< 시편 98 >

1 (시) 새 노래로 여호와께 찬송하라! 대저 기이한 일을 행하사 그 오른 손과 거룩한 팔로 자기를 위하여 구원을 베푸셨도다
Nzembo. Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaka makambo ya kokamwa! Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe, alongaki.
2 여호와께서 그 구원을 알게 하시며 그 의를 열방의 목전에 명백히 나타내셨도다
Yawe atalisaki elonga na Ye, amonisaki bosembo na Ye epai ya bikolo.
3 저가 이스라엘 집에 향하신 인자와 성실을 기억하셨으므로 땅의 모든 끝이 우리 하나님의 구원을 보았도다
Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye mpo na libota ya Isalaele. Kino na suka ya mokili, elonga ya Nzambe na biso emonanaki.
4 온 땅이여, 여호와께 즐거이 소리할지어다! 소리를 발하여 즐거이 노래하며 찬송할지어다
Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule!
5 수금으로 여호와를 찬양하라! 수금과 음성으로 찬양할지어다!
Bobetela Yawe lindanda, boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze!
6 나팔과 호각으로 왕 여호와 앞에 즐거이 소리할지어다
Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi, na lokito ya bakelelo mpe ya maseke.
7 바다와 거기 충만한 것과 그 중에 거하는 자는 다 외칠지어다
Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito!
8 여호와 앞에서 큰 물이 박수하며 산악이 함께 즐거이 노래할지어다
Tika ete bibale ebeta maboko mpe bangomba nyonso eganga na esengo
9 저가 땅을 판단하려 임하실 것임이로다 저가 의로 세계를 판단하시며 공평으로 그 백성을 판단하시리로다
liboso ya Yawe, pamba te azali koya kosambisa mabele! Akokata makambo na yango na bosembo.

< 시편 98 >