< 시편 49 >

1 (고라 자손의 시. 영장으로 한 노래) 만민들아 이를 들어라 세상의 거민들아 귀를 기울이라
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Bino bikolo nyonso, boyoka malamu makambo oyo; bino bavandi nyonso ya mokili, boyoka,
2 귀천 빈부를 물론하고 다 들을지어다
bato pamba mpe bato minene, bazwi mpe babola:
3 내 입은 지혜를 말하겠고 내 마음은 명철을 묵상하리로다
Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya; motema na ngai ekanisi makambo oyo ekopesa bino bososoli.
4 내가 비유에 내 귀를 기울이고 수금으로 나의 오묘한 말을 풀리로다
Nayokaka masese, mpe nalimbolaka sambole na nzela ya lindanda.
5 죄악이 나를 따라 에우는 환난의 날에 내가 어찌 두려워하랴
Mpo na nini nabanga na tango ya pasi, tango mabe ya bakosi ezingeli ngai,
6 자기의 재물을 의지하고 풍부함으로 자긍하는 자는
ba-oyo batielaka bomengo na bango motema mpe bamikumisaka mpo na bofuluki ya bozwi na bango?
7 아무도 결코 그 형제를 구속하지 못하며 저를 위하여 하나님께 속전을 바치지도 못할 것은
Moko te akoki kosikola ndeko na ye, moko te akoki kofuta mbongo epai ya Nzambe mpo na lisiko na ye.
8 저희 생명의 구속이 너무 귀하며 영영히 못할 것임이라
Talo ya bomoi na ye eleki motuya makasi, mpe ekotikala kofutama te.
9 저로 영존하여 썩음을 보지 않게 못하리니
Akokaki kozala na bomoi libela na libela, mpe akokaki kokufa te.
10 저가 보리로다 지혜있는 자도 죽고 우준하고 무지한 자도 같이 망하고 저희 재물을 타인에게 끼치는도다
Solo, tomonaka bato ya bwanya kokufa elongo na zoba mpe moto oyo azangi mayele, mpe batikaka bomengo na bango epai ya bato mosusu.
11 저희의 속 생각에 그 집이 영영히 있고 그 거처가 대대에 미치리라 하여 그 전지를 자기 이름으로 칭하도다
Bakunda na bango nde ekomaka bandako na bango mpo na libela, mpe bisika na bango ya kovanda mpo na seko na seko, atako bapesaki na bitando na bango ya mabele bakombo na bango mpo ete ebengamaka na yango.
12 사람은 존귀하나 장구치 못함이여 멸망하는 짐승같도다
Mozwi akowumelaka te na bomoi; ata aleki na lokumu, akokani na nyama oyo ezali kokufa.
13 저희의 이 행위는 저희의 우매함이나 후세 사람은 오히려 저희 말을 칭찬하리로다 (셀라)
Yango nde suka ya bato oyo batiaka elikya kati na bango moko, ya bato oyo balandaka bango mpe basepelaka na maloba na bango.
14 양 같이 저희를 음부에 두기로 작정되었으니 사망이 저희 목자일 것이라 정직한 자가 아침에 저희를 다스리리니 저희 아름다움이 음부에서 소멸하여 그 거처조차 없어지려니와 (Sheol h7585)
Bazali lokola bameme mpe babongisami mpo na mboka ya bakufi; kufa ekokoma kobokola bango. Kala te, bato ya sembo bakonyata bango, kitoko na bango ekonzuluka, mpe mboka ya bakufi ekokoma ndako na bango. (Sheol h7585)
15 하나님은 나를 영접하시리니 이러므로 내 영혼을 음부의 권세에서 구속하시리로다 (셀라) (Sheol h7585)
Kasi Nzambe akokangola bomoi na ngai wuta na maboko ya mboka ya bakufi, pamba te akokamata ngai. (Sheol h7585)
16 사람이 치부하여 그 집 영광이 더할 때에 너는 두려워 말지어다
Komitungisaka te soki moto moko akomi kofuluka na bozwi, soki kongenga ya ndako na ye ekomi komata se komata.
17 저가 죽으매 가져가는 것이 없고 그 영광이 저를 따라 내려가지 못함이로다
Pamba te akomema ata eloko moko te tango akokufa; bomengo na ye ekolanda ye te.
18 저가 비록 생시에 자기를 축하하며 스스로 좋게 함으로 사람들에게 칭찬을 받을지라도
Atako, wana azalaki na bomoi, azalaki komimona moto apambolama— atako bato bakokumisa yo, pamba te omisali bolamu—
19 그 역대의 열조에게로 돌아가리니 영영히 빛을 보지 못하리로다
okokende kaka kokutana na bakoko na yo oyo bakotikala komona lisusu pole te.
20 존귀에 처하나 깨닫지 못하는 사람은 멸망하는 짐승같도다
Moto oyo azali mozwi, kasi azangi bososoli, azali lokola nyama oyo ezali kokufa.

< 시편 49 >