< 누가복음 6 >
1 안식일에 예수께서 밀밭 사이로 지나가실새 제자들이 이삭을 잘라 손으로 비비어 먹으니
Mokolo moko ya Saba, wana Yesu azalaki kotambola kati na bilanga ya ble, bayekoli na Ye babandaki kobuka ble; mpe, sima na bango kolongola yango baposo na maboko, baliaki bambuma na yango.
2 어떤 바리새인들이 말하되 `어찌하여 안식일에 하지 못할 일을 하느뇨?'
Ndambo ya Bafarizeo batunaki: — Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba?
3 예수께서 대답하여 `가라사대 다윗이 자기와 및 함께한 자들이 시장할 때에 한 일을 읽지 못하였느냐
Yesu azongiselaki bango: — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala?
4 그가 하나님의 전에 들어가서 다만 제사장 외에는 먹지 못하는 진설병을 집어 먹고 함께한 자들에게도 주지 아니하였느냐?'
Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
5 또 가라사대 `인자는 안식일의 주인이니라!' 하시더라
Yesu alobaki na bango lisusu: — Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
6 또 다른 안식일에 예수께서 회당에 들어가사 가르치실새 거기 오른손 마른 사람이 있는지라
Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali.
7 서기관과 바리새인들이 예수를 송사할 빙거를 찾으려 하여 안식일에 병 고치시는가 엿보니
Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye.
8 예수께서 저희 생각을 아시고 손마른 사람에게 이르시되 `일어나 한가운데 서라' 하시니 저가 일어나 서거늘
Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko: — Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso! Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso.
9 예수께서 저희에게 이르시되 `내가 너희에게 묻노니 안식일에 선을 행하는 것과 악을 행하는 것 생명을 구하는 것과 멸하는 것 어느 것이 옳으냐?' 하시며
Bongo Yesu alobaki na bato mosusu: — Nazali kotuna bino: nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba: kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa?
10 무리를 둘러 보시고 그 사람에게 이르시되 `네 손을 내밀라' 하시니 저가 그리하매 그 손이 회복된지라
Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko: — Sembola loboko na yo! Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki.
11 저희는 분기가 가득하여 예수를 어떻게 처치할 것을 서로 의논하니라
Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu.
12 이 때에 예수께서 기도하시러 산으로 가사 밤이 맞도록 하나님께 기도하시고
Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe.
13 밝으매 그 제자들을 부르사 그 중에서 열 둘을 택하여 사도라 칭하셨으니
Na tongo, abengaki bayekoli na Ye pene na Ye mpe aponaki bato zomi na mibale kati na bango, ba-oyo akomaki kobenga « bantoma. » Ezalaki:
14 곧 베드로라고도 이름 주신 시몬과 및 그 형제 안드레와 및 야고보와 요한과 빌립과 바돌로매와
Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo; » Andre, ndeko na ye; Jake, Yoane, Filipo, Bartelemi;
15 마태와 도마와 및 알패오의 아들 야고보와 및 셀롯이라 하는 시몬과
Matayo, Toma; Jake, mwana mobali ya Alife, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote;
16 및 야고보의 아들 유다와 및 예수를 파는 자 될 가룟 유다라
Yuda, mwana mobali ya Jake, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
17 예수께서 저희와 함께 내려오사 평지에 서시니 그 제자의 허다한 무리와 또 예수의 말씀도 듣고 병 고침을 얻으려고 유대 사방과 예루살렘과 및 두로와 시돈의 해안으로부터 온 많은 백성도 있더라
Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.
18 더러운 귀신에게 고난 받는 자들도 고침을 얻은지라
Bayaki mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango. Ba-oyo milimo mabe ezalaki kotungisa bakangolamaki.
19 온 무리가 예수를 만지려고 힘쓰니 이는 능력이 예수께로 나서 모든 사람을 낫게 함이러라
Bato nyonso balukaki kosimba Ye, pamba te nguya moko ezalaki kobima kati na Ye mpe ezalaki kobikisa bato nyonso.
