< 시편 46 >

1 (고라 자손의 시. 영장으로 알라못에 맞춘 노래) 하나님은 우리의 피난처시요 힘이시니 환난 중에 만날 큰 도움이시라
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi. Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.
2 그러므로 땅이 변하든지 산이 흔들려 바다 가운데 빠지든지
Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani, bangomba ekweyi kati na ebale monene;
3 바닷물이 흉용하고 뛰놀든지 그것이 넘침으로 산이 요동할지라도 우리는 두려워 아니하리로다 (셀라)
ata soki bambonge na yango etelemi, ebimisi fulufulu mpe eningisi bangomba.
4 한 시내가 있어 나뉘어 흘러 하나님의 성 곧 지극히 높으신 자의 장막의 성소를 기쁘게 하도다
Ezali na ebale moko oyo mayi na yango esepelisaka engumba ya Nzambe oyo eleki bule kati na bivandelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
5 하나님이 그 성중에 거하시매 그 성이 요동치 아니할 것이라 새벽에 하나님이 도우시리로다!
Nzambe azali kati na yango, ebukani te; Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi.
6 이방이 훤화하며 왕국이 동하였더니 저가 소리를 발하시매 땅이 녹았도다
Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.
7 만군의 여호와께서 우리와 함께 하시니 야곱의 하나님은 우리의 피난처시로다
Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.
8 와서 여호와의 행적을 볼찌어다 땅을 황무케 하셨도다
Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili.
9 저가 땅끝까지 전쟁을 쉬게 하심이여 활을 꺾고 창을 끊으며 수레를 불 사르시는도다
Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.
10 이르시기를 너희는 가만히 있어 내가 하나님 됨을 알찌어다! 내가 열방과 세계중에서 높임을 받으리라 하시도다
Alobaki: « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »
11 만군의 여호와께서 우리와 함께 하시리니 야곱의 하나님은 우리의 피난처시로다
Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.

< 시편 46 >