< 시편 31 >

1 (다윗의 시. 영장으로 한 노래) 여호와여, 내가 주께 피하오니 나로 영원히 부끄럽게 마시고 주의 의로 나를 건지소서
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eh Yawe, kati na Yo nde nazwa ebombamelo; kondima te ete nayoka soni! Bikisa ngai na bosembo na Yo!
2 내게 귀를 기울여 속히 건지시고 내게 견고한 바위와 구원하는 보장이 되소서
Yoka ngai mpe kangola ngai noki! Zala mpo na ngai libanga oyo ezingelami na bamir mpe ndako batonga makasi mpo na kobikisa ngai.
3 주는 나의 반석과 산성이시니 그러므로 주의 이름을 인하여 나를 인도하시고 지도하소서
Mpo ete ozali libanga na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, kamba mpe tambolisa ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
4 저희가 나를 위하여 비밀히 친 그물에서 빼어내소서 주는 나의 산성이시니이다
Bikisa ngai na motambo oyo batieli ngai, pamba te ozali ebombamelo na ngai.
5 내가 나의 영을 주의 손에 부탁하나이다 진리의 하나님 여호와여, 나를 구속하셨나이다
Nazongisi molimo na ngai kati na maboko na Yo, Yawe, Nzambe ya solo, oyo okangolaki ngai.
6 내가 허탄한 거짓을 숭상하는 자를 미워하고 여호와를 의지하나이다
Nalingaka te bato nyonso oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko, pamba te natiaka elikya na ngai kati na Yawe.
7 내가 주의 인자하심을 기뻐하며 즐거워할 것은 주께서 나의 곤란을 감찰하사 환난 중에 있는 내 영혼을 아셨고
Nakozalaka moto ya esengo mpe nakosepelaka kati na bolingo na Yo; pamba te omonaka pasi na ngai, mpe oyebi mitungisi na ngai.
8 나를 대적의 수중에 금고치 아니하셨고 내 발을 넓은 곳에 세우셨음이니이다
Okabaki ngai te na maboko ya monguna na ngai, kasi obombaka ngai mosika, na esika ya kimia penza.
9 여호와여 내 고통을 인하여 나를 긍휼히 여기소서 내가 근심으로 눈과 혼과 몸이 쇠하였나이다
Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazali kati na pasi; miso, motema mpe nzoto na ngai mobimba ebebi mpo na mawa.
10 내 생명은 슬픔으로 보내며 나의 해는 탄식으로 보냄이여 내 기력이 나의 죄악으로 약하며 나의 뼈가 쇠하도소이다
Bomoi na ngai ekawuki mpo na pasi, mpe mibu na ngai ezali koleka kati na kolela; makasi na ngai esili mpo na mabe na ngai, mpe mikuwa na ngai elembi.
11 내가 모든 대적으로 말미암아 욕을 당하고 내 이웃에게서는 심히 당하니 내 친구가 놀라고 길에서 보는 자가 나를 피하였나이다
Banguna na ngai nyonso bakomi kozwa ngai lokola eloko ya lisuma, baninga na ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya soni, mpe bato oyo bayebi ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya somo.
12 내가 잊어버린바 됨이 사망한 자를 마음에 두지 아니함 같고 파기와 같으니이다
Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa; nakomi lokola mbeki oyo epanzana.
13 내가 무리의 비방을 들으오며 사방에 두려움이 있나이다 저희가 나를 치려 의논할 때에 내 생명을 빼앗기로 꾀하였나이다
Nayokaka matongi na bango na tina na ngai tango basanganaka mpe basalaka makita mpo na koluka ndenge nini koboma ngai.
14 여호와여 그러하여도 나는 주께 의지하고 말하기를 주는 내 하나님이시라 하였나이다
Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo, Yawe, mpe nalobaka: « Ozali Nzambe na ngai. »
15 내 시대가 주의 손에 있사오니 내 원수와 핍박하는 자의 손에서 나를 건지소서
Mikolo ya bomoi na ngai ezali kati na maboko na Yo; kangola ngai wuta na maboko ya banguna mpe ya bayini na ngai.
16 주의 얼굴을 주의 종에게 비취시고 주의 인자하심으로 나를 구원하소서
Tala ngai mosali na Yo, na miso ya bolingo; bikisa ngai kati na bolingo na Yo.
17 여호와여, 내가 주를 불렀사오니 나로 부끄럽게 마시고 악인을 부끄럽게 하사 음부에서 잠잠케 하소서 (Sheol h7585)
Yawe, sala ete nayokisama soni te, pamba te nabeleli Yo. Kasi tika ete bato mabe nde bayoka soni mpe bakita kino na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
18 교만하고 완악한 말로 무례히 의인을 치는 거짓 입술로 벙어리 되게 하소서
Tika ete ekangama, bibebu oyo elobaka lokuta, oyo elobaka na lolendo mpe na lofundu, oyo ebebisaka lokumu ya moto ya sembo na nzela ya songisongi.
19 주를 두려워하는 자를 위하여 쌓아 두신 은혜 곧 인생 앞에서 주께 피하는 자를 위하여 베푸신 은혜가 어찌 그리 큰지요
Boboto na Yo ezali penza monene, boboto oyo obombaka mpo na bato oyo batosaka Yo, boboto oyo otalisaka epai ya bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, na miso ya bato nyonso.
20 주께서 저희를 주의 은밀한 곳에 숨기사 사람의 꾀에서 벗어나게 하시고 비밀히 장막에 감추사 구설의 다툼에서 면하게 하시리이다
Obombaka bango epai na Yo, mosika ya mabongisi mabe ya bato; obatelaka bango kati na Yo, mosika ya bato oyo babundisaka bango.
21 여호와를 찬송할지어다! 견고한 성에서 그 기이한 인자를 내게 보이셨음이로다
Tika ete Yawe akumisama, pamba te atalisaki ngai bolingo na Ye ya kokamwa, tango nazalaki kati na engumba oyo ezingelamaki na banguna!
22 내가 경겁한 중에 말하기를 주의 목전에서 끊어졌다 하였사오나 내가 주께 부르짖을 때에 주께서 나의 간구하는 소리를 들으셨나이다
Kati na kobanga na ngai, namilobelaki: « Obengani ngai penza mosika na Yo! » Nzokande oyokaki ngai wana nazalaki kobondela Yo mpe wana nazalaki kobelela Yo.
23 너희 모든 성도들아 여호와를 사랑하라! 여호와께서 성실한 자를 보호하시고 교만히 행하는 자에게 엄중히 갚으시느니라
Bino babulami na Ye nyonso, bolinga Yawe! Yawe abatelaka bato ya sembo epai na Ye, kasi apesaka etumbu ya makasi epai ya bato ya lofundu.
24 강하고 담대하라 여호와를 바라는 너희들아!
Bino nyonso oyo botalelaka Yawe, bozala makasi mpe boyika mpiko.

< 시편 31 >