< 욥기 32 >

1 욥이 스스로 의롭게 여기므로 그 세 사람의 대답이 그치매
Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.
2 람 족속 부스 사람 바라겔의 아들 엘리후가 노를 발하니 그가 욥에게 노를 발함은 욥이 하나님보다 자기가 의롭다 함이요
Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe.
3 또 세 친구에게 노를 발함은 그들이 능히 대답지는 못하여도 욥을 정죄함이라
Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli; nzokande bakweyisaki Nzambe.
4 엘리후가 그들의 나이 자기보다 많으므로 욥에게 말하기를 참고 있다가
Eliwu awelaki te koloba moto ya liboso epai ya Yobo, pamba te baninga wana misato ya Yobo bazalaki mikolo na ye na mibu ya mbotama.
5 세 사람의 입에 대답이 없음을 보고 노를 발하니라
Kasi tango Eliwu amonaki ete bato wana misato bazali lisusu na likambo ya koloba te, asilikaki makasi.
6 부스 사람 바라겔의 아들 엘리후가 발언하여 가로되 나는 연소하고 당신들은 연로하므로 참고 나의 의견을 감히 진술치 못하였노라
Boye Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi, alobaki: « Nazali leki na mibu ya mbotama, mpe bino bozali mikolo; yango wana nazalaki kobanga mpe nazangaki makasi ya koloba na bino makambo oyo ngai nayebi.
7 내가 말하기를 날이 많은 자가 말을 낼 것이요 해가 오랜 자가 지혜를 가르칠 것이라 하였으나
Nazalaki komilobela: ‹ Bato oyo bazali na mibu ebele ya mbotama bakoyeba koloba, pamba te kozala na mibu ebele epesaka bwanya. ›
8 사람의 속에는 심령이 있고 전능자의 기운이 사람에게 총명을 주시나니
Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo, ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde epesaka moto boyebi.
9 대인이라고 지혜로운 것이 아니요 노인이라고 공의를 깨닫는 것이 아니라
Ezali kaka mibange te nde bazali na bwanya, mpe ezali kaka bampaka te nde basosolaka makambo oyo ezali sembo.
10 그러므로 내가 말하노니 내 말을 들으라 나도 내 의견을 보이리라
Yango wana nalobi: Boyoka ngai, ngai mpe nakoloba na bino makambo oyo nayebi.
11 내가 당신들의 말을 기다렸고 당신들이 할 말을 합당하도록 하여보는 동안에 그 변론에 내 귀를 기울였더니
Tango bino bozalaki koloba, ngai nazalaki koloba te, nazalaki koyoka makanisi na bino, wana bozalaki koluka makambo ya koloba.
12 자세히 들은즉 당신들 가운데 욥을 꺾어 그 말을 대답하는 자가 없도다
Nalandaki bino na bokebi nyonso; moko te kati na bino amoni mabe ya Yobo, moko te kati na bino alongi makanisi ya Yobo.
13 당신들이 혹시라도 말하기를 우리가 지혜를 깨달았었구나 그를 이길 자는 하나님이시요 사람이 아니라 하지 말지니라
Boloba te: ‹ Tomoni bwanya; Nzambe kaka nde akoki kolonga ye, kasi moto te. ›
14 그가 내게 말을 내지 아니하였으니 나도 당신들의 말처럼 그에게 대답지 아니하리라
Lokola Yobo alobaki maloba na ye epai na ngai te, ngai mpe nakosalela makanisi na bino te mpo na kozongisela ye eyano.
15 그들이 놀라서 다시 대답하지 못하니 할 말이 없음이로구나
Bayoki soni, batikali ata na liloba moko te ya koloba, makambo ya koloba esili bango na minoko!
16 그들이 말이 없이 가만히 서서 다시 대답지 아니한즉 내가 어찌 더 기다리랴
Boni, nasengeli sik’oyo kozela, awa bazangi maloba to basuki wana mpe bakangi minoko?
17 나도 내 본분대로 대답하고 나도 내 의향을 보이리니
Ngai mpe nakoloba sik’oyo, nakoloba makambo oyo nayebi.
18 내게 말이 가득하고 내 심령이 나를 강박함이니라
Lokola maloba ebele etondi kati na ngai, motema na ngai ezali kopela lokola moto.
19 보라 내 가슴은 봉한 포도주 같고 새 가죽 부대가 터지게 됨 같구나
Kati na ngai, nazali lokola mbeki ya vino oyo ezali kotoka, lokola mbeki ya vino ya sika oyo ekomi pene ya kopasuka.
20 내가 말을 발하여야 시원할 것이라 내 입을 열어 대답하리라
Nakoloba mpo ete motema na ngai ekita, nakofungola bibebu na ngai mpo ete nayanola.
21 나는 결코 사람의 낯을 보지 아니하며 사람에게 아첨하지 아니하나니
Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te;
22 이는 아첨할 줄을 알지 못함이라 만일 그리하면 나를 지으신 자가 속히 나를 취하시리로다
pamba te, soki nayebaki kobondela bato, Mokeli na ngai alingaki kolongola ngai mbala moko.

< 욥기 32 >