< 시편 77 >

1 (아삽의 시. 영장으로 여두둔의 법칙에 의지하여 한 노래) 내가 내 음성으로 하나님께 부르짖으리니 하나님께 내 음성으로 부르짖으면 내게 귀를 기울이시리로다
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Azafi. Nabelelaka Nzambe na koganga; nabelelaka Nzambe mpo ete ayoka ngai!
2 나의 환난날에 내가 주를 찾았으며 밤에는 내 손을 들고 거두지 아니하였으며 내 영혼이 위로 받기를 거절하였도다
Tango nazalaka na pasi, nalukaka Nkolo; na butu, nalembaka te kotombola maboko na ngai mpe naboyaka kobondisama.
3 내가 하나님을 생각하고 불안하여 근심하니 내 심령이 상하도다 (셀라)
Nakanisaka Nzambe mpe nalelaka, nakotaka na mozindo ya makanisi mpe nalembaka nzoto.
4 주께서 나로 눈을 붙이지 못하게 하시니 내가 괴로워 말할 수 없나이다
Opimelaka miso na ngai pongi, namitungisaka mpe nayebaka lisusu te eloko ya koloba.
5 내가 옛날 곧 이전 해를 생각하였사오며
Nakanisaka lisusu mikolo ya kala, mibu nyonso oyo eleka;
6 밤에 한 나의 노래를 기억하여 마음에 묵상하며 심령이 궁구하기를
Na butu, nakanisaka lisusu banzembo na ngai; motema na ngai ezongelaka kokanisa, mpe molimo na ngai ekomaka komituna:
7 주께서 영원히 버리실까, 다시는 은혜를 베풀지 아니하실까
« Boni, Nkolo akobwaka biso penza mpo na libela? Akosalela biso lisusu bolamu te?
8 그 인자하심이 길이 다하였는가, 그 허락을 영구히 폐하셨는가
Bolingo na Ye esili penza mpo na libela? Bilaka na Ye ekokokisama te mpo na libela?
9 하나님이 은혜 베푸심을 잊으셨는가, 노하심으로 그 긍휼을 막으셨는가 하였나이다(셀라)
Nzambe abosani solo kosala ngolu? Akangi penza motema na Ye mpo na kanda? »
10 또 내가 말하기를 이는 나의 연약함이라 지존자의 오른손의 해
Mpe namilobelaka: « Tala likambo oyo ezali kosala ngai pasi: loboko ya mobali ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ebongwani! »
11 곧 여호와의 옛적 기사를 기억하여 그 행하신 일을 진술하리이다
Nakanisaka misala minene ya Yawe, bikamwa na Yo ya kala.
12 또 주의 모든 일을 묵상하며 주의 행사를 깊이 생각하리이다
Nakanisaka nyonso oyo osalaki kino na bikamwa na Yo.
13 하나님이여, 주의 도는 극히 거룩하시오니 하나님과 같이 큰 신이 누구오니이까
Oh Nzambe, banzela na Yo ezali bule; nzambe nini akokani na Yo na monene?
14 주는 기사를 행하신 하나님이시라 민족들 중에 주의 능력을 알으시고
Ozali Nzambe oyo asalaka bikamwa; olakisi nguya na Yo kati na bikolo.
15 주의 팔로 주의 백성 곧 야곱과 요셉의 자손을 구속하셨나이다 (셀라)
Na nguya ya loboko na Yo, okangolaki bato na Yo, bakitani ya Jakobi mpe ya Jozefi.
16 하나님이여, 물들이 주를 보았나이다 물들이 주를 보고 두려워하며 깊음도 진동하였고
Oh Nzambe, mayi emonaki Yo! Mayi emonaki Yo mpe ekomaki kolenga; ezala mozindo ya mayi eninganaki.
17 구름이 물을 쏟고 궁창이 소리를 발하며 주의 살도 날아 나갔나이다
Mapata esopaki mayi ebele, likolo eyokisaki lokito ya kake, mpe makonga na Yo ezalaki koleka-leka na bangambo nyonso.
18 회리바람 중에 주의 우뢰의 소리가 있으며 번개가 세계를 비취며 땅이 흔들리고 움직였나이다
Na lokito ya kake na Yo, mikalikali engengisaki mokili, mabele eninganaki mpe elengaki.
19 주의 길이 바다에 있었고 주의 첩경이 큰 물에 있었으나 주의 종적을 알 수 없었나이다
Opasolaki nzela kati na ebale monene, balabala na Yo kati na mayi monene, mpe moto moko te amonaki bilembo ya matambe na Yo.
20 주의 백성을 무리양 같이 모세와 아론의 손으로 인도하셨나이다
Otambolisaki bato na Yo lokola etonga, na loboko ya Moyize mpe ya Aron.

< 시편 77 >