< عەزرا 8 >

ئەمانەش گەورەی بنەماڵەکان و ئەوانەن کە لەگەڵیاندا تۆمارکراون، ئەوانەی لە سەردەمی ئەرتەحشەستەی پاشادا لەگەڵ من لە بابلەوە گەڕانەوە: 1
Tala bakambi ya mabota, kolanda ndenge babotamela, oyo bazongaki elongo na ngai, wuta na Babiloni, na tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi:
لە نەوەی فینەحاس، گێرشۆم؛ لە نەوەی ئیتامار، دانیال؛ لە نەوەی داود، حەتوش 2
Kati na bakitani ya Pineasi: Gerishomi. Kati na bakitani ya Itamari: Daniele. Kati na bakitani ya Davidi: Atushi.
لە نەوەی شەخەنەیا؛ لە نەوەی پەرعۆش، زەکەریا و سەد و پەنجا نێرینەش لەگەڵیدا تۆمار کران؛ 3
Kati na bakitani ya Shekania, ya Pareoshi: Zakari elongo na bato na ye oyo batangaki, nkama moko na tuku mitano.
لە نەوەی پەحەت‌مۆئاب، ئەلیهۆعێینەی کوڕی زەرەحیا، دوو سەد نێرینەش لەگەڵی؛ 4
Kati na bakitani ya Paati-Moabi: Eliowenayi, mwana mobali ya Zerakia, elongo na bato na ye nkama mibale.
لە نەوەی زەتو، شەخەنەیا کوڕی یەحەزیێل و سێ سەد نێرێنەش لەگەڵی؛ 5
Kati na bakitani ya Zatu: Shekania, mwana mobali ya Yaazieli, elongo na bato na ye nkama misato.
لە نەوەی عادین، عەبەدی کوڕی یۆناتان، پەنجا نێرینەش لەگەڵی؛ 6
Kati na bakitani ya Adini: Ebedi, mwana mobali ya Jonatan, elongo na bato na ye tuku mitano.
لە نەوەی ئیلام، یەشەعیای کوڕی عەتەلیا، حەفتا نێرینەش لەگەڵی؛ 7
Kati na bakitani ya Elami: Ezayi, mwana mobali ya Atalia elongo na bato na ye tuku sambo.
لە نەوەی شەفەتیا، زەڤەدیای کوڕی میکائیل، هەشتا نێرینەش لەگەڵی؛ 8
Kati na bakitani ya Shefatia: Zebadia, mwana mobali ya Mikaeli, elongo na bato na ye tuku mwambe.
لە نەوەی یۆئاب عۆبەدیای کوڕی یەحیێل، دوو سەد و هەژدە نێرینەش لەگەڵی؛ 9
Kati na bakitani ya Joabi: Abidiasi, mwana mobali ya Yeyeli, elongo na bato na ye nkama mibale na zomi na mwambe.
لە نەوەی بانی، شەلۆمیت کوڕی یۆسیفیا، سەد و شەست نێرینەش لەگەڵی؛ 10
Kati na bakitani ya Bani: Shelomiti, mwana mobali ya Yosifia, elongo na bato na ye nkama moko na tuku motoba.
لە نەوەی بێڤەی، زەکەریای کوڕی بێڤەی، بیست و هەشت نێرینەش لەگەڵی؛ 11
Kati na bakitani ya Bebayi: Zakari, mwana mobali ya Bebayi, elongo na bato na ye tuku mibale na mwambe.
لە نەوەی عەزگاد، یۆحانانی کوڕی هەقاتان سەد و دە نێرینەش لەگەڵی؛ 12
Kati na bakitani ya Azigadi: Yoanani, mwana mobali ya Akatani, elongo na bato na ye nkama moko na zomi.
لە نەوەی ئەدۆنیقام، ئەوانەی کۆتایی ئەمە ناوەکانیانە، ئەلیفەلەت و یەعوئێل و شەمەعیا، شەست نێرینەش لەگەڵیان؛ 13
Kati na bakitani ya Adonikami: bana ya suka oyo bakombo na bango ezalaki Elifeleti, Yeyeli mpe Shemaya, elongo na bato na bango tuku motoba.
