< 욥기 6 >

1 욥이 대답하여 가로되
Yobo azongisaki:
2 나의 분한을 달아 보며 나의 모든 재앙을 저울에 둘 수 있으면
« Ah! Soki ezalaki na makoki ya komeka kilo ya mawa na ngai, mpe ya kotia pasi na ngai nyonso na emekelo kilo,
3 바다 모래보다도 무거울 것이라 그럼으로 하여 나의 말이 경솔 하였구나
nakanisi ete elingaki koleka zelo ya bibale minene na kilo. Yango wana, maloba na ngai ezali koleka ndelo.
4 전능자의 살이 내 몸에 박히매 나의 영이 그 독을 마셨나니 하나님의 두려움이 나를 엄습하여 치는구나
Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.
5 들 나귀가 풀이 있으면 어찌 울겠으며 소가 꼴이 있으면 어찌 울겠느냐
Boni, ane ya zamba elelaka soki ezali kolia matiti? Ngombe ya mobali elelaka soki ezali kolia bilei na yango?
6 싱거운 것이 소금 없이 먹히겠느냐 닭의 알 흰자위가 맛이 있겠느냐
Boni, baliaka na mungwa te bilei oyo ezanga elengi? Mayi oyo ezalaka kati na maki ezalaka elengi?
7 이런 것을 만지기도 내 마음이 싫어하나니 못된 식물 같이 여김 이니라
Makambo oyo nazalaki koboya, yango nde ekomi bilei na ngai, atako ezali mabe.
8 하나님이 나의 구하는 것을 얻게 하시며 나의 사모하는 것 주시기를 내가 원하나니
Ah! Nani akoki kosala ete bosenga na ngai ekokisama, mpe ete Nzambe akokisela ngai likambo oyo nazali kozela!
9 이는 곧 나를 멸하시기를 기뻐하사 그 손을 들어 나를 끊으실 것이라
Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto!
10 그러할지라도 내가 오히려 위로를 받고 무정한 고통 가운데서도 기뻐할 것은 내가 거룩하신 이의 말씀을 거역지 아니하였음이니라
Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo, pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu.
11 내가 무슨 기력이 있관대 기다리겠느냐 내 마지막이 어떠하겠관대 오히려 참겠느냐
Makasi nini penza nazali na yango mpo ete nazala lisusu na elikya? Mpo na nini nawumela lisusu kotala suka ya bomoi na ngai?
12 나의 기력이 어찌 돌의 기력이겠느냐 나의 살이 어찌 놋쇠겠느냐
Boni, nazali makasi lokola libanga? Nzoto na ngai ezali ya ebende?
13 나의 도움이 내 속에 없지 아니하냐 나의 지혜가 내게서 쫓겨나지 아니하였느냐
Nazali na nguya ya komisunga awa natikali lisusu na makoki te?
14 피곤한 자 곧 전능자 경외하는 일을 폐한 자를 그 벗이 불쌍히 여길 것이어늘
Moto nyonso oyo azali na pasi asengeli na mawa ya baninga na ye, ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
15 나의 형제는 내게 성실치 아니함이 시냇물의 마름 같고 개울의 잦음 같구나
Kasi tala, bandeko na ngai bakosi ngai lokola moluka, lokola mayi ya moluka oyo ekawuki.
16 얼음이 녹으면 물이 검어지며 눈이 그 속에 감취었을지라도
Tango mayi oyo ekomaka libanga mpo na malili, mpe mvula ya pembe, epanzanaka, ememaka mpela.
17 따뜻하면 마르고 더우면 그 자리에서 아주 없어지나니
Kasi na tango ya molunge, mayi yango esilaka, mpe moluka yango ekawukaka nyonso mpo na molunge makasi.
18 떼를 지은 객들이 시냇가로 다니다가 돌이켜 광야로 가서 죽고
Masanga ya bato oyo batambolaka na bampunda mpo na kokende na mobembo, ebongoli nzela ya kokende, ekeyi kokota kino kati na esobe mpe ekufi kuna.
19 데마의 떼들이 그것을 바라보고 스바의 행인들도 그것을 사모하다가
Masanga ya bato ya Tema, oyo ezali na mobembo, elukaki mayi; masanga ya bato ya Saba, oyo ezali na mobembo, etielaki yango motema.
20 거기 와서는 바라던 것을 부끄리고 낙심하느니라
Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema; tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa.
21 너희도 허망한 자라 너희가 두려운 일을 본즉 겁내는구나
Bino mpe bozali ndenge wana mpo na ngai, bozali na makoki te ya kosunga ngai; awa bomoni pasi na ngai, somo ekangi bino!
22 내가 언제 너희에게 나를 공급하라 하더냐 언제 나를 위하여 너희 재물로 예물을 달라더냐
Boni, nasila koloba na bino: ‹ Bokabela ngai ndambo ya biloko na bino to bofutela ngai niongo na nzela ya bozwi na bino,
23 내가 언제 말하기를 대적의 손에서 나를 구원하라 하더냐 포악한자의 손에서 나를 구속하라 하더냐
mpo na kokangola ngai na loboko ya monguna to mpo na kobikisa ngai na nguya ya bato mabe? ›
24 내게 가르쳐서 나의 허물된 것을 깨닫게 하라 내가 잠잠하리라
Boteya ngai, bongo nakokanga monoko; bolakisa ngai mabe nini ngai nasali!
25 옳은 말은 어찌 그리 유력한지, 그렇지만 너희의 책망은 무엇을 책망함이뇨
Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi! Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini?
26 너희가 말을 책망하려느냐 소망이 끊어진 자의 말은 바람 같으니라
Bokanisi ete bokoki kosembola makambo oyo nazali koloba to kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi?
27 너희는 고아를 제비 뽑으며 너희 벗을 매매할 자로구나
Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etike mpe koteka moninga na bino na bowumbu!
28 이제 너희가 나를 향하여 보기를 원하노라 내가 너희를 대면하여 결코 거짓말하지 아니하리라
Kasi sik’oyo, bozala na mitema malamu mpo na kotala ngai! Boni, nakoki penza kokosa bino, kaka na miso makasi boye?
29 너희는 돌이켜 불의한 것이 없게 하기를 원하노라 너희는 돌이키라 내 일이 의로우니라
Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo! Bokanisa penza malamu, pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami.
30 내 혀에 어찌 불의한 것이 있으랴 내 미각이 어찌 궤휼을 분변치못하랴
Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai; monoko na ngai ekoki kososola mabe te?

< 욥기 6 >