< 시편 60 >
1 (다윗이 교훈하기 위하여 지은 믹담. 영장으로 수산에둣에 맞춘 노래. 다윗이 아람 나하라임과 아람소바와 싸우는 중에 요압이 돌아와 에돔을 염곡에서 쳐서 일만 이천인을 죽인 때에) 하나님이여, 주께서 우리를 버려 흩으셨고 분노하셨사오나 지금은 우리를 회복시키소서
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato. Ayembaki yango tango abundisaki bato ya Siri ya Mezopotami mpe bato ya Siri ya Tsoba, mpe tango Joabi azongaki, sima na ye kolonga bato nkoto zomi na mibale ya Edomi, na bitumba kati na Lubwaku ya Mungwa. Oh Nzambe, obwakaki mpe opanzaki biso, osilikaki penza. Sik’oyo, zongisa biso.
2 주께서 땅을 진동시키사 갈라지게 하셨사오니 그 틈을 기우소서 땅이 요동함이니이다
Solo, oningisaki mabele mpe obukaki yango. Bamba madusu na yango, pamba te ekomi koningana.
3 주께서 주의 백성에게 어려움을 보이시고 비척거리게 하는 포도주로 우리에게 마시우셨나이다
Omonisaki bato na Yo pasi makasi, omelisaki biso vino oyo elangwisaka.
4 주를 경외하는 자에게 기를 주시고 진리를 위하여 달게 하셨나이다 (셀라)
Opesaki na bato oyo batosaka Yo bendele mpo na koyebisa bango ete bakima liboso ya batolotolo ya banguna.
5 주의 사랑하시는 자를 건지시기 위하여 우리에게 응답하사 오른손으로 구원하소서
Mpo ete balingami na Yo bakangolama, bikisa na nguya ya loboko na Yo ya mobali, mpe yanola biso! Yanola ngai!
6 하나님이 그 거룩하심으로 말씀하시되 내가 뛰놀리라 내가 세겜을 나누며 숙곳 골짜기를 척량하리라
Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule: « Nakolonga! Nakokabola Sishemi mpe nakomeka molayi ya lubwaku ya Sukoti.
7 길르앗이 내 것이요 므낫세도 내 것이며 에브라임은 내 머리의 보호자요 유다는 나의 홀이며
Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai; Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende, mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.
8 모압은 내 목욕통이라 에돔에는 내 신을 던지리라 블레셋아 나를 인하여 외치라 하셨도다
Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Mpo na Filisitia, nabetaka milolo ya elonga. »
9 누가 나를 이끌어 견고한 성에 들이며 누가 나를 에돔에 인도할꼬
Nani akomema ngai kino na engumba oyo batonga makasi? Nani akotambolisa ngai kino na Edomi?
10 하나님이여, 주께서 우리를 버리지 아니하셨나이까 하나님이여, 주께서 우리 군대와 함께 나아가지 아니하시나이다
Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso?
11 우리를 도와 대적을 치게 하소서 사람의 구원은 헛됨이니이다
Yaka kosunga biso, kangola biso liboso ya moyini; pamba te lisungi ya bato ezali pamba.
12 우리가 하나님을 의지하고 용감히 행하리니 저는 우리의 대적을 밟으실 자심이로다
Nzokande, elongo na Nzambe, tokosala makambo minene mpe ya kokamwa; ezali Ye nde akonyata banguna na biso.