< 민수기 2 >

1 여호와께서 모세와 아론에게 일러 가라사대
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
2 이스라엘 자손은 각각 그 기와 그 종족의 기호 곁에 진을 치되 회막을 사면으로 대하여 치라
« Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga; moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye, zingazinga ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwa mosika na yango. »
3 동방 해 돋는 편에 진 칠 자는 그 군대대로 유다의 진기에 속한자라 유다 자손의 족장은 암미나답의 아들 나손이요
Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka, milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.
4 그 군대는 계수함을 입은 자가 칠만 사천 육백명이며
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba.
5 그 곁에 진 칠 자는 잇사갈 지파라 잇사갈 자손의 족장은 수알의 아들 느다넬이요
Bato ya libota ya Isakari bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Yuda. Mokambi ya bato ya Isakari ezali Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari.
6 그 군대는 계수함을 입은 자 오만 사천 사백명이며
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na minei na nkama minei.
7 또 스불론 지파라 스불론 자손의 족장은 헬론의 아들 엘리압이요
Mpe bato ya libota ya Zabuloni bakozala pembeni ya bato ya libota ya Isakari. Mokambi ya bato ya Zabuloni ezali Eliabi, mwana mobali ya Eloni.
8 그 군대는 계수함을 입은 자 오만 칠천 사백명이니
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei.
9 유다 진에 속한 군대의 계수함을 입은 군대의 총계가 십 팔만 육천 사백명이라 그들은 제 일대로 진행할지니라
Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Yuda ezali bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na motoba na nkama minei kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala liboso.
10 남편에는 르우벤 군대의 진 기가 있을 것이라 르우벤 자손의 족장은 스데울의 아들 엘리술이요
Na ngambo ya sude, milongo ya mampinga ya Ribeni bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Ribeni ezali Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri.
11 그 군대는 계수함을 입은 자 사만 육천 오백명이며
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano.
12 그 곁에 진 칠 자는 시므온 지파라 시므온 자손의 족장은 수리삿대의 아들 슬루미엘이요
Bato ya libota ya Simeoni bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Ribeni. Mokambi ya bato ya Simeoni ezali Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi.
13 그 군대는 계수함을 입은 자 오만 구천 삼백명이며
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato.
14 또 갓 지파라 갓 자손의 족장은 르우엘의 아들 엘리아삽이요
Mpe bato ya libota ya Gadi bakozala pembeni ya bato ya libota ya Simeoni. Mokambi ya bato ya Gadi ezali Eliazafi, mwana mobali ya Deweli.
15 그 군대는 계수함을 입은 자 사만 오천 육백 오십명이니
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba na tuku mitano.
16 르우벤 진에 속한 계수함을 입은 군대의 총계가 십 오만 일천 사백 오십명이라 그들은 제 이대로 진행할지니라
Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Ribeni ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na moko na nkama minei na tuku mitano kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na sima.
17 그 다음에 회막이 레위인의 진과 함께 모든 진의 중앙에 있어 진행하되 그들의 진 친 순서대로 각 사람은 그 위치에서 그 기를 따라 앞으로 행할지니라
Bongo Ndako ya kapo ya Bokutani mpe molako ya Balevi ekozala na kati-kati ya milako. Bakokende na molongo ndenge batielaki milako na bango, moko na moko na esika na ye mpe na se ya bendele na ye.
18 서편에는 에브라임의 군대의 진 기가 있을 것이라 에브라임 자손의 족장은 암미훗의 아들 엘리사마요
Na ngambo ya weste, milongo ya mampinga ya Efrayimi bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Efrayimi ezali Elishama, mwana mobali ya Amiwudi.
19 그 군대는 계수함을 입은 자 사만 오백명이며
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na nkama mitano.
20 그 곁에는 므낫세 지파가 있을 것이라 므낫세 자손의 족장은 브다술의 아들 가말리엘이요
Bato ya libota ya Manase bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Efrayimi. Mokambi ya bato ya Manase ezali Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri.
21 그 군대는 계수함을 입은 자 삼만 이천 이백명이며
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale.
22 또 베냐민 지파라 베냐민 자손의 족장은 기드오니의 아들 아비단이요
Mpe bato ya libota ya Benjame bakozala pembeni ya bato ya libota ya Manase. Mokambi ya bato ya libota ya Benjame ezali Abidani, mwana mobali ya Gideoni.
23 그 군대는 계수함을 입은 자 삼만 오천 사백명이니
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mitano na nkama minei.
24 에브라임 진에 속한 계수함을 입은 군대의 총계가 십만 팔천 일백명이라 그들은 제 삼대로 진행할지니라
Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Efrayimi ezali bato nkoto nkama moko na mwambe na nkama moko, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na molongo ya misato.
25 북편에는 단 군대의 진 기가 있을 것이라 단 자손의 족장은 암미삿대의 아들 아히에셀이요
Na ngambo ya nor, milongo ya mampinga ya Dani bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Dani ezali Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi.
26 그 군대는 계수함을 입은 자 육만 이천 칠백명이며
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo.
27 그 곁에 진 칠 자는 아셀 지파라 아셀 자손의 족장은 오그란의 아들 바기엘이요
Bato ya libota ya Aseri bakotia molako na bango pembeni ya bato ya libota ya Dani. Mokambi ya bato ya Aseri ezali Pagieli, mwana mobali ya Okirani.
28 그 군대는 계수함을 입은 자 사만 일천 오백명이며
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na moko na nkama mitano.
29 또 납달리 지파라 납달리 자손의 족장은 에난의 아들 아히라요
Mpe bato ya libota ya Nefitali bakozala pembeni ya bato ya libota ya Aseri. Mokambi ya bato ya Nefitali ezali Akira, mwana mobali ya Enani.
30 그 군대는 계수함을 입은 자 오만 삼천 사백명이니
Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
31 단의 진에 속한 계수함을 입은 군대의 총계가 십 오만 칠천 육백명이라 그들은 기를 따라 후대로 진행할지니라 하시니라
Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Dani ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na sambo na nkama motoba, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala na sima na bango nyonso, na se ya bendele na bango.
32 이상은 이스라엘 자손이 그 종족을 따라 계수함을 입은 자니 모든 진의 군대 곧 계수함을 입은 총계가 육십만 삼천 오백 오십명이었으며
Bango nde bana ya Isalaele oyo batangamaki, kolanda mabota na bango. Motango ya bato nyonso oyo bazalaki kati na milako, kolanda milongo ya mampinga na bango, ezalaki bato nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
33 레위인은 이스라엘 자손과 함께 계수되지 아니하였으니 여호와께서 모세에게 명하심과 같았느니라
Kasi batangaki Balevi te elongo na bato mosusu ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
34 이스라엘 자손이 여호와께서 모세에게 명하신대로 다 준행하여 각기 가족과 종족을 따르며 그 기를 따라 진 치기도 하며 진행하기도 하였더라
Boye, bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize. Na lolenge wana nde batiaki milako na bango na se ya babendele na bango mpe batambolaki bongo, moto na moto na libota na ye mpe na etuka na ye.

< 민수기 2 >