20 예수께서 눈을 들어 제자들을 보시고 가라사대 `가난한 자는 복이 있나니 하나님의 나라가 너희 것임이요
Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki: « Esengo na bino oyo bozali babola, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino!
21 이제 주린 자는 복이 있나니 너희가 배부름을 얻을 것임이요 이제 우는 자는 복이 있나니 너희가 웃을 것임이요
Esengo na bino oyo bozali na nzala sik’oyo, pamba te bokotonda! Esengo na bino oyo bozali kolela sik’oyo, pamba te bokoseka!
22 인자를 인하여 사람들이 너희를 미워하며 멀리하고 욕하고 너희 이름을 악하다 하여 버릴 때에는 너희에게 복이 있도다
Esengo na bino tango bato bazali koyina bino, tango bazali kobengana bino, tango bazali kofinga bino, mpe tango bato bazali kosambwisa kombo na bino, likolo na Mwana na Moto!
23 그 날에 기뻐하고 뛰놀라 하늘에서 너희 상이 큼이라 저희 조상들이 선지자들에게 이와 같이 하였느니라
Tango makambo yango ekokokisama, bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo. Ezalaki mpe kaka ndenge wana nde batata na bango banyokolaki basakoli.
24 그러나 화 있을진저 너희 부요한 자여 너희는 너희의 위로를 이미 받았도다
Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi, pamba te bosili kozwa kobondisama na bino!
25 화 있을진저 너희 이제 배부른 자여 너희는 주리리로다 화 있을진저 너희 이제 웃는 자여 너희가 애통하며 울리로다
Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo, pamba te bokozala na nzala! Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo, pamba te bokozala na mawa mpe bokolela!
26 모든 사람이 너희를 칭찬하면 화가 있도다 저희 조상들이 거짓 선지자들에게 이와 같이 하였느니라
Mawa na bino soki bato nyonso bazali koloba malamu na tina na bino, pamba te ezali ndenge wana nde bakoko na bango basalaki basakoli ya lokuta!
27 그러나 너희 듣는 자에게 내가 이르노니 너희 원수를 사랑하며 너희를 미워하는 자를 선대하며
Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi: Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu.
28 너희를 저주하는 자를 위하여 축복하며 너희를 모욕하는 자를 위하여 기도하라
Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
29 네 이 뺨을 치는 자에게 저 뺨도 돌려 대며 네 겉옷을 빼앗는 자에게 속옷도 금하지 말라
Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye mpe litama mosusu. Soki moto abotoli yo kazaka na yo, tika ye azwa lisusu elamba na yo.
30 무릇 네게 구하는 자에게 주며 네 것을 가져가는 자에게 다시 달라 하지 말며
Pesa na moto nyonso oyo asengi yo; mpe soki moto akamati eloko na yo, kosenga te ete azongisela yo yango.
31 남에게 대접을 받고자 하는 대로 너희도 남을 대접하라
Oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango.
32 너희가 만일 너희를 사랑하는자를 사랑하면 칭찬 받을 것이 무엇이뇨 죄인들도 사랑하는 자를 사랑하느니라
Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, litomba nini bokozwa? Bato ya masumu mpe balingaka bato oyo balingaka bango.
33 너희가 만일 선대하는 자를 선대하면 칭찬 받을 것이 무엇이뇨 죄인들도 이렇게 하느니라
Mpe soki bosalaka bolamu epai ya bato oyo basalaka bino bolamu, litomba nini bokozwa? Bato ya masumu mpe basalaka bongo.
34 너희가 받기를 바라고 사람들에게 빌리면 칭찬 받을 것이 무엇이뇨 죄인들도 의수히 받고자 하여 죄인에게 빌리느니라
Soki bodefisaka kaka na bato oyo bozali na elikya ete bakoki kofuta bino niongo oyo bodefisaka bango, litomba nini bokozwa? Bato ya masumu mpe badefisaka baninga na bango, bato ya masumu, na elikya ete bakofuta bango niongo yango.
35 오직 너희는 원수를 사랑하고 선대하며 아무 것도 바라지 말고 빌리라 그리하면 너희 상이 클 것이요 또 지극히 높으신 이의 아들이 되리니 그는 은혜를 모르는 자와 악한 자에게도 인자로우시니라
Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.
