpe eloko moko te ekangaka bango nzela.
9 Urbem ingredientur, in muro current, domos conscendent, per fenestras intrabunt quasi fur.
Bawelelaka kokota kati na engumba, bapotaka mbangu pene ya mir, bakotaka na bandako ndenge miyibi bakotaka na nzela ya maninisa.
10 A facie ejus contremuit terra, moti sunt cæli, sol et luna obtenebrati sunt, et stellæ retraxerunt splendorem suum.
Mokili eninganaka liboso na bango, Lola elengaka, moyi mpe sanza eyindaka, minzoto etikaka kongenga.
11 Et Dominus dedit vocem suam ante faciem exercitus sui, quia multa sunt nimis castra ejus, quia fortia et facientia verbum ejus: magnus enim dies Domini, et terribilis valde, et quis sustinebit eum?
Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi; nani akoki kotelema na mokolo yango?
12 Nunc ergo, dicit Dominus, convertimini ad me in toto corde vestro, in jejunio, et in fletu, et in planctu.
« Ezala sik’oyo, » elobi Yawe, « bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba, na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. »
13 Et scindite corda vestra, et non vestimenta vestra; et convertimini ad Dominum Deum vestrum, quia benignus et misericors est, patiens et multæ misericordiæ, et præstabilis super malitia.
Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.
14 Quis scit si convertatur, et ignoscat, et relinquat post se benedictionem, sacrificium et libamen Domino Deo vestro?
Nani ayebi soki akoki kobongola makanisi to koyoka mawa mpe kotika na sima na Ye lipamboli, mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino, makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino?
15 Canite tuba in Sion, sanctificate jejunium, vocate cœtum:
Bobeta kelelo na Siona! Bopanza sango ya mokolo ya bule ya kokila bilei mpe bobengisa mayangani ya bule.
16 congregate populum, sanctificate ecclesiam, coadunate senes, congregate parvulos, et sugentes ubera; egrediatur sponsus de cubili suo, et sponsa de thalamo suo.
Bosangisa bato, bobulisa mayangani, bosangisa bakambi mpe bana, ezala oyo bazali nanu komela mabele. Tika ete elenge mobali oyo abali sika atika shambre na ye ya libala, mpe elenge mwasi oyo abali sika atika mpe shambre na ye ya libala.
17 Inter vestibulum et altare plorabunt sacerdotes, ministri Domini, et dicent: Parce, Domine, parce populo tuo; et ne des hæreditatem tuam in opprobrium, ut dominentur eis nationes. Quare dicunt in populis: Ubi est Deus eorum?]
Tika ete Banganga-Nzambe oyo basalelaka Yawe balela na kati-kati ya ndako moke ya kokotela mpe etumbelo. Tika ete baloba: « Oh Yawe, bikisa bato na Yo, kokomisa te libula na Yo eloko ya kotiola to eloko ya maseki kati na bikolo. Mpo na nini bato ya bikolo mosusu baloba: ‹ Wapi Nzambe na bango? › »
18 [Zelatus est Dominus terram suam, et pepercit populo suo.
Yawe akotonda na zuwa mpo na mokili na Ye mpe akoyokela bato na Ye mawa.
19 Et respondit Dominus, et dixit populo suo: Ecce ego mittam vobis frumentum, et vinum, et oleum, et replebimini eis; et non dabo vos ultra opprobrium in gentibus.
Yawe akoyanola mpe akoloba na bango: « Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta; bongo bokotonda yango. Nakokomisa bino lisusu te eloko ya kotiola kati na bikolo.
20 Et eum qui ab aquilone est procul faciam a vobis, et expellam eum in terram inviam et desertam: faciem ejus contra mare orientale, et extremum ejus ad mare novissimum: et ascendet fœtor ejus, et ascendet putredo ejus, quia superbe egit.
