< 창세기 38 >

1 그 후에 유다가 자기 형제에게서 내려가서 아둘람 사람 히라에게로 나아가니라
Nzokande na tango wana, Yuda atikaki bandeko na ye mpe akendeki kovanda epai ya Ira, moto ya Adulami.
2 유다가 거기서 가나안 사람 수아라 하는 자의 딸을 보고 그를 취하여 동침하니
Yuda akutanaki kuna na mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana. Abalaki ye mpe asangisaki na ye nzoto.
3 그가 잉태하여 아들을 낳으매 유다가 그 이름을 엘이라 하니라
Mwasi yango akomaki na zemi mpe abotelaki Yuda mwana mobali. Mpe Yuda apesaki ye kombo « Eri. »
4 그가 다시 잉태하여 아들을 낳고 그 이름을 오난이라 하고
Mwasi yango azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali; apesaki ye kombo « Onani. »
5 그가 또 다시 아들을 낳고 그 이름을 셀라라 하니라 그가 셀라를 낳을 때에 유다는 거십에 있었더라
Abotaki mwana mobali mosusu mpe apesaki ye kombo « Shela. » Yuda azalaki na Kezibi tango mwasi na ye abotaki mwana ya misato.
6 유다가 장자 엘을 위하여 아내를 취하니 그 이름은 다말이더라
Yuda abalelaki Eri, mwana na ye ya liboso, mwasi: Tamari.
7 유다의 장자 엘이 여호와 목전에 악하므로 여호와께서 그를 죽이신지라
Kasi Eri, mwana liboso ya Yuda, azalaki moto mabe na miso ya Yawe; yango wana Yawe abomaki ye.
8 유다가 오난에게 이르되 네 형수에게로 들어가서 남편의 아우의 본분을 행하여 네 형을 위하여 씨가 있게 하라
Bongo Yuda alobaki na Onani: « Sangisa nzoto na semeki na yo mpo ete obota bana mpo na ndeko na yo ya mobali oyo akufa. »
9 오난이 그 씨가 자기 것이 되지 않을 줄 알므로 형수에게 들어갔을 때에 형에게 아들을 얻게 아니하려고 땅에 설정하매
Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te.
10 그 일이 여호와 목전에 악하므로 여호와께서 그도 죽이시니
Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye.
11 유다가 그 며느리 다말에게 이르되 수절하고 네 아비 집에 있어서 내 아들 셀라가 장성하기를 기다리라 하니 셀라도 그 형들 같이 죽을까 염려함이라 다말이 가서 그 아비 집에 있으니라
Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi: « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela: « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye.
12 얼마 후에 유다의 아내 수아의 딸이 죽은지라 유다가 위로를 받은 후에 그 친구 아둘람 사람 히라와 함께 딤나로 올라가서 자기 양털 깍는 자에게 이르렀더니
Sima na tango molayi, mwana mwasi ya Shuwa, mwasi ya Yuda, akufaki. Lokola tango na ye ya matanga esilaki, Yuda akendeki na Timina epai ya bato oyo bazalaki kolongola bapwale ya bameme na ye. Boye, moninga na ye Ira, moto ya Adulami, akendeki elongo na ye.
13 혹이 다말에게 고하되 네 시부가 자기 양털을 깎으려고 딤나에 올라왔다 한지라
Tango bayebisaki Tamari: « Bokilo na yo ya mobali azali kokende na Timina mpo na kolongolisa bapwale ya bameme na ye, »
14 그가 그 과부의 의복을 벗고 면박으로 얼굴을 가리고 몸을 휩싸고 딤나 길 곁 에나임 문에 앉으니 이는 셀라가 장성함을 보았어도 자기를 그의 아내로 주지 않음을 인함이라
alongolaki bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali mpe amizipaki elongi na vwale mpo ete bayeba ye lisusu te. Avandaki na ekuke ya Enayimi oyo ezalaki na nzela ya Timina, pamba te amonaki ete Shela akolaki, kasi bapesaki ye te na libala epai ya Shela.
15 그가 얼굴을 가리웠으므로 유다가 그를 보고 창녀로 여겨
Tango Yuda amonaki ye, akanisaki ete azali mwasi ya ndumba, pamba te azipaki elongi na ye.
16 길 곁으로 그에게 나아가 가로되 청컨대 나로 네게 들어가게 하라 하니 그 자부인줄 알지 못하였음이라 그가 가로되 당신이 무엇을 주고 내게 들어 오려느냐
Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye: — Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto. Tamari atunaki: — Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto?
17 유다가 가로되 내가 내 떼에서 염소 새끼를 주리라 그가 가로되 당신이 그것을 줄 때까지 약조물을 주겠느냐
Yuda azongisaki: — Nakotindela yo mwana ntaba oyo nakozwa na etonga na ngai. Tamari atunaki lisusu: — Ndanga nini okosimbisa ngai kino tango okotindela ngai yango?
18 유다가 가로되 무슨 약조물을 네게 주랴 그가 가로되 당신의 도장과 그 끈과 당신의 손에 있는 지팡이로 하라 유다가 그것들을 그에게 주고 그에게로 들어갔더니 그가 유다로 말미암아 잉태하였더라
Yuda alobaki: — Ndanga nini olingi ete nasimbisa yo? Tamari azongisaki: — Lopete na yo, singa na yo mpe lingenda na yo, oyo osimbi na loboko. Boye Yuda apesaki ye yango, asangisaki na ye nzoto mpe Tamari akomaki na zemi.
19 그가 일어나 떠나가서 그 면박을 벗고 과부의 의복을 도로 입으니라
Tamari atelemaki mpe akendeki; alongolaki vwale na ye mpe azongisaki lisusu na nzoto bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali.
20 유다가 그 친구 아둘람 사람의 손에 부탁하여 염소 새끼를 보내고 그 여인의 손에서 약조물을 찾으려 하였으나 그가 그 여인을 찾지 못한지라
Boye Yuda atindaki moninga na ye Ira, moto ya Adulami, mpo ete amemela mwasi yango mwana ntaba mpe azwa ndanga oyo asimbisaki ye. Kasi Ira amonaki ye te.
21 그가 그곳 사람에게 물어 가로되 길 곁 에나임에 있던 창녀가 어디 있느냐 그들이 가로되 여기는 창녀가 없느니라
Boye atunaki epai ya bavandi ya esika wana, na Enayimi: — Wapi mwasi ya ndumba oyo azalaki na nzela, na Enayimi? Bazongiselaki ye: — Esika oyo etikala kozala na mwasi ya ndumba te.
22 그가 유다에게로 돌아와 가로되 내가 그를 찾지 못하고 그곳 사람도 이르기를 여기는 창녀가 없다 하더라
Ira azongaki epai ya Yuda mpe ayebisaki ye: — Namoni ye te; kutu bavandi ya Enayimi bayebisi ngai ete mwasi ya ndumba atikala kozala na esika wana te.
23 유다가 가로되 그로 그것을 가지게 두라 우리가 부끄러움을 당할까 하노라 내가 이 염소 새끼를 보내었으나 그대가 그를 찾지 못하였느니라
Yuda alobaki: — Atikala na biloko oyo azwaki, noki te tokobima babolole. Ngai nazali na likambo te; natindeli ye mwana ntaba, mpe yo omoni ye te.
24 석 달쯤 후에 혹이 유다에게 고하여 가로되 네 며느리 다말이 행음하였고 그 행음함을 인하여 잉태하였느니라 유다가 가로되 그를 끌어 내어 불사르라
Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda: — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. Yuda alobaki: — Babimisa ye mpe batumba ye na moto!
25 여인이 끌려 나갈 때에 보내어 시부에게 이르되 이 물건 임자로 말미암아 잉태하였나이다 청컨대 보소서 이 도장과 그 끈과 지팡이가 뉘 것이니이까 한지라
Wana bazalaki kobimisa ye libanda, Tamari atindaki sango oyo epai ya Yuda, bokilo na ye: — Nazali na zemi ya nkolo biloko oyo. Mpe abakisaki: — Tala soki okoki koyeba nani azali nkolo ya lopete oyo, ya singa oyo mpe ya lingenda oyo.
26 유다가 그것들을 알아보고 가로되 그는 나보다 옳도다 내가 그를 내 아들 셀라에게 주지 아니하였음이로다 하고 다시는 그를 가까이 하지 아니하였더라
Yuda asosolaki ete ezali biloko na ye mpe alobaki: — Azali sembo koleka ngai, pamba te nabalisaki ye te epai ya Shela, mwana na ngai ya mobali. Boye Yuda atikalaki lisusu te kosangisa na ye nzoto.
27 임산하여 보니 쌍태라
Wana tango na ye ya kobota ekokaki, emonanaki ete ezalaki na mapasa mibale ya mibali kati na libumu na ye.
28 해산할 때에 손이 나오는지라 산파가 가로되 이는 먼저 나온 자라 하고 홍사를 가져 그 손에 매었더니
Na tango ya kobota, moko kati na bango abimisaki loboko; mpe mwasi oyo abotisaka asimbaki loboko yango, akangaki yango singa ya motane mpe alobaki: « Mwana oyo nde abimi liboso. »
29 그 손을 도로 들이며 그 형제가 나오는지라 산파가 가로되 네가 어찌하여 터치고 나오느냐 한고로 그 이름을 베레스라 불렀고
Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki: « Ofungoli nzela nini mpo na kobima? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi. »
30 그 형제 곧 손에 홍사 있는 자가 뒤에 나오니 그 이름을 세라라 불렀더라
Sima, ndeko na ye oyo azalaki na singa ya motane na loboko mpe abotamaki; bapesaki ye kombo « Zera. »

< 창세기 38 >