< 미가 3 >

1 내가 또 이르노니 야곱의 두령들과 이스라엘 족속의 치리자들아 청컨대 들으라 공의는 너희의 알 것이 아니냐?
Boye, nalobaki: « Boyoka, bino bakambi ya libota ya Jakobi, bino batambolisi ya libota ya Isalaele! Ezali bino te bato bosengeli koyeba malamu mibeko?
2 너희가 선을 미워하고 악을 좋아하여 내 백성의 가죽을 벗기고 그 뼈에서 살을 뜯어
Nzokande, ezali bino bato bozali koboya bolamu mpe bozali kolinga mabe. Bozali kolongola poso ya nzoto ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola misuni na bango mpe kobuka mikuwa na bango.
3 그들의 살을 먹으며 그 가죽을 벗기며 그 뼈를 꺾어 다지기를 남비와 솥 가운데 담을 고기처럼 하는도다
Bozali kodunda misuni ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola bango poso ya nzoto mpe kobuka mikuwa na bango. Bozali kokata bango mike-mike lokola misuni oyo bakalingaka to oyo batokisaka na nzungu. »
4 그 때에 그들이 여호와께 부르짖을지라도 응답지 아니하시고 그들의 행위의 악하던대로 그들 앞에 얼굴을 가리우시리라
Yango wana, tango bakobelela Yawe, akoyanola bango te. Na tango wana, akobombela bango elongi na Ye likolo ya mabe na bango nyonso oyo basalaki.
5 내 백성을 유혹하는 선지자는 이에 물면 평강을 외치나 그 입에 무엇을 채워주지 아니하는 자에게는 전쟁을 준비하는도다 이런 선지자에 대하여 여호와께서 가라사대
Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela basakoli ya lokuta oyo babungisaka bato na ngai nzela: « Soki bapesi bango eloko ya kolia, basakolaka kimia; soki bapesi bango te eloko ya kolia, basakolaka bitumba.
6 그러므로 너희가 밤을 만나리니 이상을 보지 못할 것이요 흑암을 만나리니 점 치지 못하리라 하셨나니 이 선지자 위에는 해가 져서 낮이 캄캄할 것이라
Na butu, bokozwa lisusu bimoniseli te. Soki bapesi bango te eloko ya kolia, molili ekozingela bino mpe bokokoka lisusu kosakola te! Moyi ekobimela lisusu basakoli yango te, mpe mokolo ekokoma molili mpo na bango.
7 선견자가 부끄러워하며 술객이 수치를 당하여 다 입술을 가리울 것은 하나님이 응답지 아니하심이어니와
Bamoni makambo bakotonda na soni, mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya bakosambwa. Bango nyonso bakobomba bilongi na bango, pamba te Nzambe akoyanola bango te. »
8 오직 나는 여호와의 신으로 말미암아 권능과 공의와 재능으로 채움을 얻고 야곱의 허물과 이스라엘의 죄를 그들에게 보이리라
Kasi ngai, na nzela ya Molimo na Yawe, natondisami na nguya, na bosembo mpe na mpiko mpo na kobimisa polele mabe ya Jakobi mpe lisumu ya Isalaele.
9 야곱 족속의 두령과 이스라엘 족속의 치리자 곧 공의를 미워하고 정직한 것을 굽게 하는 자들아 청컨대 이 말을 들을지어다
Boyoka maloba oyo, bakambi ya Jakobi mpe batambolisi ya Isalaele, bino oyo bolingaka makambo ya sembo te mpe bobongolaka makambo ya alima,
10 시온을 피로, 예루살렘을 죄악으로 건축하는도다
bino oyo botongaka Siona na kosopa makila, mpe Yelusalemi na kosalaka makambo mabe.
11 그 두령은 뇌물을 위하여 재판하며 그 제사장은 삯을 위하여 교훈하며 그 선지자는 돈을 위하여 점 치면서 오히려 여호와를 의뢰하여 이르기를 여호와께서 우리 중에 계시지 아니하냐 재앙이 우리에게 임하지 아니하리라 하는도다
Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka: « Boni, Yawe azali kati na biso te? Pasi ekoki kokomela biso te! »
12 이러므로 너희로 인하여 시온은 밭 같이 갊을 당하고 예루살렘은 무더기가 되고 성전의 산은 수풀의 높은 곳과 같게 되리라
Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.

< 미가 3 >