< 민수기 25 >

1 이스라엘이 싯딤에 머물러 있더니 그 백성이 모압 여자들과 음행하기를 시작하니라
Wana bana ya Isalaele bavandaki nanu na Shitimi, bamipesaki na kindumba na bilenge basi ya Moabi.
2 그 여자들이 그 신들에게 제사할 때에 백성을 청하매 백성이 먹고 그들의 신들에게 절하므로
Mpe, bilenge basi yango bazalaki kobenga bango na milulu ya mbeka oyo babonzelaka banzambe na bango. Mpe bana ya Isalaele bazalaki kolia mpe kogumbamela banzambe yango.
3 이스라엘이 바알브올에게 부속된지라 여호와께서 이스라엘에게 진노하시니라
Bongo, bana ya Isalaele bamipesaki na kosambela Bala ya Peori mpe, kanda ya Yawe epelaki makasi mpo na bango.
4 여호와께서 모세에게 이르시되 백성의 두령들을 잡아 태양을 향하여 여호와 앞에 목매어 달라 그리하면 여호와의 진노가 이스라엘을 떠나리라
Yawe alobaki na Moyize: « Kanga bakambi nyonso ya Isalaele mpe diembika bango liboso na Ngai, na se ya moyi, mpo ete kanda makasi na Yawe elongwa likolo ya Isalaele. »
5 모세가 이스라엘 사사들에게 이르되 너희는 각기 관할하는 자 중에 바알브올에게 부속한 사람들을 죽이라 하니라
Moyize alobaki na bakambi ya Isalaele: « Tika ete moko na moko kati na bino aboma bato na ye oyo bamipesi na kosambela nzambe Bala ya Peori. »
6 이스라엘 자손의 온 회중이 회막문에서 울 때에 이스라엘 자손 한 사람이 모세와 온 회중의 목전에 미디안의 한 여인을 데리고 그 형제에게로 온지라
Bongo moto moko ya Isalaele amemaki na libota na ye mwasi moko ya ekolo ya Madiani liboso ya Moyize mpe ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele, wana bazalaki kolela na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
7 제사장 아론의 손자 엘르아살의 아들 비느하스가 보고 회중의 가운데서 일어나 손에 창을 들고
Tango Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron amonaki bongo, abimaki kati na lisanga mpe akamataki mopanga;
8 그 이스라엘 남자를 따라 그의 막에 들어가서 이스라엘 남자와 그 여인의 배를 꿰뚫어서 두 사람을 죽이니 염병이 이스라엘 자손에게서 그쳤더라
alandaki moto ya Isalaele wana kino kati na ndako na ye ya kapo mpe atobolaki bango mibale mabumu mpe bakufaki, ezala moto ya Isalaele wana mpe mwasi wana. Mpe etumbu oyo ezalaki likolo ya Isalaele esilaki.
9 그 염병으로 죽은 자가 이만 사천 명이었더라
Bato oyo bakufaki na etumbu wana bazalaki, bato nkoto tuku mibale na minei.
10 여호와께서 모세에게 일러 가라사대
Yawe alobaki na Moyize:
11 제사장 아론의 손자 엘르아살의 아들 비느하스가 나의 질투심으로 질투하여 이스라엘 자손 중에서 나의 노를 돌이켜서 나의 질투심으로 그들을 진멸하지 않게 하였도다
« Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, asili kolongola kanda na Ngai likolo ya bana ya Isalaele, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu na Ngai kati na bango; yango wana, na kanda na Ngai ya makasi, nasilisaki koboma bana ya Isalaele te.
12 그러므로 말하라 내가 그에게 나의 평화의 언약을 주리니
Na boye, yebisa ye ete nasili kosala boyokani ya kimia elongo na ye.
13 그와 그 후손에게 영원한 제사장 직분의 언약이라 그가 그 하나님을 위하여 질투하여 이스라엘 자손을 속죄하였음이니라
Boyokani yango ekozala mpo na ye mpe mpo na bakitani na ye, mpo ete basala mosala na Ngai ya Bonganga-Nzambe mpo na libela, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu ya Nzambe na ye, mpe asali mosala ya bolimbisi masumu mpo na bana ya Isalaele. »
14 죽임을 당한 이스라엘 남자 곧 미디안 여인과 함께 죽임을 당한 자의 이름은 시므리니 살루의 아들이요 시므온인의 종족 중 한 족장이며
Kombo ya moto ya Isalaele oyo babomaki elongo na mwasi ya Madiani ezalaki Zimiri, mwana mobali ya Salu, mokambi ya libota ya Simeoni;
15 죽임을 당한 미디안 여인의 이름은 고스비니 수르의 딸이라 수르는 미디안 백성 한 종족의 두령이었더라
mpe oyo ya mwasi ya Madiani ezalaki Kozibi, mwana mwasi ya Tsuri, mokambi ya libota moko ya ekolo ya Madiani.
16 여호와께서 모세에게 일러 가라사대
Yawe alobaki na Moyize:
17 미디안인들을 박해하며 그들을 치라
« Kamata bato ya Madiani lokola banguna mpe boma bango,
18 이는 그들이 궤계로 너희를 박해하되 브올의 일과 미디안 족장의 딸 곧 브올의 일로 염병이 일어난 날에 죽임을 당한 그들의 자매 고스비의 사건으로 너희를 유혹하였음이니라
pamba te bakamataki bino lokola banguna mpe basalelaki mayele mabe mpo na kokweyisa bino, na likambo ya Peori mpe ya ndeko na bango ya mwasi, Kozibi, mwana mwasi ya moko kati na bakambi ya Madiani, oyo babomaki na tango ya etumbu kati na likambo ya Peori. »

< 민수기 25 >