لە نەوەی بیگڤەی، عوتەی و زەکور، حەفتا نێرینەش لەگەڵیان. 14
Kati na bakitani ya Bigivayi: Utayi mpe Zabudi elongo na bato na bango tuku sambo.
جا بۆ لای ئەو نۆکەندەی بەرەو ئەهەڤا دەڕوات کۆمکردنەوە و سێ ڕۆژ لەوێ ماینەوە، لە گەل و کاهینەکان ورد بوومەوە، بەڵام کەسم لە لێڤییەکان لەوێ بەدی نەکرد. 15
Nasangisaki bango pene ya ebale oyo ezalaki kotiola na ngambo ya Akava, mpe tovandaki kuna mikolo misato. Tango natalaki malamu bato mpe Banganga-Nzambe, namonaki ata Molevi moko te kuna.
لەبەر ئەوە بانگی هەر یەک لە ئەلیعەزەر، ئەریێل، شەمەعیا، ئەلناتان، یاریڤ، ئەلناتان، ناتان، زەکەریا و مەشولام کرد، کە لە ڕابەرەکان بوون، هەروەها یۆیاریڤ و ئەلناتان کە تێگەیشتوو بوون. 16
Boye nabengisaki Eliezeri, Arieli, Shemaya, Elinatani, Yaribi, Elinatani, Natan, Zakari mpe Meshulami oyo bazalaki bakambi; Yoyaribi mpe Elinatani oyo bazalaki bato ya mayele.
هەموویانم نارد بۆ لای ئیدۆی ڕابەر لەو شوێنەی ناوی کاسیفیا بوو، پێم گوتن لە کاسیفیا چی بە ئیدۆ و برا خزمەتکارەکانی پەرستگا بڵێن، تاوەکو خزمەتکارانمان بۆ بهێنن بۆ ماڵی خودامان. 17
Natindaki bango epai ya Ido, mokambi ya mboka Kasifia; nayebisaki bango makambo oyo basengeli koloba na Ido mpe bandeko na ye ya mosala, basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na Kasifia, mpo ete bamemela biso basali mpo na Ndako ya Nzambe na biso.
ئینجا بەپێی ئەوەی دەستی چاکی خودا لەسەرمان بوو، پیاوێکی وریایان بۆمان هێنا کە ناوی شێرێڤیا بوو، لە نەوەی مەحلی کوڕی لێڤی کوڕی ئیسرائیل، لەگەڵ کوڕەکانی شێرێڤیا و براکانی کە هەموویان هەژدە پیاو بوون؛ 18
Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, bamemelaki biso Sherebia, moto ya mayele, kati na bakitani ya Maali, mwana mobali ya Levi, mwana mobali ya Isalaele, elongo na bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali, bango nyonso zomi na mwambe,
هەروەها حەشەڤیا لەگەڵ یەشەعیا لە نەوەی مەراری و براکانی و کوڕەکانیان بیست کەس بوون. 19
elongo na Ashabia mpe Ezayi, bakitani ya Merari, elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bana na bango ya mibali. Bango nyonso bazalaki tuku mibale.
لە خزمەتکارانی پەرستگاش، لەو کۆمەڵەی کە داود و کاربەدەستەکان بۆ یارمەتیدانی لێڤییەکان دایانمەزراندبوون، دوو سەد و بیست پیاویان هێنا. هەموویان بە ناوی خۆیانەوە دیاری کران. 20
Bamemaki lisusu basali ya Tempelo, nkama mibale na tuku mibale, bakitani ya bato oyo Davidi mpe lisanga ya bakalaka na ye batiaki mpo na kosunga Balevi. Batangaki bango nyonso na bakombo na bango.
