< 디도서 3 >

1 너는 저희로 하여금 정사와 권세잡은 자들에게 복종하며 순종하며 모든 선한 일 행하기를 예비하게 하며
Yebisa bango lisusu ete basengeli kotosa bakambi mpe bakonzi, koselingwa mpo na misala nyonso ya malamu,
2 아무도 훼방하지 말며 다투지 말며 관용하며 범사에 온유함을 모든 사람에게 나타낼 것을 기억하게 하라
komipekisa kotiola bato, kozala bato na kimia, na boboto mpe na bolingo epai ya bato nyonso.
3 우리도 전에는 어리석은 자요 순종치 아니한 자요 속은 자요 각색 정욕과 행락에 종노릇한 자요 악독과 투기로 지낸 자요 가증스러운 자요 피차 미워한 자이었으나
Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.
4 우리 구주 하나님의 자비와 사람 사랑하심을 나타내실 때에
Kasi tango Nzambe Mobikisi na biso amonisaki boboto mpe bolingo na Ye mpo na bato,
5 우리를 구원하시되 우리의 행한 바 의로운 행위로 말미암지 아니하고 오직 그의 긍휼하심을 좇아 중생의 씻음과 성령의 새롭게 하심으로 하셨나니
abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.
6 성령을 우리 구주 예수 그리스도로 말미암아 우리에게 풍성히 부어주사
Nzambe asopelaki biso Molimo Mosantu na bofuluki penza na nzela ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso,
7 우리로 저의 은혜를 힘입어 의롭다 하심을 얻어 영생의 소망을 따라 후사가 되게 하려 하심이라 (aiōnios g166)
mpo ete, wana akomisi biso bato ya sembo na nzela ya ngolu na Ye, tokoma bakitani ya libula kolanda elikya ya bomoi ya seko. (aiōnios g166)
8 이 말이 미쁘도다 원컨대 네가 이 여러 것에 대하여 굳세게 말하라 이는 하나님을 믿는 자들로 하여금 조심하여 선한 일을 힘쓰게 하려 함이라 이것은 아름다우며 사람들에게 유익하니라
Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato.
9 그러나 어리석은 변론과 족보 이야기와 분쟁과 율법에 대한 다툼을 피하라 이것은 무익한 것이요 헛된 것이니라
Kasi kima tembe ya bozoba, masolo ya milongo ya mbotama, koswana mpe bitumba na tina na mibeko: ezali na litomba te mpe ezali na tina te.
10 이단에 속한 사람을 한두 번 훈계한 후에 멀리 하라
Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba;
11 이러한 사람은 네가 아는 바와 같이 부패하여서 스스로 정죄한 자로서 죄를 짓느니라
pamba te osengeli koyeba ete moto ya ndenge wana abunga nzela, azali kosala masumu; mpe na ndenge wana, amikateli ye moko etumbu.
12 내가 아데마나 두기고를 네게 보내리니 그 때에 네가 급히 니고볼리로 내게 오라 내가 거기서 과동하기로 작정하였노라
Tango kaka nakotindela yo Artemasi to Tishike, sala nyonso mpo ete oya epai na ngai, na Nikopolisi, pamba te nazwaki mokano ya kolekisa kuna eleko ya malili makasi.
13 교법사 세나와 및 아볼로를 급히 먼저 보내어 저희로 궁핍함이 없게 하고
Sala nyonso oyo okoki kosala mpo na kosunga mobembo ya Zenasi, molakisi ya Mobeko, mpe Apolosi mpo ete bazanga eloko moko te na nzela.
14 또 우리 사람들도 열매 없는 자가 되지 않게 하기 위하여 필요한 것을 예비하는 좋은 일에 힘쓰기를 배우게 하라
Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma.
15 나와 함께 있는 자가 다 네게 문안하니 믿음 안에서 우리를 사랑하는 자들에게 너도 문안하라 은혜가 너희 무리에게 있을지어다!
Bato nyonso oyo bazali elongo na ngai batindeli yo mbote. Pesa mbote na bato oyo balingaka biso kati na kondima. Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na biso nyonso!

< 디도서 3 >