< 시편 85 >
1 (고라 자손의 시. 영장으로 한 노래) 여호와여, 주께서 주의 땅에 은혜를 베푸사 야곱의 포로 된 자로 돌아오게 하셨으며
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Yawe, osalelaki mboka na Yo bolamu, ozongisaki bato ya Jakobi, oyo bazalaki na bowumbu,
2 주의 백성의 죄악을 사하시고 저희 모든 죄를 덮으셨나이다 (셀라)
olimbisaki mabe ya bato na Yo mpe olongolaki masumu na bango nyonso.
3 주의 모든 분노를 거두시며 주의 진노를 돌이키셨나이다
Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasi mpe okitisaki motema na Yo.
4 우리 구원의 하나님이여, 우리를 돌이키시고 우리에게 향하신 주의 분노를 그치소서
Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso! Longola kanda na Yo na tina na biso!
5 주께서 우리에게 영원히 노하시며 대대에 발분하시겠나이까
Boni, okosilikela biso penza mpo na libela? Okokangela penza biso kanda mpo na tango nyonso?
6 우리를 다시 살리사 주의 백성으로 주를 기뻐하게 아니하시겠나이까
Okozongisela biso lisusu bomoi te mpo ete bato na Yo basepela kati na Yo?
7 여호와여, 주의 인자하심을 우리에게 보이시며 주의 구원을 우리에게 주소서
Yawe, talisa biso bolingo na Yo, mpe pesa biso lobiko na Yo!
8 내가 하나님 여호와의 하실 말씀을 들으리니 대저 그 백성 그 성도에게 화평을 말씀하실 것이라 저희는 다시 망령된 데로 돌아가지 말지로다
Yawe, nakoyoka maloba na Nzambe; pamba te alobaka mpo na kimia ya bato na Ye mpe ya bayengebene na Ye. Kasi tika ete bazongela te botomboki na bango.
9 진실로 그의 구원이 그를 경외하는 자에게 가까우니 이에 영광이 우리 땅에 거하리이다
Solo, lobiko na Ye ezali pene ya bato oyo batosaka Ye mpo ete nkembo na Ye ewumela kati na mboka na biso.
10 긍휼과 진리가 같이 만나고 의와 화평이 서로 입맞추었으며
Bolingo mpe boyengebene ekutanaka, bosembo mpe kimia eyambanaka.
11 진리는 땅에서 솟아나고 의는 하늘에서 하감하였도다
Bosolo ebotaka wuta na mabele, mpe bosembo etalaka wuta na likolo.
12 여호와께서 좋은 것을 주시리니 우리 땅이 그 산물을 내리로다
Ye moko Yawe akopesa esengo, mpe mabele na biso ekobota bambuma.
13 의가 주의 앞에 앞서 행하며 주의 종적으로 길을 삼으리로다
Bosembo etambolaka liboso na Ye mpe elakisaka nzela oyo ekolekela.