لەوێدا لەسەر نۆکەندی ئەهەڤا بانگەوازی ڕۆژووگرتنم ڕاگەیاند، بۆ ئەوەی لەبەردەم خوداکەماندا ملکەچ بین و داوای ڕێگایەکی ڕاستی لێ بکەین بۆ خۆمان و منداڵەکانمان و هەموو ئەوەی هەمانە. 21
Kuna, pene ya ebale Akava, napesaki mitindo ya kokila bilei mpo na komikitisa liboso ya Nzambe na biso mpe kosenga Ye mobembo malamu mpo na biso, mpo na bana na biso mpe mpo na biloko na biso nyonso.
پێم شەرم بوو داوای سەرباز و سوار لە پاشا بکەم، بۆ ئەوەی لە ڕێگاکەدا لە دوژمن بمانپارێزن، چونکە ئێمە بە پاشامان گوتبوو کە خودای ئێمە چاکە لەگەڵ ئەوانە دەکات کە پشتی پێ دەبەستن، زۆریش لەوە تووڕە دەبێت کە وازی لێ بهێنێت. 22
Nayokaki soni mpo na kosenga epai ya mokonzi basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpo na kobatela biso na nzela liboso ya banguna na biso; pamba te tolobaki na mokonzi: « Loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezali likolo ya moto nyonso oyo alukaka Ye, kasi kanda makasi na Ye ekitelaka bato nyonso oyo basundolaka Ye. »
جا بە ڕۆژوو بووین و ئەوەمان لە خودامان داوا کرد، ئەویش وەڵامی داینەوە. 23
Boye, tokilaki bilei mpe tosengaki ngolu yango epai ya Nzambe na biso, mpe Ye ayanolaki libondeli na biso.
پاشان لە کاهینانی باڵا دوازدە کەسم جیا کردەوە: شێرێڤیا و حەشەڤیا، لەگەڵ ئەوانیش دە لە براکانیان، 24
Bongo na sima, natiaki kati na bakonzi ya Banganga-Nzambe bakonzi zomi na mibale: Sherebia, Ashabia elongo na bandeko na bango zomi.
زێڕ و زیو و قاپوقاچاغەکەشم بۆیان پێوا، کە بەخشینەکەی ماڵی خودامان ئەوەی پاشا و ڕاوێژکارەکانی و کاربەدەستەکانی و هەموو ئەو ئیسرائیلییانەی کە لەوێ بوون بەخشییان. 25
Namekaki liboso na bango makabo ya palata, ya wolo mpe bisalelo nyonso oyo mokonzi, bapesi toli na ye, bakalaka na ye mpe Isalaele mobimba bapesaki mpo na Ndako ya Nzambe na biso.
شەش سەد و پەنجا تالنت زیوم کێشا و خستمە ناو دەستیان، سەد تالنتیش لە قاپوقاچاغی زیو لەگەڵ سەد تالنت زێڕ و 26
Napesaki bango kilo nkoto tuku mibale ya palata, kilo nkoto misato ya bisalelo basala na palata, kilo nkoto misato ya wolo,
بیست پەرداخی زێڕ بە هەزار درهەم، دوو قاپی بڕۆنزیش زۆر باش مشتوماڵکراو، کە وەک زێڕ بە نرخ بوون. 27
bakopo ya wolo tuku mibale oyo ezali na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko mpe biloko mibale ya kitoko basala na bronze oyo engalaka lokola wolo.
بەوانم گوت: «ئێوە تەرخانکراون بۆ یەزدان و قاپوقاچاغەکانیش تەرخانکراون و زێڕ و زیوەکەش بەخشینێکی ئازادن بۆ یەزدانی پەروەردگاری باوباپیرانتان. 28
Nalobaki na bango: « Bino elongo na biloko oyo, bobulisami mpo na Yawe. Palata mpe wolo oyo ezali makabo oyo bato bakati bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango, epai na Yawe, Nzambe ya tata na bino.
