< 스바냐 1 >

1 아몬의 아들 유다 왕 요시아의 시대에 스바냐에게 임한 여호와의 말씀이라 스바냐는 히스기야의 현손이요 아마랴의 증손이요 그다랴의 손자요 구시의 아들이었더라
Wuta na buku ya motambolisi banzembo. Babetaki yango na mandanda. Na tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, azalaki mokonzi ya mokili ya Yuda, Yawe alobaki na Sofoni, mwana mobali ya Kushi, mwana mobali ya Gedalia, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Ezekiasi:
2 여호와께서 가라사대 내가 지면에서 모든 것을 진멸하리라
« Nakosilisa kobebisa biloko nyonso oyo ezali kati na mokili, » elobi Yawe,
3 내가 사람과 짐승을 진멸하고 공중의 새와 바다의 고기와 거치게 하는것과 악인들을 아울러 진멸할 것이라 내가 사람을 지면에서 멸절하리라 나 여호와의 말이니라
« solo, nakoboma ezala bato to banyama, ezala bandeke ya likolo to bambisi ya ebale; nakolongola, na mokili, bato mabe mpe biloko oyo ebetisaka bato mabaku » elobi Yawe.
4 내가 유다와 예루살렘 모든 거민 위에 손을 펴서 바알의 남아 있는 것을 그곳에서 멸절하며 그마림이란 이름과 및 그 제사장들을 아울러 멸절하며
« Nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa mokili ya Yuda mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi etumbu; nakosilisa koboma, na esika oyo, nyonso oyo etikali, ya losambo ya nzambe Bala elongo na bakombo ya banganga-nzambe ya bapagano, oyo basalelaka banzambe ya bikeko:
5 무릇 지붕에서 하늘의 일월성신에게 경배하며 여호와께 맹세하면서 말감을 가리켜 맹세하는 자와
bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,
6 여호와를 배반하고 좇지 아니한 자와 여호와를 찾지도 아니하며 구하지도 아니한 자를 멸절하리라
bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo, oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.
7 주 여호와 앞에서 잠잠할지어다! 이는 여호와의 날이 가까왔으므로 여호와가 희생을 준비하고 그 청할 자를 구별하였음이니라
Bovanda kimia liboso ya Nkolo Yawe, pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene! Yawe abongisi mbeka, abulisi babengami na Ye.
8 여호와의 희생의 날에 내가 방백들과 왕자들과 이방의 의복을 입은 자들을 벌할 것이며
Na mokolo ya mbeka ya Yawe, nakopesa etumbu epai ya bakambi, epai ya bana mibali ya mokonzi mpe epai ya bato nyonso oyo balataka bilamba ya bapaya.
9 그 날에 문턱을 뛰어 넘어서 강포와 궤휼로 자기 주인의 집에 채운 자들을 내가 벌하리라
Na mokolo wana, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo, bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko na makambo ya kanza mpe na lokuta.
10 나 여호와가 말하노라 그 날에 어문에서는 곡성이, 제 이 구역에서는 부르짖은 소리가 일어나리라
Na mokolo wana, » elobi Yawe, « koganga makasi ekoyokana wuta na Ekuke ya Bambisi, kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sika mpe lokito monene wuta na bangomba mikuse.
11 막데스 거민들아 너희는 애곡하라 가나안 백성이 다 패망하고 은을 수운하는 자가 끊어졌음이니라
Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela, pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa, mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama!
12 그 때에 내가 등불로 예루살렘에 두루 찾아 무릇 찌끼 같이 가라 앉아서 심중에 스스로 이르기를 여호와께서는 복도 내리지 아니하시며 화도 내리지 아니하시리라 하는 자를 벌하리니
Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka: ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›
13 그들의 재물이 노략되며 그들의 집이 황무할 것이라 그들이 집을 건축하나 거기 거하지 못하며 포도원을 심으나 그 포도주를 마시지 못하리라
Bakobotola bango bomengo na makasi mpe bakobuka bandako na bango; bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te; bakosala bilanga ya vino, kasi bakotikala komela vino na yango te. »
14 여호와의 큰 날이 가깝도다 가깝고도 심히 빠르도다 여호와의 날의 소리로다 용사가 거기서 심히 애곡하는도다
Mokolo monene ya Yawe ekomi pene, solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza. Boyoka! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo; ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.
15 그 날은 분노의 날이요, 환난과 고통의 날이요, 황무와 패괴의 날이요, 캄캄하고 어두운 날이요, 구름과 흑암의 날이요,
Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi, mokolo ya pasi mpe ya somo, mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama, mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,
16 나팔을 불어 경고하며 견고한 성읍을 치며 높은 망대를 치는 날이로다
mokolo ya kobeta bakelelo mpe ya makelele ya bitumba mpo na kobundisa bingumba batonga makasi mpe bandako milayi oyo batonga makasi.
17 내가 사람들에게 고난을 내려 소경 같이 행하게 하리니 이는 그들이 나 여호와께 범죄하였음이라 또 그들의 피는 흘리워서 티끌같이 되며 그들의 살은 분토 같이 될지라
Nakotindela bato pasi ya makasi: bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga, pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe; bakopanza makila na bango lokola putulu mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.
18 그들의 은과 금이 여호와의 분노의 날에 능히 그들을 건지지 못할 것이며 이 온 땅이 여호와의 질투의 불에 삼키우리니 이는 여호와가 이 땅 모든 거민을 놀라게 멸절할 것임이니라
Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.

< 스바냐 1 >