< ئیشایا 16 >

بەرخ وەک سەرانە بنێرن بۆ فەرمانڕەوای خاکەکە، لە سەلەعەوە بە چۆڵەوانیدا بەرەو چیاکەی شاری سییۆن. 1
Botinda mpate lokola mpako epai ya mokambi ya mokili; wuta na Sela kino na ngomba Siona, mboka kitoko, bokatisa esobe.
وەک باڵندەی هەڵاتوون وەک لە هێلانە دەرپەڕێنراویان لێدێت، کچانی مۆئاب لە تەنکاییەکانی ڕووباری ئەرنۆن. 2
Bakobengana basi ya Moabi lokola bandeke na zala na yango, na suka ya ebale ya Arinoni.
«ڕاوێژ بکە، دادوەری ئەنجام بدە، لە قرچەی نیوەڕۆدا سێبەرت وەک شەوی لێ بکە. دەرکراوەکان بشارەوە، هەڵاتووەکان ئاشکرا مەکە. 3
« Pesa biso toli, kamata mokano. Sala ete elili na yo ezala lokola butu na moyi makasi. Bomba bato oyo bakimeli epai na yo, kobimisa bango te.
با ئاوارەکانی مۆئاب لەلات بمێننەوە، لە ڕووی کاولکەر بۆیان ببە پەناگا.» کاتێک چەوسێنەر کۆتایی پێ دێت، کاولبوون نامێنێت، پێشێلکاران لە خاکەکەدا لەناودەچن. 4
Tika ete bato ya Moabi oyo bakimi epai na yo bawumela elongo na yo! Zala nguba na bango liboso ya mobomi. » Tango minyoko ekokoma na suka, kobebisama ekotikala lisusu te mpe koboma ekosila na mokili.
بە خۆشەویستی نەگۆڕ تەخت جێگیر دەبێت، یەکێک لە بنەماڵەی داود دادپەروەر و داواکاری دادپەروەری، دەستپێشخەر بۆ ڕاستودروستی بە دڵسۆزییەوە لەسەری دادەنیشێت. 5
Kiti ya bokonzi ekolendisama na bolingo; moto moko akovanda na kiti yango na bosolo, akobimela na ndako ya Davidi: alukaka bosembo kati na kosambisa mpe alongisaka makambo ya bosembo.
لووتبەرزی مۆئابمان بیست، لووتبەرزییەکی زۆر، خۆبەزلزانی و لووتبەرزی و بەفیزی، بەڵام قسە پووچەکانی ناچەسپێن. 6
Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, ndenge atombolaka mapeka: lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye, lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina.
لەبەر ئەوە با خەڵکی مۆئاب واوەیلا بکەن، سەراپا بۆ مۆئاب واوەیلا بکەن. ئەی مۆئابییە بەزێنراوەکان، بۆ نانی کشمیشی قییر حەراسەت شیوەن بگێڕن. 7
Yango wana, bato ya Moabi bakosala matanga, bakomilela bango na bango mpo na Moabi. Bolela mpe bozala na mawa mpo na mikate ya Kiri-Aresheti, oyo basala na bambuma ya vino.
کێڵگەکانی حەشبۆن سیس بوون، هەروەها ڕەزەکەی سیڤما. گەورەکانی نەتەوەکان شا مێوەکانییان شکاند، کە گەیشتبووە یەعزێر و پەلی هاویشت هەتا چۆڵەوانی. لقەکانی درێژ ببوونەوە و لە دەریا پەڕیبوونەوە. 8
Mpo ete bilanga ya Eshiboni esili kokawuka elongo na bilanga ya vino ya Sibima. Bakambi ya bikolo babukaki-bukaki bitape na yango oyo eleki kitoko, oyo ekenda kino na Yaezeri mpe eleka kino na esobe. Bitape yango ezalaki epanzana makasi mpe ekenda mosika kino na ebale monene.
لەبەر ئەوە گریانی یەعزێر دەگریێم بۆ ڕەزەکەی سیڤما، بە فرمێسکەکانم ئاوتان دەدەم ئەی حەشبۆن و ئەلعالێ! لە کاتی میوە گەییوەکانت و دروێنەکانت هەراوزەنای جەنگ هات. 9
Yango wana, nazali kolela lokola Yaezeri mpo na vino ya Sibima. Eshiboni mpe Eleale, nazali kosopa mpinzoli mpo na bino! Koganga ya esengo esili mpo bambuma na bino mpe mpo na biloko oyo bobuki na bilanga na bino.
خۆشی و شادی لە باخ بڕایەوە، لەناو ڕەزان گۆرانی ناگوترێت و هاوار ناکرێت، شەراب لەناو گوشەر ناگوشرێت، هوتاف کپ بوو. 10
Esengo mpe kosepela ebungi na bilanga ya kitoko, banzembo mpe koganga ya esengo ezali lisusu te kati na bilanga ya vino! Mokamoli vino akokamola lisusu te kati na ekamolelo, pamba te nakosukisa koganga.
لەبەر ئەوە هەناوم وەک قیسارە بۆ مۆئاب دەناڵێنێت، ناخیشم بۆ قییر حەراسەت. 11
Motema na ngai ezali kolela lokola lindanda mpo na Moabi, mpe kati ya motema na ngai ezali komona pasi mpo na Kiri-Aresheti.
جا کە مۆئاب لە نزرگەی سەر بەرزاییەکە دەردەکەوێت، ماندوو دەبێت. کە دەچێتە ناو نزرگەکەوە نوێژ بکات، قبوڵ نابێت. 12
Bakomona Moabi komata na bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na kobondela na esika na ye ya bule, kasi akolonga te.
ئەمە ئەو فەرمایشتەیە کە یەزدان پێشتر بە مۆئابی فەرموو. 13
Yango nde liloba oyo Yawe aloba wuta kala mpo na Moabi.
ئێستاش یەزدان دەدوێت و دەفەرموێت: «لە ماوەی سێ ساڵدا وەک ساڵەکانی کرێگرتە، سەنگینی مۆئاب سووک دەبێت، بەو هەموو خەڵکە زۆرەوە، پاشماوەکەی زۆر کەم و لاواز دەبێت.» 14
Kasi Yawe alobi sik’oyo boye: « Etikali mibu misato, kobakisa ata mokolo moko te, bato ya lokumu ya Moabi mpe ebele ya bato na ye bakosambwa, bongo bato na ye oyo bakobika bakozala kaka moke mpe bakozanga makasi. »

< ئیشایا 16 >