36 너희 아버지의 자비하심같이 너희도 자비하라
Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.
37 비판치 말라 그리하면 너희가 비판을 받지 않을 것이요 정죄하지말라 그리하면 너희가 정죄를 받지 않을 것이요 용서하라 그리하면 너희가 용서를 받을 것이요
Bosambisaka te, mpe bakosambisa bino te; bokatelaka bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te; bolimbisaka, mpe bakolimbisa bino;
38 주라 그리하면 너희에게 줄 것이니 곧 후히 되어 누르고 흔들어 넘치도록 하여 너희에게 안겨 주리라 너희의 헤아리는 그 헤아림으로 너희도 헤아림을 도로 받을 것이니라'
bopesaka, mpe bakopesa bino; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »
39 또 비유로 말씀하시되 `소경이 소경을 인도할 수 있느냐? 둘이 다 구덩이에 빠지지 아니하겠느냐?
Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo: « Boni, mokufi miso akoki kotambolisa mokufi miso mosusu? Boni, bango mibale bakokweya te kati na libulu?
40 제자가 그 선생보다 높지 못하나 무릇 온전케 된 자는 그 선생과 같으리라
Moyekoli alekaka molakisi na ye te, kasi moyekoli nyonso oyo bateyi malamu akozala lokola molakisi na ye.
41 어찌하여 형제의 눈 속에 있는 티는 보고 네 눈 속에 있는 들보는 깨닫지 못하느냐?
Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko?
42 너는 네 눈 속에 있는 들보를 보지 못하면서 어찌하여 형제에게 말하기를 형제여 나로 네 눈 속에 있는 티를 빼게 하라 할 수 있느냐? 외식하는 자여! 먼저 네 눈 속에서 들보를 빼어라 그 후에야 네가 밝히 보고 형제의 눈 속에 있는 티를 빼리라
Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso na yo, › wana ozali kokoka komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko. Bolole! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo okomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.
43 못된 열매 맺는 좋은 나무가 없고 또 좋은 열매 맺는 못된 나무가 없느니라
Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu.
44 나무는 각각 그 열매로 아나니 가시나무에서 무화과를, 또는 찔레에서 포도를 따지 못하느니라
Nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango: na nzete ya nzube, babukaka bambuma ya figi te; mpe na nzete ya sende, balongolaka bambuma ya vino te.
45 선한 사람은 마음의 쌓은 선에서 선을 내고 악한 자는 그 쌓은 악에서 악을 내나니 이는 마음에 가득한 것을 입으로 말함이니라
Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.
46 너희는 나를 불러 주여, 주여 하면서도 어찌하여 나의 말하는 것을 행치 아니하느냐?
Mpo na nini bobengaka Ngai ‹ Nkolo! Nkolo! › kasi bosalaka te makambo oyo nayebisaka bino?
47 내게 나아와 내 말을 듣고 행하는 자마다 누구와 같은 것을 너희에게 보이리라
Moto nyonso oyo ayaka epai na Ngai, ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango na misala, nazali kolakisa bino soki akokani na nani:
48 집을 짓되 깊이 파고 주초를 반석 위에 놓은 사람과 같으니 큰 물이 나서 탁류가 그 집에 부딪히되 잘 지은 연고로 능히 요동케 못하였거니와
akokani na moto oyo, mpo na kotonga ndako, atimolaki mabele, akitaki penza na mozindo mpe atongaki moboko ya ndako yango na likolo ya libanga; tango mpela eyaki, mayi emataki makasi mpe emibwakaki na ndako yango kasi ekokaki te kobuka yango, pamba te etongamaki malamu.
49 듣고 행치 아니하는 자는 주초없이 흙 위에 집 지은 사람과 같으니 탁류가 부딪히매 집이 곧 무너져 파괴됨이 심하니라' 하시니라
Kasi moto oyo ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango te na misala akokani na moto oyo atongaki ndako na likolo ya mabele, ezanga moboko; tango kaka mpela emibwakaki na ndako, ndako yango ekweyaki mbala moko mpe epanzanaki. »