< 예레미야 41 >

1 칠 월에 왕의 종친 엘리사마의 손자 느다냐의 아들 왕의 장관 이스마엘이 열 사람과 함께 미스바로 가서 아히감의 아들 그다랴에게 이르러 미스바에서 함께 떡을 먹다가
Na sanza ya sambo, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi mpe moko kati na bakengeli ya mokonzi, ayaki elongo na basoda zomi epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, na Mitsipa. Wana bazalaki kolia na Mitsipa,
2 느다냐의 아들 이스마엘과 그와 함께 한 열 사람이 일어나서 바벨론 왕의 그 땅 총독으로 세운 바 사반의 손자 아히감의 아들 그다랴를 칼로 쳐죽였고
Isimaeli, mwana mobali ya Netania, elongo na basoda wana zomi oyo bazalaki elongo na ye babomaki na mopanga Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli kati na mokili.
3 이스마엘이 또 미스바에서 그다랴와 함께한 모든 유다인과 거기 있는 갈대아 군사를 죽였더라
Isimaeli abomaki lisusu Bayuda oyo bazalaki elongo na Gedalia, na Mitsipa, elongo na basoda ya Babiloni oyo bazalaki wana.
4 그가 그다랴를 죽인 지 이틀이 되었어도 이를 아는 사람이 없었더라
Mokolo oyo elandaki kufa ya Gedalia, liboso ete sango eyebana epai ya bato,
5 때에 사람 팔십명이 그 수염을 깎고 옷을 찢고 몸을 상하고 손에 소제물과 유향을 가지고 세겜과 실로와 사마리아에서부터 와서 여호와의 집으로 나아가려 한지라
bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe.
6 느다냐의 아들 이스마엘이 그들을 영접하러 미스바에서 나와서 울며 행하다가 그들을 만나 아히감의 아들 그다랴에게로 가자 하여
Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abimaki na Mitsipa mpo na kokende kokutana na bango; wana azalaki kokende kokutana na bango, azalaki kolela nzela-nzela. Bongo tango akutanaki na bango, alobaki na bango: — Boya kotala Gedalia, mwana mobali ya Ayikami!
7 그들이 성 중앙에 이를 때에 느다냐의 아들 이스마엘이 자기와 함께 한 사람들로 더불어 그들을 죽여 구덩이에 던지니라
Tango bakotaki kati na engumba, Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato oyo bazalaki elongo na ye babomaki bango mpe babwakaki bango na libulu.
8 그 중에 열 사람은 이스마엘에게 이르기를 우리가 밀과 보리와 기름과 꿀을 밭에 감추었으니 우리를 죽이지 말라 하였으므로 그가 그치고 그들을 그 형제와 함께 죽이지 아니하였더라
Kasi bato zomi kati na bango balobaki na Isimaeli: — Koboma biso te! Tozali na ble, na orje, na mafuta mpe na mafuta ya nzoyi, oyo tobombaki kati na bilanga. Boye, abomaki bango lisusu te, abikisaki bango elongo na bandeko na bango.
9 이스마엘이 그다랴에게 속한 사람들을 죽이고 그 시체를 던진 구덩이는 아사 왕이 이스라엘 왕 바아사를 두려워하여 팠던 것이라 느다냐의 아들 이스마엘이 그 죽인 시체로 거기 채우고
Libulu epai wapi Isimaeli abwakaki bato nyonso oyo abomaki ezalaki libulu ya Gedalia, libulu oyo mokonzi Asa asalaki mpo na komibatela liboso ya Baesha, mokonzi ya Isalaele. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, atondisaki yango na bibembe;
10 미스바에 남아 있는 왕의 딸들과 모든 백성 곧 시위대장 느부사라단이 아히감의 아들 그다랴에게 위임하였던 바 미스바에 남아 있는 모든 백성을 사로잡되 곧 느다냐의 아들 이스마엘이 그들을 사로잡고 암몬 자손에게로 가려 하여 떠나니라
bongo akomisaki bato nyonso oyo batikalaki na Mitsipa bawumbu: bana basi ya mokonzi mpe bato mosusu oyo batikalaki kuna na Mitsipa, oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atiaki na se ya bokonzi ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki bato oyo amemaki bango lokola bawumbu kati na mokili ya bato ya Amoni.
11 가레아의 아들 요하난과 그와 함께 있는 모든 군대장관이 느다냐의 아들 이스마엘의 행한 모든 악을 듣고
Tango Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye bayokaki sango ya makambo mabe oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, asalaki,
12 모든 사람을 데리고 느다냐의 아들 이스마엘과 싸우러 가다가 기브온 큰 물가에서 그를 만나매
basangisaki bato na bango nyonso mpe bakendeki kobundisa Isimaeli, mwana mobali ya Netania; bakutanaki na ye pene ya liziba monene ya Gabaoni.
13 이스마엘과 함께 있던 모든 백성이 가레아의 아들 요하난과 그와 함께 한 모든 군대장관을 보고 기뻐한지라
Tango bawumbu nyonso oyo Isimaeli akangaki bamonaki Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye, batondisamaki na esengo makasi;
14 이에 미스바에서 이스마엘에게 포로되었던 그 모든 백성이 돌이켜 가레아의 아들 요하난에게로 돌아가니
mpe bato nyonso oyo Isimaeli amemaki lokola bawumbu, na Mitsipa, babalukaki mpe bakendeki kosangana na Yoanani, mwana mobali ya Karea.
15 느다냐의 아들 이스마엘이 여덟 사람과 함께 요하난을 피하여 암몬 자손에게로 가니라
Kasi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato mwambe oyo bazalaki elongo na ye babikaki na maboko ya Yoanani mpe bakimaki epai ya bato ya Amoni.
16 가레아의 아들 요하난과 그와 함께하는 모든 군대장관이 느다냐의 아들 이스마엘이 아히감의 아들 그다랴를 죽이고 미스바에서 잡아간 모든 남은 백성 곧 군사와 여인과 유아와 환관을 기브온에서 빼앗아 가지고 돌아와서
Sima na yango, Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye bamemaki bato nyonso ya Mitsipa oyo babikaki, oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki na bowumbu wuta na Mitsipa sima na ye koboma Gedalia, mwana mobali ya Ayikami: basoda, basi, bana mpe bakalaka ya lokumu ya mokonzi; elingi koloba bato nyonso oyo azongisaki wuta na Gabaoni.
17 애굽으로 가려 하여 떠나 베들레헴 근처에 있는 게롯김함에 머무렀으니
Bakobaki nzela na bango mpe batelemaki na molako ya Kimeami, pene ya Beteleemi, mpo ete bazalaki na posa ya kokende na Ejipito
18 이는 느다냐의 아들 이스마엘이 바벨론 왕의 그 땅 총독으로 세운 아히감의 아들 그다랴을 죽였으므로 그들이 갈대아인을 두려워함이었더라
mpo na kokima bato ya Babiloni, pamba te bazalaki kobanga bango; mpe mpo ete Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abomaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli ya mokili.

< 예레미야 41 >