< لێڤییەکان 12 >

هەروەها یەزدان بە موسای فەرموو: 1
Yawe ayebisaki Moyize:
«لەگەڵ نەوەی ئیسرائیل بدوێ و بڵێ:”ئەگەر ژنێک سکی پڕ بوو و کوڕێکی بوو، ئەوا بەپێی ڕێوڕەسم بۆ حەوت ڕۆژ گڵاو دەبێت، هەروەک لە ڕۆژانی خوێنلێچوونی مانگانەی گڵاو دەبێت. 2
« Loba na bana ya Isalaele: ‹ Soki mwasi aboti mwana mobali, akozala mbindo mikolo sambo lokola tango amonaka makila na ye ya sanza.
لە ڕۆژی هەشتەمدا کۆرپەکە خەتەنە دەکرێت، 3
Bongo na mokolo ya mwambe, basengeli kokata mwana ngenga.
ئینجا دایکەکە سی و سێ ڕۆژی دیکە دەمێنێتەوە هەتا لە خوێن لێچوونەکەی پاک ببێتەوە، بەر هیچ شتێکی پیرۆز ناکەوێت و بۆ پیرۆزگا ناچێت، هەتا ڕۆژانی پاکبوونەوەی تەواو دەبێت. 4
Sima, akolekisa lisusu mikolo tuku misato na misato mpo ete apetolama na makila na ye oyo ebimaki tango abotaki. Akosimba eloko moko te ya bule mpe akokende te na Esika ya bule kino mikolo ya kopetolama na ye ekokoka.
ئەگەر کچی بوو، ئەوا دوو هەفتە پاک نابێت، هەروەک لە خوێنلێچوونی بێت، ئینجا شەست و شەش ڕۆژی دیکە دەمێنێتەوە، هەتا لە زەیستانییەکەی پاک ببێتەوە. 5
Soki mwasi aboti mwana mwasi, akozala mbindo baposo mibale lokola tango amonaka makila na ye ya sanza. Bongo akolekisa mikolo tuku motoba na motoba mpo ete apetolama na makila na ye oyo ebimaki tango abotaki.
«”کاتێک ڕۆژانی پاکبوونەوەی تەواو بوو، ئەگەر کوڕی بووبێت یان کچ، ئەوا بەرخێکی یەک ساڵە وەک قوربانی سووتاندن و بێچووە کۆترێک یان کوکوختییەک وەک قوربانی گوناه دەهێنێتە بەر دەروازەی چادری چاوپێکەوتن بۆ کاهینەکە. 6
Soki mikolo ya kopetolama na ye ekoki, ezala abotaki mwana mobali to mwana mwasi, akomema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwana meme ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba mpe ebenga moko ya mboka to ebenga moko ya zamba lokola mbeka mpo na masumu.
ئەویش لەبەردەم یەزدان پێشکەشی دەکات و کەفارەتی بۆ دەکات، ئینجا بەپێی ڕێوڕەسم لە خوێن لێچوونەکەی پاک دەبێتەوە. «”ئەوە ڕێنماییە بۆ ئەو ژنەی کوڕ یان کچی دەبێت. 7
Nganga-Nzambe akobonza bambeka yango liboso ya Yawe mpe sima, akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mwasi. Soki kaka asilisi kosala yango nde mwasi akokoma peto. Wana nde mobeko mpo na mwasi oyo aboti mwana mobali to mwana mwasi.
بەڵام ئەگەر دەستکورت بوو بەرخێک بهێنێت، ئەوا دوو کوکوختی یان دوو بێچووە کۆتر، یەکێکیان بۆ قوربانی سووتاندن و ئەوی دیکە بۆ قوربانی گوناه، بەم شێوەیە کاهینەکە کەفارەتی بۆ دەکات و پاک دەبێتەوە.“» 8
Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba: moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › »

< لێڤییەکان 12 >