< 에스겔 18 >
2 너희가 이스라엘 땅에 대한 속담에 이르기를 아비가 신 포도를 먹었으므로 아들의 이가 시다고 함은 어찜이뇨
« Bino bato, mpo na nini kati na mokili ya Isalaele bolobaka lisese oyo: ‹ Batata basili kolia bambuma ya vino ya mibesu, kasi minu ya bana nde ekomi ngayi; elakisi nini? ›
3 나 주 여호와가 말하노라 내가 나의 삶을 두고 맹세하노니 너희가 이스라엘 가운데서 다시는 이 속담을 쓰지 못하게 되리라
Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, bokotikala lisusu koloba lisese oyo kati na Isalaele te.
4 모든 영혼이 다 내게 속한지라 아비의 영혼이 내게 속함 같이 아들의 영혼도 내게 속하였나니 범죄하는 그 영혼이 죽으리라
Pamba te bato nyonso ya bomoi bazali ya Ngai, ezala tata to mwana, bango mibale bazali ya Ngai; moto oyo akosala masumu, ye moko nde akokufa.
5 사람이 만일 의로워서 법과 의를 따라 행하며
Tozwa ndakisa ya moto moko oyo asalaka makambo ya sembo mpe ya alima,
6 산 위에서 제물을 먹지 아니하며 이스라엘 족속의 우상에게 눈을 들지 아니하며 이웃의 아내를 더럽히지 아니하며 월경 중에 있는 여인을 가까이 하지 아니하며
aliaka te bilei na bisika ya bule ya likolo ya bangomba, atalelaka banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele te, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, asangisaka nzoto te na mwasi oyo azali komona sanza na ye,
7 사람을 학대하지 아니하며 빚진 자의 전당물을 도로 주며 억탈하지 아니하며 주린 자에게 식물을 주며 벗은 자에게 옷을 입히며
anyokolaka moto te, azongisaka eloko oyo akangaki na niongo epai ya mokolo na yango, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala mpe alatisaka moto oyo azali bolumbu;
8 변을 위하여 꾸이지 아니하며 이식을 받지 아니하며 스스로 손을 금하여 죄악을 짓지 아니하며 사람 사람 사이에 진실히 판단하며
adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka loboko na ye mpo ete esala mabe te, akataka makambo ya bato mibale na bosembo;
9 내 율례를 좇으며 내 규례를 지켜 진실히 행할진대 그는 의인이니 정녕 살리라 나 주 여호와의 말이니라
atosaka bikateli na Ngai mpe abatelaka mibeko na Ngai na bosembo: moto ya lolenge wana nde azali sembo; akozala solo na bomoi, elobi Nkolo Yawe.
10 가령 그가 아들을 낳았다 하자 그 아들이 이 모든 선은 하나도 행치 아니하고 이 악 중 하나를 범하여 강포하거나 살인하거나
Kasi soki, ndakisa, moto yango azali na mwana moko ya mobulu, oyo asopaka makila ya bato to asalaka makambo ya ndenge wana,
11 산 위에서 제물을 먹거나 이웃의 아내를 더럽히거나
atako tata na ye asalaki yango te, mwana oyo aliaka na bisika ya bule na likolo ya bangomba, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye,
12 가난하고 궁핍한 자를 학대하거나 억탈하거나 빚진 자의 전당물을 도로 주지 아니하거나 우상에게 눈을 들거나 가증한 일을 행하거나
anyokolaka mobola mpe moto oyo akelela, ayibaka, azongisaka te eloko oyo akangi na niongo epai ya mokolo na yango, atalelaka banzambe ya bikeko, asalaka makambo ya mbindo,
13 변을 위하여 꾸이거나 이식을 받거나 할진대 그가 살겠느냐 살지 못하리니 이 모든 가증한 일을 행하였은즉 정녕 죽을지라 자기의 피가 자기에게 돌아가리라
adefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo; boni, mwana ya lolenge oyo akoki solo kozala na bomoi? Te, akozala na bomoi te! Mpo ete asalaki makambo wana nyonso ya mbindo, basengeli koboma ye, mpe makila na ye ekotangama na moto na ye moko!
14 또 가령 그가 아들을 낳았다 하자 그 아들이 그 아비의 행한 모든 죄를 보고 두려워하여 그대로 행하지 아니하고
Kasi soki, ndakisa, mwana yango azali na mwana oyo, atako amonaka masumu nyonso oyo tata na ye asalaka, kasi asalaka ndenge moko te na tata na ye:
15 산 위에서 제물을 먹지도 아니하며 이스라엘 족속의 우상에게 눈을 들지도 아니하며 이웃의 아내를 더럽히지도 아니하며
aliaka te bilei na bisika ya bule na likolo ya bangomba mpe atalelaka te banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye,
16 사람을 학대하지도 아니하며 전당을 잡지도 아니하며 억탈하지도 아니하고 주린 자에게 식물을 주며 벗은 자에게 옷을 입히며
anyokolaka moto te, akangaka eloko ya moto te soki adefisi ye niongo, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala, alatisaka moto oyo azali bolumbu,
17 손을 금하여 가난한 자를 압제하지 아니하며 변이나 이식을 취하지 아니하여 내 규례를 지키며 내 율례를 행할진대 이 사람은 그 아비의 죄악으로 인하여 죽지 아니하고 정녕 살겠고
abatelaka loboko na ye mpo ete esala masumu te, adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka mibeko mpe atosaka bikateli na Ngai; solo, mwana wana akokufa te mpo na masumu ya tata na ye: akozala solo na bomoi.