Nakotindika monguna ya nor mosika na bino, nakomema ye na mokili ekawuka mpe ezanga eloko; bongo basoda na ye, oyo bazalaka na liboso bakozinda na ebale monene ya este; mpe oyo bazalaka na sima, na ebale monene ya weste. Solo na ye ya kopola ekoyokana, kobeba na ye ekopanzana. » Solo, asali makambo minene.
21 Noli timere, terra: exsulta, et lætare, quoniam magnificavit Dominus ut faceret.
Oh mabele, kobanga te, zala na esengo mpe sepela, pamba te Yawe asali makambo minene.
22 Nolite timere, animalia regionis, quia germinaverunt speciosa deserti; quia lignum attulit fructum suum, ficus et vinea dederunt virtutem suam.
Banyama ya zamba, bobanga te, pamba te matiti eboti lisusu na elanga, banzete eboti lisusu bambuma; banzete ya figi mpe ya vino eboti bambuma ebele penza.
23 Et, filii Sion, exsultate, et lætamini in Domino Deo vestro, quia dedit vobis doctorem justitiæ, et descendere faciet ad vos imbrem matutinum et serotinum, sicut in principio.
Bosepela, bino bato ya Siona, bosepela kati na Yawe, Nzambe na bino, pamba te apesi bino mvula mpo na kobikisa bino. Akonokisela bino bamvula minene na eleko ya mvula mpe na eleko ya elanga, ndenge ezalaki liboso.
24 Et implebuntur areæ frumento, et redundabunt torcularia vino et oleo.
Etando oyo batutelaka ble ekotonda na bambuma, banzungu ekotonda na vino mpe na mafuta.
25 Et reddam vobis annos, quos comedit locusta, bruchus, et rubigo, et eruca: fortitudo mea magna quam misi in vos.
Nakozongisela bino mibu oyo mampinga minene ya mankoko, ya makelele, ya mabanki minene mpe ya bambinzo eliaki: mampinga minene na Ngai oyo natindaki mpo na kobundisa bino.
26 Et comedetis vescentes, et saturabimini; et laudabitis nomen Domini Dei vestri, qui fecit mirabilia vobiscum; et non confundetur populus meus in sempiternum.
Bokolia bilei ebele mpe bokotonda, bongo bokokumisa Kombo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo asaleli bino makambo ya kokamwa: bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.
27 Et scietis quia in medio Israël ego sum, et ego Dominus Deus vester, et non est amplius; et non confundetur populus meus in æternum.]
Boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali kati na Isalaele, ete nazali Yawe, Nzambe na bino, mpe ete Nzambe mosusu azali te. Bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.
28 [Et erit post hæc: effundam spiritum meum super omnem carnem, et prophetabunt filii vestri et filiæ vestræ: senes vestri somnia somniabunt, et juvenes vestri visiones videbunt.
Sima na makambo oyo, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola, mibange na bino bakolota bandoto, bilenge na bino bakozwa bimoniseli.
29 Sed et super servos meos et ancillas in diebus illis effundam spiritum meum.
Ata mpe kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi, nakosopa Molimo na Ngai, na mikolo wana.
30 Et dabo prodigia in cælo et in terra, sanguinem, et ignem, et vaporem fumi.
Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa, na likolo mpe na mokili: makila, moto mpe makonzi ya milinga.
31 Sol convertetur in tenebras, et luna in sanguinem, antequam veniat dies Domini magnus et horribilis.
Moyi ekobongwana molili, mpe sanza ekobongwana makila, liboso ete mokolo ya Yawe ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya somo.
32 Et erit: omnis qui invocaverit nomen Domini, salvus erit: quia in monte Sion et in Jerusalem erit salvatio, sicut dixit Dominus, et in residuis quos Dominus vocaverit.]
Bongo moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Yawe akobikisama; pamba te na ngomba Siona mpe na Yelusalemi, ekozala na bato oyo bakobika, kolanda ndenge Yawe alobaki, mpe bato oyo Yawe akobenga bakozala kati na bato oyo bakobika.

< Joël Propheta 2 >