ئیتر پاسەوانیی بکەن و بیپارێزن هەتا لەبەردەم کاهینانی باڵا و لێڤییەکان و گەورەی بنەماڵەکانی ئیسرائیل لە ئۆرشەلیم بیکێشن، لە ژوورەکانی ماڵی یەزدان.» 29
Bosenzela mpe bobatela yango malamu kino tango bokomeka kilo na yango liboso ya bakonzi ya Banganga-Nzambe, ya Balevi mpe ya bakambi ya mabota ya Isalaele, kati na bashambre ya Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi. »
ئینجا کاهین و لێڤییەکان کێشی زێڕ و زیو و قاپوقاچاغەکەیان وەرگرت تاوەکو بۆ ئۆرشەلیمی بهێنن، بۆ ماڵی خوداکەمان. 30
Banganga-Nzambe mpe Balevi bayambaki palata, wolo mpe bisalelo ya bule oyo bamekaki kilo na yango, mpo na komema yango na Ndako ya Nzambe na biso, na Yelusalemi.
لە دوازدەی مانگی یەک لە نۆکەندی ئەهەڤاوە بەڕێکەوتین تاکو بچینە ئۆرشەلیم، خوداشمان پشتگیری دەکردین، جا لە دەستی دوژمن و چەتەکانی سەر ڕێگا فریامان کەوت. 31
Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya liboso, tolongwaki na ebale Akava mpo na kokende na Yelusalemi. Loboko ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, mpe abatelaki biso na nzela liboso ya banguna mpe ya bato ya mobulu.
ئینجا گەیشتینە ئۆرشەلیم و سێ ڕۆژ لەوێ ماینەوە. 32
Tokomaki na Yelusalemi mpe topemaki kuna mikolo misato.
لە ڕۆژی چوارەمدا زێڕ و زیو و قاپوقاچاغەکەی ناو ماڵی خودامان لەسەر دەستی مەرێمۆتی کوڕی ئوریای کاهین کێشرا. ئەلعازاری کوڕی فینەحاسیش لەگەڵی بوو، لەگەڵ یۆزاڤادی کوڕی یێشوع و نۆعەدیای کوڕی بەنوی کە هەردووکیان لێڤی بوون. 33
Na mokolo ya minei, tomekaki kilo ya palata, ya wolo mpe bisalelo ya bule kati na Ndako ya Nzambe na biso, liboso ya kopesa yango na maboko ya Nganga-Nzambe Meremoti, mwana mobali ya Uri; azalaki elongo na Eleazari, mwana mobali ya Pineasi, mpe Balevi Yozabadi, mwana mobali ya Jozue, mpe Noadia, mwana mobali ya Binuwi.
بە ژمارە و کێش بۆ هەموویان، هەموو کێشەکەش لەو کاتەدا نووسران. 34
Batangaki mpe bamekaki kilo ya biloko nyonso; mpe bakomaki yango na buku kaka na tango wana.
نەوەی ڕاپێچکراوەکانیش ئەوانەی لە ڕاپێچکراوی گەڕابوونەوە، قوربانی سووتاندنیان پێشکەشی خودای ئیسرائیل کرد، دوازدە گا لەبری هەموو ئیسرائیل، لەگەڵ نەوەد و شەش بەران، حەفتا و حەوت بەرخی نێر، هەروەها دوازدە گیسکی نێری بۆ قوربانی گوناه، هەموو کرانە قوربانی سووتاندن بۆ یەزدان. 35
Bato oyo bakendeki na bowumbu bazongaki wuta na bowumbu mpe babonzaki mpo na Isalaele mobimba lokola mbeka ya kotumba epai ya Nzambe ya Isalaele: bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali tuku libwa na motoba, bana meme tuku sambo na sambo, mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka ya masumu. Babonzaki nyonso lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.
هەروەها یاساکانی پاشایان دایە دەست میر و پارێزگارەکانی هەرێمی ئەوبەری فورات، ئەوانیش یارمەتی گەل و ماڵی خودایان دا. 36
Batindaki lisusu sango ya mitindo ya mokonzi epai ya bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka mpe epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, oyo basungaki bato mpe Tempelo ya Nzambe.

< عەزرا 8 >