18 그 아비는 심히 포학하여 그 동족을 억탈하고 민간에 불선을 행하였으므로 그는 그 죄악으로 인하여 죽으리라
Ezali tata na ye nde akokufa mpo na masumu na ye moko, pamba te abotolaki bato biloko na makasi, ayibaki ndeko na ye mpe asalaki mabe kati na bato na ye.
19 그런데 너희는 이르기를 아들이 어찌 아비의 죄를 담당치 않겠느뇨 하는도다 아들이 법과 의를 행하며 내 모든 율례를 지켜 행하였으면 그는 정녕 살려니와
Bozali koloba: ‹ Mpo na nini mwana amema te ngambo ya bambeba ya tata na ye? › Ezali mpo ete mwana asalaki makambo ya sembo mpe ya alima, abatelaki mpe asalelaki na bokebi bikateli na Ngai nyonso, akozala solo na bomoi.
20 범죄하는 그 영혼은 죽을지라 아들은 아비의 죄악을 담당치 아니할 것이요 아비는 아들의 죄악을 담당치 아니하리니 의인의 의도 자기에게로 돌아가고 악인의 악도 자기에게로 돌아가리라
Moto oyo asali masumu, ye moko nde akokufa. Mwana akomema ngambo ya tata na ye te, mpe tata akomema ngambo ya mwana na ye te. Moto ya sembo akozwa litomba mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe akozwa etumbu mpo na mabe na ye.
21 그러나 악인이 만일 그 행한 모든 죄에서 돌이켜 떠나 내 모든 율례를 지키고 법과 의를 행하면 정녕 살고 죽지 아니할 것이라
Kasi soki moto mabe atiki masumu na ye nyonso, soki akomi kotosa bikateli na Ngai nyonso mpe kotambola kolanda bosembo mpe makambo ya alima, akozala solo na bomoi, akokufa te.
22 그 범죄한 것이 하나도 기억함이 되지 아니하리니 그 행한 의로 인하여 살리라
Mabe moko te oyo asalaki ekotangama lisusu na moto na ye; akozala solo na bomoi mpo na makambo ya sembo oyo azali kosala.
23 나 주 여호와가 말하노라 내가 어찌 악인의 죽는 것을 조금인들 기뻐하랴 그가 돌이켜 그 길에서 떠나서 사는 것을 어찌 기뻐하지 아니하겠느냐
Boni, bokanisi penza ete Ngai nasepelaka solo na kufa ya bato mabe, elobi Nkolo Yawe, to nasepelaka te tango batikaka banzela na bango ya mabe mpo ete bazala na bomoi?
24 만일 의인이 돌이켜 그 의에서 떠나서 범죄하고 악인의 행하는 모든 가증한 일대로 행하면 살겠느냐 그 행한 의로운 일은 하나도 기억함이 되지 아니하리니 그가 그 범한 허물과 그 지은 죄로 인하여 죽으리라
Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.
25 그런데 너희는 이르기를 주의 길이 공평치 않다 하는도다 이스라엘 족속아 들을지어다 내 길이 어찌 공평치 아니하냐 너희 길이 공평치 않은 것이 아니냐
Bozali koloba: ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, boyoka! Boni, nzela na Ngai ezali sembo te? Ezali banzela na bino te nde ezangi bosembo!
26 만일 의인이 그 의를 떠나 죄악을 행하고 인하여 죽으면 그 행한 죄악으로 인하여 죽는 것이요
Soki moto ya sembo atiki bosembo na ye, asali masumu mpe akufi mpo na yango, akufi nde mpo na masumu oyo asali.
27 만일 악인이 그 행한 악을 떠나 법과 의를 행하면 그 영혼을 보전하리라
Kasi soki moto mabe atiki mabe na ye oyo azalaki kosala mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, abikisi solo bomoi na ye.
28 그가 스스로 헤아리고 그 행한 모든 죄악에서 돌이켜 떠났으니 정녕 살고 죽지 아니하리라
Lokola asosoli mabe na ye nyonso oyo azalaki kosala mpe atiki yango, akozala solo na bomoi, akokufa te.
29 그런데 이스라엘 족속은 이르기를 주의 길이 공평치 않다 하는도다 이스라엘 족속아 나의 길이 어찌 공평치 아니하냐 너희 길이 공평치 않은 것이 아니냐
Libota ya Isalaele ezali koloba: ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, nzela na Ngai ezali sembo te? Boni, ezali te penza banzela na bino nde ezangi bosembo?
30 나 주 여호와가 말하노라 이스라엘 족속아 내가 너희 각 사람의 행한 대로 국문할지니라 너희는 돌이켜 회개하고 모든 죄에서 떠날지어다 그리한즉 죄악이 너희를 패망케 아니하리라
Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te!
31 너희는 범한 모든 죄악을 버리고 마음과 영을 새롭게 할지어다 이스라엘 족속아 너희가 어찌하여 죽고자 하느냐
Botika mabe na bino nyonso oyo bozalaki kosala; bozwa mitema ya sika mpe molimo ya sika. Mpo na nini bokolinga kokufa, oh libota ya Isalaele?
32 나 주 여호와가 말하노라 죽는 자의 죽는 것은 내가 기뻐하지 아니하노니 너희는 스스로 돌이키고 살지니라
Solo, Ngai nasepelaka na kufa ya moto moko te, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana mpe bozala na bomoi! »