< 시편 91 >

1 지존자의 은밀한 곳에 거하는 자는 전능하신 자의 그늘 아래 거하리로다
Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
2 내가 여호와를 가리켜 말하기를 저는 나의 피난처요, 나의 요새요, 나의 의뢰하는 하나님이라 하리니
Nalobaka na tina na Yawe: « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai; natiaka elikya na ngai kati na Ye! »
3 이는 저가 너를 새 사냥군의 올무에서와 극한 염병에서 건지실 것임이로다
Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo ya mokangi bandeke mpe na bokono oyo ebikisaka te.
4 저가 너를 그 깃으로 덮으시리니 네가 그 날개 아래 피하리로다 그의 진실함은 방패와 손 방패가 되나니
Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.
5 너는 밤에 놀램과 낮에 흐르는 살과
Okobanga te somo ya butu, makonga oyo epumbwaka na moyi makasi,
6 흑암 중에 행하는 염병과 백주에 황폐케 하는 파멸을 두려워 아니하리로다
bokono oyo etambolaka kati na molili mpe pasi oyo ebebisaka na midi.
7 천인이 네 곁에서, 만인이 네 우편에서 엎드러지나 이 재앙이 네게 가까이 못하리로다
Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te.
8 오직 너는 목도하리니 악인의 보응이 네게 보이리로다
Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango.
9 네가 말하기를 여호와는 나의 피난처시라 하고 지존자로 거처를 삼았으므로
Soki otatoli: « Yawe azali ebombamelo na ngai, » mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo,
10 화가 네게 미치지 못하며 재앙이 네 장막에 가까이 오지 못하리니
mabe ata moko te ekokweyela yo, pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo;
11 저가 너를 위하여 그 사자들을 명하사 네 모든 길에 너를 지키게 하심이라
pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso.
12 저희가 그 손으로 너를 붙들어 발이 돌에 부딪히지 않게 하리로다
Bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te;
13 네가 사자와 독사를 밟으며 젊은 사자와 뱀을 발로 누르리로다
okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa, okonyata nkosi ya monene mpe dalagona.
14 하나님이 가라사대 저가 나를 사랑한즉 내가 저를 건지리라 저가 내 이름을 안즉 내가 저를 높이리라
Lokola akangami na ngai, nakokangola ye; lokola ayebi Kombo na Ngai, nakobatela ye.
15 저가 내게 간구하리니 내가 응답하리라 저희 환난 때에 내가 저와 함께하여 저를 건지고 영화롭게 하리라
Soki abeleli ngai, nakoyanola ye; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.
16 내가 장수함으로 저를 만족케 하며 나의 구원으로 보이리라 하시도다
Nakopesa ye bomoi molayi mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.

< 시편 91 >