< 레위기 5 >

1 누구든지 증인이 되어 맹세시키는 소리를 듣고도 그 본 일이나 아는 일을 진술치 아니하면 죄가 있나니 그 허물이 그에게로 돌아갈 것이요
« Soki moto ayoki mbela ya elakeli mabe na tina na likambo oyo amonaki mpe ayebi, bongo aboyi kotatola yango, asali masumu mpe amemi ngambo.
2 누구든지 부정한 들짐승의 사체나, 부정한 가축의 사체나, 부정한 곤충의 사체들, 무릇 부정한 것을 만졌으면 부지중에라 할지라도 그 몸이 더러워져서 허물이 있을 것이요
Soki moto asimbi na kozanga koyeba eloko ya mbindo, ezala ebembe ya nyama ya zamba ya mbindo to ebembe ya nyama ya mboka ya mbindo to ebembe ya nyama ya mbindo oyo etambolaka na libumu, moto yango akomi mbindo mpe amemi ngambo.
3 혹시 부지중에 사람의 부정에 다닥쳤는데 그 사람의 부정이 어떠한 부정이든지 그것을 깨달을 때에는 허물이 있을 것이요
Soki moto asimbi na kozanga koyeba moto ya mbindo, mbindo oyo ezwamaka na kotutana, akokoma mbindo mpe akomema ngambo na yango tango kaka akososola yango.
4 혹 누구든지 무심중에 입으로 맹세를 발하여 악을 하리라 하든지, 선을 하리라 하면 그 사람의 무심중에 맹세를 발하여 말한 것이 어떠한 일이든지 깨닫지 못하다가 그것을 깨달을 때에는 그 중 하나에 허물이 있을 것이니
Soki moto alapi ndayi na kozanga koyeba, ata soki ezali mpo na bolamu na ye to ya moto mosusu, bongo ayei kososola yango na sima, moto yango akomema ngambo.
5 이 중 하나에 허물이 있을 때에는 아무 일에 범과하였노라 자복하고
Boye, soki amemi ngambo na moko kati na makambo oyo, asengeli kotubela masumu oyo asali
6 그 범과를 인하여 여호와께 속건제를 드리되 양떼의 암컷 어린 양이나 염소를 끌어다가 속죄제를 드릴 것이요 제사장은 그의 허물을 위하여 속죄할지니라!
mpe kobonzela Yawe meme to ntaba ya mwasi lokola mbeka mpo na masumu na ye. Bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango.
7 만일 힘이 어린 양에 미치지 못하거든 그 범과를 속하기 위하여 산비둘기 둘이나 집비둘기 새끼 둘을 여호와께로 가져 가되 하나는 속죄제물을 삼고, 하나는 번제물을 삼아
Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka: moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.
8 제사장에게로 가져 갈 것이요, 제사장은 그 속죄 제물을 먼저 드리되 그 머리를 목에서 비틀어 끊고 몸은 아주 쪼개지 말며
Akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akobonza liboso mbeka ya masumu: akokata yango kingo kasi akolongola moto te.
9 그 속죄 제물의 피를 단 곁에 뿌리고 그 남은 피는 단 밑에 흘릴지니 이는 속죄제요
Akosopa ndambo ya makila na yango pembeni ya etumbelo; mpe ndambo mosusu, na makolo ya etumbelo: ezali mbeka mpo na masumu.
10 그 다음 것은 규례대로 번제를 드릴지니 제사장이 그의 범과를 위하여 속한즉 그가 사함을 얻으리라!
Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza mbeka oyo ya mibale lokola mbeka ya kotumba, kolanda ndenge ekatama na mibeko. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana; mpe moto yango akolimbisama.
11 만일 힘이 산비둘기 둘이나 집비둘기 둘에도 미치지 못하거든 그 범과를 인하여 고운 가루 에바 십분 일을 예물로 가져다가 속죄 제물로 드리되 이는 속죄제인즉 그 위에 기름을 붓지 말며 유향을 놓지 말고
Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu.
12 그것을 제사장에게로 가져갈 것이요, 제사장은 그것을 기념물로 한 움큼을 취하여 단 위 여호와의 화제물 위에 불사를지니 이는 속죄제라
Sima, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akozwa loboko moko lokola eteni ya ekaniseli mpe akotumba yango na moto mpo na Yawe: ezali mbeka mpo na masumu.
13 제사장이 그가 이 중에 하나를 범하여 얻은 허물을 위하여 속한즉 그가 사함을 얻으리라! 그 나머지는 소제물같이 제사장에게 돌릴지니라!
Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana; mpe moto yango akolimbisama. Ndambo ya mbeka oyo ekotikala ekozala ya Nganga-Nzambe, ndenge kaka esalemaka mpo na mbeka ya bambuma. »
14 여호와께서 모세에게 일러 가라사대
Yawe alobaki na Moyize:
15 누구든지 여호와의 성물에 대하여 그릇 범과하였거든 여호와께 속건제를 드리되 너의 지정한 가치를 따라 성소의 세겔로 몇 세겔 은에 상당한 흠 없는 수양을 떼 중에서 끌어다가 속건제로 드려서
« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule: ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.
16 성물에 대한 범과를 갚되 그것에 오분 일을 더하여 제사장에게 줄 것이요 제사장은 그 속건제의 수양으로 그를 위하여 속한즉 그가 사함을 얻으리라!
Lisusu, mpo na mabe oyo asali liboso ya Esika ya bule, moto yango asengeli kobakisa likolo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani: eteni moko kati na biteni mitano ya motuya ya mbeka wana. Boye akopesa biloko nyonso epai ya Nganga-Nzambe, mpe Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana na nzela ya meme ya mobali oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani; boye moto yango akolimbisama.
17 만일 누구든지 여호와의 금령 중 하나를 부지중에 범하여도 허물이라 벌을 당할 것이니
Soki moto asali na kozanga koyeba masumu mpo ete abuki mobeko na Yawe, amemi ngambo; mpe akomema mokumba ya mabe na ye.
18 그는 너의 지정한 가치대로 떼 중 흠 없는 수양을 속건 제물로 제사장에게로 가져올 것이요, 제사장은 그의 부지중에 그릇 범한 허물을 위하여 속한즉 그가 사함을 얻으리라!
Bongo, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, akomema epai ya Nganga-Nzambe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mabe oyo moto wana asalaki na kozanga koyeba; boye moto yango akolimbisama.
19 이는 속건제니 그가 실로 여호와 앞에 범과함이니라
Ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani, pamba te amemaki ngambo na ndenge asalaki masumu liboso ya Yawe. »

< 레위기 5 >