< 사사기 15 >

1 얼마 후 밀 거둘 때에 삼손이 염소 새끼를 가지고 그 아내에게로 찾아 가서 가로되 `내가 침실에 들어가 아내를 보고자 하노라' 장인이 들어 오지 못하게 하고
Sima na mwa mikolo, na eleko oyo bakataka ble, Samison azwaki mwana ntaba mpe akendeki kotala mwasi na ye. Alobaki: — Nalingi kokota na shambre epai wapi mwasi na ngai alalaka. Kasi tata ya mwasi na ye apesaki ye nzela te.
2 가로되 `네가 그를 심히 미워하는 줄로 내가 생각한 고로 그를 네 동무에게 주었노라 그 동생이 그보다 더욱 아름답지 아니하냐? 청하노니 너는 그의 대신에 이를 취하라'
Alobaki na Samison: — Nakanisaki penza ete olingaka ye te, yango wana nabalisaki ye epai ya moko kati na baninga na yo, oyo obengisaki na feti. Tala leki na ye ya mwasi, aleki ye na kitoko te? Zwa ye kaka.
3 삼손이 그들에게 이르되 `이번은 내가 블레셋 사람을 해할지라도 그들에게 대하여 내게 허물이 없을 것이니라' 하고
Samison alobaki na bango: — Ya mbala oyo, nakozala ata na ngambo moko te liboso ya bato ya mokili ya Filisitia; nakeyi kosala bango mabe.
4 삼손이 가서 여우 삼백을 붙들어서 그 꼬리와 꼬리를 매고 홰를 취하고 그 두 꼬리 사이에 한 홰를 달고
Samison abimaki mpe akangaki bambwa ya zamba nkama misato, akangisaki yango mibale-mibale na mikila mpe atiaki koni na kati-kati ya mikila mibale-mibale ya bambwa yango.
5 홰에 불을 켜고 그것을 블레셋 사람의 곡식 밭으로 몰아 들여서 곡식 단과 아직 베지 아니한 곡식과 감람원을 사른지라
Apelisaki koni yango mpe atikaki bambwa ya zamba kati na bilanga ya ble ya bato ya Filisitia, oyo esili kokomela. Atumbaki maboke ya ble oyo batiaki na mipiku mpe ble oyo babukaki nanu te, banzete ya vino mpe banzete ya olive.
6 블레셋 사람이 가로되 누가 이일을 행하였느냐? 혹이 대답하되 딤나 사람의 사위 삼손이니 장인이 삼손의 아내를 취하여 그 동무 되었던 자에게 준 연고니라 블레셋 사람이 올라가서 그 여인과 그의 아비를 불사르니라
Bato ya Filisitia batunaki: — Nani asali boye? Bazongiselaki bango: — Ezali Samison, bokilo ya moto moko ya Timina; pamba te abalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga oyo Samison abengisaki na feti. Bato ya Filisitia bakendeki mpe batumbaki mwasi yango elongo na tata na ye kino bakufaki.
7 삼손이 그들에게 이르되 `너희가 이같이 행하였은즉 내가 너희에게 원수를 갚은 후에야 말리라' 하고
Samison alobaki na bango: « Lokola bosali boye, nakotika te kino nakozongisela bino mabe na mabe. »
8 블레셋 사람을 크게 도륙하고 내려가서 에담 바위 틈에 거하니라
Samison abundisaki bango mpe abomaki ebele kati na bango. Bongo akendeki mpe avandaki kati na lidusu ya mabanga, na Etami.
9 이에 블레셋 사람이 올라와서 유다에 진을 치고 레히에 편만한지라
Bato ya Filisitia bayaki mpe batongaki molako na bango kati na etuka ya Yuda, bapanzanaki kino na etuka ya Leyi.
10 유다 사람들이 가로되 `너희가 어찌하여 올라와서 우리를 치느냐?' 그들이 대답하되 `우리가 올라오기는 삼손을 결박하여 그가 우리에게 행한 대로 그에게 행하려 함이로라'
Bato ya Yuda batunaki: — Mpo na nini boyei kobundisa biso? Bato ya Filisitia bazongiselaki bango: — Toyei kokanga Samison na basinga mpo ete tosala ye ndenge asalaki biso.
