< Osee Propheta 14 >
1 [Convertere, Israël, ad Dominum Deum tuum, quoniam corruisti in iniquitate tua.
Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.
2 Tollite vobiscum verba, et convertimini ad Dominum; et dicite ei: Omnem aufer iniquitatem, accipe bonum, et reddemus vitulos labiorum nostrorum.
Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe; boloba na Ye: « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe.
3 Assur non salvabit nos: super equum non ascendemus, nec dicemus ultra, Dii nostri opera manuum nostrarum: quia ejus, qui in te est, misereberis pupilli.
Asiri akokoka kobikisa biso te; tokomata na mpunda ya bitumba te mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso: ‹ Bozali banzambe na biso, › pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »
4 Sanabo contritiones eorum; diligam eos spontanee: quia aversus est furor meus ab eis.
Nakobikisa bango na mabe na bango mpe nakolinga bango na motema moko, pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.
5 Ero quasi ros; Israël germinabit sicut lilium, et erumpet radix ejus ut Libani.
Nakozala lokola londende mpo na Isalaele; akobimisa fololo lokola lisi, akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani.
6 Ibunt rami ejus, et erit quasi oliva gloria ejus, et odor ejus ut Libani.
Bitape na ye ekokende mosika, akozala na lokumu lokola nzete ya olive, mpe malasi na ye ekozala lokola malasi ya nzete ya sedele ya Libani.
7 Convertentur sedentes in umbra ejus; vivent tritico, et germinabunt quasi vinea; memoriale ejus sicut vinum Libani.
Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye, bakokola malamu lokola ble, bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani.
8 Ephraim, quid mihi ultra idola? Ego exaudiam, et dirigam eum ego ut abietem virentem; ex me fructus tuus inventus est.
Efrayimi akoloba: « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.
9 Quis sapiens, et intelliget ista? intelligens, et sciet hæc? quia rectæ viæ Domini, et justi ambulabunt in eis; prævaricatores vero corruent in eis.]
Nani azali na bwanya mpo na kososola makambo oyo? Nani azali na mayele mingi mpo na koyeba yango? Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima: bato ya sembo bakolanda yango, kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango.