< 마태복음 9 >

1 예수께서 배에 오르사 건너가 본 동네에 이르시니
Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye.
2 침상에 누운 중풍병자를 사람들이 데리고 오거늘 예수께서 저희의 믿음을 보시고 중풍병자에게 이르시되 소자야 안심하라 네 죄사함을 받았느니라!
Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango: — Mwana na Ngai, yika mpiko! Masumu na yo elimbisami.
3 어떤 서기관들이 속으로 이르되 `이 사람이 참람하도다'
Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema: — Moto oyo azali kotiola Nzambe!
4 예수께서 그 생각을 아시고 가라사대 너희가 어찌하여 마음에 악한 생각을 하느냐?
Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango: — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino?
5 네 죄 사함을 받았느니라 하는 말과 일어나 걸어가라 하는 말이 어느 것이 쉽겠느냐?
Likambo nini eleki pete mpo na koloba: « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola? »
6 그러나 인자가 세상에서 죄를 사하는 권세가 있는 줄을 너희로 알게 하려 하노라 하시고 중풍병자에게 말씀하시되 일어나 네 침상을 가지고 집으로 가라! 하시니
Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono: — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
7 그가 일어나 집으로 돌아가거늘
Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye.
8 무리가 보고 두려워하며 이런 권세를 사람에게 주신 하나님께 영광을 돌리니라
Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.
9 예수께서 거기서 떠나 지나가시다가 마태라 하는 사람이 세관에 앉은 것을 보시고 이르시되 나를 좇으라! 하시니 일어나 좇으니라
Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye: « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.
10 예수께서 마태의 집에서 앉아 음식을 잡수실 때에 많은 세리와 죄인들이 와서 예수와 그 제자들과 함께 앉았더니
Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye.
11 바리새인들이 보고 그 제자들에게 이르되 `어찌하여 너희 선생은 세리와 죄인들과 함께 잡수시느냐?'
Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu: — Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu?
12 예수께서 들으시고 이르시되 건강한 자에게는 의원이 쓸데 없고 병든 자에게라야 쓸데 있느니라
Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango: — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.
13 너희는 가서 내가 긍휼을 원하고 제사를 원치 아니하노라 하신 뜻이 무엇인지 배우라 내가 의인을 부르러 온 것이 아니요 죄인을 부르러 왔노라 하시니라
Bokende koyekola tina ya maloba oyo: « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
14 그 때에 요한의 제자들이 예수께 나아와 가로되 `우리와 바리새인들은 금식하는데 어찌하여 당신의 제자들은 금식하지 아니하나이까?'
Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu: — Mpo na nini biso mpe Bafarizeo tokilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?
15 예수께서 저희에게 이르시되 혼인집 손님들이 신랑과 함께 있을 동안에 슬퍼할 수 있느뇨 그러나 신랑을 빼앗길 날이 이르리니 그 때에는 금식할 것이니라
Yesu azongiselaki bango: — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
16 생베 조각을 낡은 옷에 붙이는 자가 없나니 이는 기운 것이 그 옷을 당기어 해어짐이 더하게 됨이요
Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.
17 새 포도주를 낡은 가죽 부대에 넣지 아니하나니 그렇게 하면 부대가 터져 포도주도 쏟아지고 부대도 버리게 됨이라 새 포도주는 새 부대에 넣어야 둘이 다 보전되느니라
Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika: batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.
18 예수께서 이 말씀을 하실 때에 한 직원이 와서 절하고 가로되 `내 딸이 방장 죽었사오나 오셔서 그 몸에 손을 얹으소서 그러면 살겠나이다' 하니
Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye: — Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi.
19 예수께서 일어나 따라 가시매 제자들도 가더니
Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.
20 열 두 해를 혈루증으로 앓는 여자가 예수의 뒤로 와서 그 겉옷가를 만지니
Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye,
21 이는 제 마음에 `그 겉옷만 만져도 구원을 받겠다' 함이라
pamba te azalaki komilobela: — Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai.
22 예수께서 돌이켜 그를 보시며 가라사대 딸아 안심하라 네 믿음이 너를 구원하였다! 하시니 여자가 그 시로 구원을 받으니라
Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye; alobaki: — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.
23 예수께서 그 직원의 집에 가사 피리 부는 자들과 훤화하는 무리를 보시고
Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele.
24 가라사대 물러가라 이 소녀가 죽은 것이 아니라 잔다 하시니 저들이 비웃더라
Alobaki na bango: — Bobima! Mwana akufi te; alali nde pongi. Kasi bato bakomaki kotiola Ye.
25 무리를 내어 보낸 후에 예수께서 들어가사 소녀의 손을 잡으시매 일어나는지라
Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.
26 그 소문이 그 온 땅에 퍼지더라
Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.
27 예수께서 거기서 떠나 가실새 두 소경이 따라오며 소리질러 가로되 다윗의 자손이여! 우리를 불쌍히 여기소서 하더니
Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga: — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa!
28 예수께서 집에 들어가시매 소경들이 나아오거늘 예수께서 이르시되 내가 능히 이 일 할 줄을 믿느냐? 대답하되 주여! 그러하오이다 하니
Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango: — Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai? Bazongisaki: — Iyo, Nkolo!
29 이에 예수께서 저희 눈을 만지시며 가라사대 너희 믿음대로 되라! 하신대
Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki: — Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino!
30 그 눈들이 밝아진지라 예수께서 엄히 경계하시되 삼가 아무에게도 알게 하지 말라 하셨으나
Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango: — Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino.
31 저희가 나가서 예수의 소문을 그 온 땅에 전파하니라
Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.
32 저희가 나갈 때에 귀신 들려 벙어리 된 자를 예수께 데려오니
Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te.
33 귀신이 쫓겨나고 벙어리가 말하거늘 무리가 기이히 여겨 가로되 이스라엘 가운데서 이런 일을 본 때가 없다 하되
Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki: — Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te!
34 바리새인들은 가로되 `저가 귀신의 왕을 빙자하여 귀신을 쫓아낸다' 하더라
Kasi Bafarizeo bazalaki koloba: — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
35 예수께서 모든 성과 촌에 두루 다니사 저희 회당에서 가르치시며 천국복음을 전파하시며 모든 병과 모든 약한 것을 고치시니라
Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.
36 무리를 보시고 민망히 여기시니 이는 저희가 목자 없는 양과 같이 고생하며 유리함이라
Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.
37 이에 제자들에게 이르시되 추수할 것은 많되 일군은 적으니
Yesu alobaki na bayekoli na Ye: « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke!
38 그러므로 추수하는 주인에게 청하여 추수할 일군들을 보내어 주소서 하라 하시니라
Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »

< 마태복음 9 >