< 시편 129 >
1 (성전에 올라가는 노래) 이스라엘은 이제 말하기를 저희가 나의 소시부터 여러 번 나를 괴롭게 하였도다
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba:
2 저희가 나의 소시부터 여러번 나를 괴롭게 하였으나 나를 이기지 못하였도다
« Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele, kasi batikali kolonga ngai te! »
3 밭가는 자가 내 등에 갈아 그 고랑을 길게 지었도다
Bato mabe batimoli mokongo na ngai, bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo.
4 여호와께서는 의로우사 악인의 줄을 끊으셨도다
Kasi lokola Yawe azali sembo, akati basinga ya bato mabe.
5 무릇 시온을 미워하는 자는 수치를 당하여 물러갈지어다
Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima!
6 저희는 지붕의 풀과 같을지어다 그것은 자라기 전에 마르는 것이라
Tika ete bakoma lokola matiti oyo ebotaka na likolo ya ndako mpe ekawukaka liboso ete balongola yango;
7 이런 것은 베는 자의 줌과 묶는 자의 품에 차지 아니하나니
tika ete mobuki bambuma ya bilanga atondisa na yango te maboko na ye, tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa na yango te saki na ye.
8 지나가는 자도 여호와의 복이 너희에게 있을지어다 하거나 우리가 여호와의 이름으로 너희에게 축복한다 하지 아니하느니라
Tika ete baleki nzela baloba na bango te: « Tika ete Yawe apambola bino! » Topamboli bino na Kombo na Yawe!