11 유다 사람 삼천명이 에담 바위틈에 내려가서 삼손에게 이르되 `너는 블레셋 사람이 우리를 관할하는 줄을 알지 못하느냐? 네가 어찌하여 우리에게 이같이 행하였느냐?' 삼손이 그들에게 이르되 `그들이 내게 행한 대로 나도 그들에게 행하였노라'
Bato nkoto misato ya Yuda bakendeki na lidusu ya mabanga ya Etami, mpe balobaki na Samison: — Oyebi te ete bato ya Filisitia bazali kokonza biso? Likambo nini osali biso? Samison azongisaki: — Nazongiseli bango makambo oyo bango basalaki ngai.
12 그들이 삼손에게 이르되 `우리가 너를 결박하여 블레셋 사람의 손에 붙이려고 이제 내려왔노라' 삼손이 그들에게 이르되 `너희는 친히 나를 치지 않겠다고 내게 맹세하라'
Bato ya Yuda balobaki na Samison: — Toyei mpo na kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko ya bato ya Filisitia. Samison alobaki na bango: — Bolapa ndayi liboso na ngai ete bokoboma ngai te bino moko.
13 그들이 삼손에게 일러 가로되 `아니라 우리가 다만 너를 단단히 결박하여 그들의 손에 붙일 뿐이요 우리가 결단코 너를 죽이지 아니하리라' 하고 새 줄 둘로 결박하고 바위틈에서 그를 끌어내니라
Bato ya Yuda bazongisaki: — Iyo! Tokoboma yo te. Tolingi kaka kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko na bango. Bongo bakangaki ye na basinga mibale ya sika mpe babimisaki ye na lidusu ya mabanga.
14 삼손이 레히에 이르매 블레셋 사람이 그에게로 마주 나가며 소리지르는 동시에 여호와의 신의 권능이 삼손에게 임하매 그 팔 위의 줄이 불탄 삼과 같아서 그 결박되었던 손에서 떨어진지라
Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye.
15 삼손이 나귀의 새 턱뼈를 보고 손을 내밀어 취하고 그것으로 일천명을 죽이고
Samison amonaki mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, asembolaki loboko na ye, alokotaki mokuwa yango mpe abomaki na yango bato nkoto moko.
16 가로되 `나귀의 턱뼈로 한더미 두더미를 쌓았음이여 나귀의 턱뼈로 내가 일천명을 죽였도다'
Samison alobaki: « Na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, nakangisi bango mipiku na mipiku; na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, nabomi bato nkoto moko. »
17 말을 마치고 턱뼈를 그 손에서 내어던지고 그 곳을 라맛 레히라 이름하였더라
Tango asilisaki koloba, abwakaki mokuwa yango mosika mpe apesaki esika yango kombo « Ramati-Leyi. »
18 삼손이 심히 목마르므로 여호와께 부르짖어 가로되 `주께서 종의 손으로 이 큰 구원을 베푸셨사오나 내가 이제 목말라 죽어서 할례 받지 못한 자의 손에 빠지겠나이다'
Lokola azalaki na posa makasi ya mayi, asambelaki Yawe: « Opesi mosali na Yo elonga oyo monene; boni, nakufa sik’oyo na posa ya mayi mpe nakweya na maboko ya bato oyo bakatama ngenga te? »
19 하나님의 레히에 한 우묵한 곳을 터치시니 물이 거기서 솟아나오는지라 삼손이 그것을 마시고 정신이 회복되어 소생하니 그러므로 그 샘 이름은 엔학고레라 이샘이 레히에 오늘까지 있더라
Bongo Nzambe afungolaki libanga oyo ezalaki kati na Leyi, mpe libanga yango ebimisaki mayi. Tango Samison amelaki mayi, makasi na ye ezongaki mpe azwaki lisusu bomoi. Boye abengaki etima yango Eyini-Akore.
20 블레셋 사람의 때에 삼손이 이스라엘 사사로 이십년을 지내었더라
Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale, wana bato ya Filisitia bazalaki kokonza mokili.

< 사사기 15 >